< Bileli 4 >

1 Ndenge nini wolo ebungisi kongenga na yango, wolo ya peto enzuluki! Mabanga ya talo oyo ya bule epanzani na basonge ya babalabala nyonso.
אֵיכָה֙ יוּעַ֣ם זָהָ֔ב יִשְׁנֶ֖א הַכֶּ֣תֶם הַטֹּ֑וב תִּשְׁתַּפֵּ֙כְנָה֙ אַבְנֵי־קֹ֔דֶשׁ בְּרֹ֖אשׁ כָּל־חוּצֹֽות׃ ס
2 Ndenge nini bana mibali ya motuya ya Siona, oyo, na kala, bazalaki kozwa bango lokola wolo ya peto, kasi bakomi lelo komona bango lokola mbeki ya mabele, oyo mosali mbeki basili kosala!
בְּנֵ֤י צִיֹּון֙ הַיְקָרִ֔ים הַמְסֻלָּאִ֖ים בַּפָּ֑ז אֵיכָ֤ה נֶחְשְׁבוּ֙ לְנִבְלֵי־חֶ֔רֶשׂ מַעֲשֵׂ֖ה יְדֵ֥י יֹוצֵֽר׃ ס
3 Ata mbwa ya zamba ezalaka na posa ya komelisa bana na yango mabele; kasi bato na ngai bakomi mitema makasi lokola maligbanga kati na esobe.
גַּם־תַּנִּין (תַּנִּים֙) חָ֣לְצוּ שַׁ֔ד הֵינִ֖יקוּ גּוּרֵיהֶ֑ן בַּת־עַמִּ֣י לְאַכְזָ֔ר כִּי עֵנִים (כַּיְעֵנִ֖ים) בַּמִּדְבָּֽר׃ ס
4 Likolo ya nzala, lolemo ya mwana ekangami na likolo ya kati ya monoko na ye; bana mike bazali kosenga bilei kasi moto moko te azali kopesa bango yango.
דָּבַ֨ק לְשֹׁ֥ון יֹונֵ֛ק אֶל־חִכֹּ֖ו בַּצָּמָ֑א עֹֽולָלִים֙ שָׁ֣אֲלוּ לֶ֔חֶם פֹּרֵ֖שׂ אֵ֥ין לָהֶֽם׃ ס
5 Bato oyo na kala bazalaki kolia bilei ya kitoko bakomi kokufakufa na babalabala; ba-oyo bakolaki na molato ya motane bakomi sik’oyo kolalela matiti ya kopola.
הָאֹֽכְלִים֙ לְמַ֣עֲדַנִּ֔ים נָשַׁ֖מּוּ בַּחוּצֹ֑ות הָאֱמֻנִים֙ עֲלֵ֣י תֹולָ֔ע חִבְּק֖וּ אַשְׁפַּתֹּֽות׃ ס
6 Lisumu oyo bato na ngai basali ezali monene koleka lisumu ya Sodome, engumba oyo ebebisamaki na mbala moko wana moto moko te asembolaki loboko na ye mpo na kotelemela yango.
וַיִּגְדַּל֙ עֲוֹ֣ן בַּת־עַמִּ֔י מֵֽחַטַּ֖את סְדֹ֑ם הַֽהֲפוּכָ֣ה כְמֹו־רָ֔גַע וְלֹא־חָ֥לוּ בָ֖הּ יָדָֽיִם׃ ס
7 Bana ya bakonzi na bango bazalaki kongala koleka mvula ya pembe, pembe koleka miliki; banzoto na bango ezalaki motane koleka langi ya motane penza, mpe lolenge na bango ezalaki lokola libanga na safiri.
זַכּ֤וּ נְזִירֶ֙יהָ֙ מִשֶּׁ֔לֶג צַח֖וּ מֵחָלָ֑ב אָ֤דְמוּ עֶ֙צֶם֙ מִפְּנִינִ֔ים סַפִּ֖יר גִּזְרָתָֽם׃ ס
8 Bilongi na bango ekomi mwindo koleka makala, bazali koyeba bango lisusu te na babalabala; poso na bango ya nzoto ekangami na mikuwa, ekawuki lokola koni.
חָשַׁ֤ךְ מִשְּׁחֹור֙ תָּֽאֳרָ֔ם לֹ֥א נִכְּר֖וּ בַּחוּצֹ֑ות צָפַ֤ד עֹורָם֙ עַל־עַצְמָ֔ם יָבֵ֖שׁ הָיָ֥ה כָעֵֽץ׃ ס
9 Bato oyo bakufi na mopanga bazali malamu koleka ba-oyo bakufi na nzala: banzulukaka mpe bakondaka makasi mpo na nzala, mpo na kozanga bilei kowuta na bilanga.
טֹובִ֤ים הָיוּ֙ חַלְלֵי־חֶ֔רֶב מֵֽחַלְלֵ֖י רָעָ֑ב שֶׁ֣הֵ֤ם יָז֙וּבוּ֙ מְדֻקָּרִ֔ים מִתְּנוּבֹ֖ת שָׂדָֽי׃ ס
10 Basi ya mitema malamu balambi, na maboko na bango, bana na bango moko; bana na bango bakomi bilei na bango kati na pasi oyo ekomeli bato na ngai.
יְדֵ֗י נָשִׁים֙ רַחֲמָ֣נִיֹּ֔ות בִּשְּׁל֖וּ יַלְדֵיהֶ֑ן הָי֤וּ לְבָרֹות֙ לָ֔מֹו בְּשֶׁ֖בֶר בַּת־עַמִּֽי׃ ס
11 Yawe asilikaki makasi koleka; asopaki kanda na Ye mpe apelisaki moto kati na Siona, moto oyo ezikisaki miboko na yango.
כִּלָּ֤ה יְהוָה֙ אֶת־חֲמָתֹ֔ו שָׁפַ֖ךְ חֲרֹ֣ון אַפֹּ֑ו וַיַּצֶּת־אֵ֣שׁ בְּצִיֹּ֔ון וַתֹּ֖אכַל יְסֹודֹתֶֽיהָ׃ ס
12 Bakonzi ya mabele mpe bikolo mosusu ya mokili bandimaki te ete banguna mpe bayini bakokaki kokota na bikuke ya Yelusalemi.
לֹ֤א הֶאֱמִ֙ינוּ֙ מַלְכֵי־אֶ֔רֶץ וְכֹל (כֹּ֖ל) יֹשְׁבֵ֣י תֵבֵ֑ל כִּ֤י יָבֹא֙ צַ֣ר וְאֹויֵ֔ב בְּשַׁעֲרֵ֖י יְרוּשָׁלָֽ͏ִם׃ ס
13 Kasi makambo wana esalemaki mpo na masumu ya basakoli ya Yelusalemi mpe mabe ya Banganga-Nzambe na yango, oyo basopaki kati na yango makila ya bato ya sembo.
מֵֽחַטֹּ֣את נְבִיאֶ֔יהָ עֲוֹנֹ֖ות כֹּהֲנֶ֑יהָ הַשֹּׁפְכִ֥ים בְּקִרְבָּ֖הּ דַּ֥ם צַדִּיקִֽים׃ ס
14 Bakomaki sik’oyo koyengayenga na babalabala lokola bakufi miso, bakomaki mbindo na makila mpe moto moko te akokaki kosimba bilamba na bango.
נָע֤וּ עִוְרִים֙ בַּֽחוּצֹ֔ות נְגֹֽאֲל֖וּ בַּדָּ֑ם בְּלֹ֣א יֽוּכְל֔וּ יִגְּע֖וּ בִּלְבֻשֵׁיהֶֽם׃ ס
15 Bato bazali koganga mpe koloba na bango: « Bolongwa awa, bato ya mbindo! Bolongwa awa, bolongwa awa, bosimba biso te! » Wana bazalaki kokima mpe kotelengana, bato ya bikolo mosusu bazalaki koloba: « Bavanda na esika oyo te! »
ס֣וּרוּ טָמֵ֞א קָ֣רְאוּ לָ֗מֹו ס֤וּרוּ ס֙וּרוּ֙ אַל־תִּגָּ֔עוּ כִּ֥י נָצ֖וּ גַּם־נָ֑עוּ אָֽמְרוּ֙ בַּגֹּויִ֔ם לֹ֥א יֹוסִ֖יפוּ לָגֽוּר׃ ס
16 Yawe, Ye moko, apanzi bango, azali kotala bango lisusu te. Bapesaki Banganga-Nzambe lokumu te mpe bayokelaki mibange mawa te.
פְּנֵ֤י יְהוָה֙ חִלְּקָ֔ם לֹ֥א יֹוסִ֖יף לְהַבִּיטָ֑ם פְּנֵ֤י כֹהֲנִים֙ לֹ֣א נָשָׂ֔אוּ זְקֵנִים (וּזְקֵנִ֖ים) לֹ֥א חָנָֽנוּ׃ ס
17 Miso na biso elembaki lisusu mpo na kozela na pamba lisungi; wuta na bandako milayi na biso ya kotalela na mosika, tozalaki kotala wana tozalaki kozela lisungi kowuta na ekolo songolo mpe pakala, kasi ebikisaki biso te.
עֹודֵינָה (עֹודֵ֙ינוּ֙) תִּכְלֶ֣ינָה עֵינֵ֔ינוּ אֶל־עֶזְרָתֵ֖נוּ הָ֑בֶל בְּצִפִּיָּתֵ֣נוּ צִפִּ֔ינוּ אֶל־גֹּ֖וי לֹ֥א יֹושִֽׁעַ׃ ס
18 Banguna na biso bazalaki kolanda matambe na biso; boye tokokaki lisusu te kotambola na babalabala na biso. Suka na biso ekomaki pene, mikolo na biso ekomaki ya kotanga, mpo ete tokomaki na suka.
צָד֣וּ צְעָדֵ֔ינוּ מִלֶּ֖כֶת בִּרְחֹבֹתֵ֑ינוּ קָרַ֥ב קִצֵּ֛ינוּ מָלְא֥וּ יָמֵ֖ינוּ כִּי־בָ֥א קִצֵּֽינוּ׃ ס
19 Bato oyo bazalaki kolanda biso bazalaki mbangu koleka mpongo, na likolo; bazalaki kolanda biso na likolo ya bangomba mpe kotiela biso mitambo kati na esobe.
קַלִּ֤ים הָיוּ֙ רֹדְפֵ֔ינוּ מִנִּשְׁרֵ֖י שָׁמָ֑יִם עַל־הֶהָרִ֣ים דְּלָקֻ֔נוּ בַּמִּדְבָּ֖ר אָ֥רְבוּ לָֽנוּ׃ ס
20 Mopakolami na Yawe, oyo totielaki motema akangami na mitambo na bango; nzokande tozalaki kokanisa boye na tina na ye: « Tokobika bomoi malamu na se ya bobatelami na ye kati na bikolo. »
ר֤וּחַ אַפֵּ֙ינוּ֙ מְשִׁ֣יחַ יְהוָ֔ה נִלְכַּ֖ד בִּשְׁחִיתֹותָ֑ם אֲשֶׁ֣ר אָמַ֔רְנוּ בְּצִלֹּ֖ו נִֽחְיֶ֥ה בַגֹּויִֽם׃ ס
21 Edomi, mboka kitoko, movandi ya mokili ya Utsi, sepela, zala na esengo! Kasi yo mpe, bakopesa yo kopo; okomela, okolangwa mpe okotikala bolumbu.
שִׂ֤ישִׂי וְשִׂמְחִי֙ בַּת־אֱדֹ֔ום יֹושַׁבְתִּי (יֹושֶׁ֖בֶת) בְּאֶ֣רֶץ ע֑וּץ גַּם־עָלַ֙יִךְ֙ תַּעֲבָר־כֹּ֔וס תִּשְׁכְּרִ֖י וְתִתְעָרִֽי׃ ס
22 Siona, mboka kitoko, etumbu na yo ekosila; Nzambe akomema yo lisusu na bowumbu te. Kasi yo Edomi, mboka kitoko, Nzambe akopesa yo etumbu mpo na mabe na yo, mpe akobimisa masumu na yo na polele.
תַּם־עֲוֹנֵךְ֙ בַּת־צִיֹּ֔ון לֹ֥א יֹוסִ֖יף לְהַגְלֹותֵ֑ךְ פָּקַ֤ד עֲוֹנֵךְ֙ בַּת־אֱדֹ֔ום גִּלָּ֖ה עַל־חַטֹּאתָֽיִךְ׃ פ

< Bileli 4 >