< Bileli 5 >

1 Oh Yawe, kanisa makambo oyo ekomeli biso! Tala mpe mona soni na biso! 2 Libula na biso ekeyi na maboko ya bapaya, bandako na biso ekeyi na maboko ya bato mosusu. 3 Tokomi lokola bana bitike, tozangi tata; bamama na biso bakomi lokola basi bakufisa mibali! 4 Tosengeli kofuta mbongo ata mpo na mayi na biso ya komela to mpe mpo na bakoni na biso! 5 Banguna na biso bazali kolanda biso, bakomi na sima ya mokongo; bongo biso tolembi nzoto, tozangi kimia. 6 Tokomi ata kobondela bato ya Ejipito mpe ya Asiri mpo ete bapesa biso bilei. 7 Solo batata na biso basalaki masumu, kasi bazali lisusu te, bongo biso tokomi komema mokumba ya etumbu na bango. 8 Bawumbu bakomi kokonza biso, mpe moto ata moko te amonani mpo na kokangola biso na maboko na bango. 9 Tozali kozwa bilei na biso na motuya ya bomoi na biso, likolo na mopanga ya babomi kuna na esobe. 10 Poso ya nzoto na biso ekomi moto lokola nde balekisi yango na mbabola, pamba te nzala ezali kotumba biso makasi. 11 Basambwisi basi kati na Siona, mpe bilenge basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te kati na bingumba ya Yuda. 12 Badiembiki bakalaka, na maboko na bango; mpe bapesi bakambi lokumu te. 13 Bilenge mibali bazali komema libanga oyo banikelaka ble; bongo bana mike bazali kotepatepa na se ya kilo ya bakoni. 14 Bakambi batika kokende na ekuke ya engumba, mpe bilenge batika kobeta mindule. 15 Esengo ezalaka lisusu te kati na mitema na biso, mabina na biso ebongwana matanga. 16 Mitole ekweyi wuta na mito na biso. Mawa na biso, mpo ete tosali masumu! 17 Soki mitema na biso ezali komona pasi mpe soki miso na biso ekomi komona molili, 18 ezali mpo ete ngomba Siona ebebisami, mpe mbwa ya zamba ekomi kovanda kuna. 19 Oh Yawe, ozali Mokonzi seko na seko; Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela libela na libela. 20 Mpo na nini obosana biso mpo na tango nyonso? Mpo na nini osundola biso tango molayi? 21 Oh Yawe, zongisa biso epai na Yo; mpe tokozonga penza! Yeisa mikolo na biso sika ndenge ezalaki na tango ya kala! 22 Boni, osundoli biso solo mpo na libela mpe otombokeli biso na kanda eleka ndelo?

< Bileli 5 >