< Bileli 3 >

1 Nazali moto oyo amona pasi na nzela ya fimbu ya kanda na Ye. 2 Amemaki ngai mpe atambolisaki ngai kati na molili, kasi na pole te. 3 Solo, mokolo mobimba, azalaki kobalola loboko na Ye mpo na kotelemela ngai tango nyonso. 4 Abebisaki nzoto na ngai mpe poso na yango, abukaki mikuwa na ngai. 5 Mpo na kotelemela ngai, atongaki zingazinga na ngai mir ya ngenge mpe ya pasi. 6 Atongelaki ngai ndako ya kovanda kati na molili, lokola bato ya tango ya kala oyo bakufa. 7 Azingelaki ngai na bamir mpo ete nakima te; akangaki ngai na minyololo ya kilo. 8 Ezala soki nabeleli mpo na kosenga lisungi, azali koyoka libondeli na ngai te. 9 Akangaki nzela na ngai na mabanga minene mpe abebisaki banzela na ngai ya mike. 10 Azalaki mpo na ngai lokola ngombolo oyo ebongami, lokola nkosi oyo ebombameli ngai; 11 apengwisaki ngai nzela, apasolaki ngai mpe akomisaki ngai eloko ya pamba. 12 Abendaki tolotolo na Ye mpe akomisaki ngai esika na Ye ya kobamba makonga. 13 Atobolaki motema na ngai, na makonga oyo ewutaki na libenga na Ye. 14 Nakomaki eloko ya liseki na miso ya bato na ngai nyonso; bazalaki tango nyonso kotiola ngai na banzembo. 15 Atondisaki ngai na matiti ya bololo mpe alangwisaki ngai na masanga ya bololo. 16 Abukaki minu na ngai na mabanga, azindisaki ngai na putulu. 17 Nazangaki kimia, nayebaki lisusu te nini yango bolamu. 18 Boye nalobaki: « Lokumu mpe makambo nyonso oyo natielaki elikya na Yawe esili! » 19 Nakanisi pasi mpe minyoko na ngai, ezali lokola ngenge mpe masanga ya bololo. 20 Tango nyonso nakanisaka yango, motema na ngai ebukanaka. 21 Nzokande, tala makambo oyo nakanisaka; oyo mpo na yango, nazalaka na elikya: 22 Bolamu ya Yawe esili te, mawa na Ye ekomi nanu na suka te; 23 ekomaka ya sika tongo nyonso. Solo, boyengebene na Yo ezali monene! 24 Namilobeli: « Yawe azali elikya na ngai; yango wana nakotia motema epai na Ye. » 25 Yawe azali malamu mpo na bato oyo batielaka Ye elikya, mpo na bato oyo balukaka Ye! 26 Ezali malamu kozela na kimia lobiko kowuta na Yawe! 27 Ezali malamu mpo na moto komema ekangiseli na ye wana azali nanu elenge. 28 Tika ete avanda kimia mpe avanda ye moko, pamba te Yawe nde alingi bongo mpo na ye. 29 Tika ete atia elongi na ye na mabele: tango mosusu elikya ekoki kozala. 30 Tika ete apesa litama mpo ete babeta ye mbata, mpe tika ete atonda na soni! 31 Pamba te Nkolo abwakaka moto te mpo na libela. 32 Ezala soki apesi etumbu, ayokaka kaka mawa mpo na bolingo monene na Ye. 33 Ezalaka na esengo te nde Yawe ayokisaka bato soni to atindelaka bato pasi. 34 Tango banyataka na makolo bakangami nyonso ya mokili, 35 tango babebisaka lokumu ya moto na miso ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo, 36 tango banyokolaka moto kati na kosambisama, boni, Nkolo amonaka yango te? 37 Nani akoki kaka kobimisa liloba mpo ete likambo esalema soki Nkolo apesi yango nzela te? 38 Boni, ezali te wuta na monoko ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo nde pasi mpe bolamu ekomelaka bato? 39 Mpo na nini moto na bomoi amilela-lela tango bapesi ye etumbu likolo ya masumu na ye? 40 Tokota na mozindo ya kososola banzela na biso mpe totala malamu etamboli na biso, bongo tozonga epai na Yawe; 41 totombola mitema mpe maboko na biso epai ya Nzambe oyo azali na Lola mpe toloba: 42 « Tosalaki masumu mpe totombokelaki Yo, yango wana olimbisaki te. 43 Omizipaki na kanda ndenge bamizipaka liputa, onyokolaki biso mpe obomaki na mawa te. 44 Omizipaki lipata mpo ete mabondeli edusola te. 45 Okomisaki biso lokola eloko ya nkele mpe ya tina te na miso ya bikolo. 46 Banguna na biso nyonso bafungolaki minoko mpo na kotiola biso; 47 libula na biso ekomi: somo, mabulu, kobebisama mpe kufa. » 48 Miso na ngai ezali kosopa miluka ya mpinzoli mpo ete bato na ngai babebisami. 49 Miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli tango nyonso mpe ezali kolemba te, 50 kino tango Yawe akotala mpe akomona wuta kuna na Lola. 51 Makambo oyo miso na ngai ezali komona ezali koyokisa motema na ngai pasi likolo na bana basi nyonso ya engumba na ngai. 52 Bato oyo bayinaka ngai na pamba balukaki kokanga ngai lokola ndeke; 53 balukaki koboma ngai kati na libulu, babwakelaki ngai mabanga; 54 mayi etondaki kino kozipa moto na ngai mpe nakanisaki ete nakomi pene ya kokufa. 55 Nabelelaki Kombo na Yo, Yawe, wuta na mozindo ya libulu. 56 Oyokaki ngai libondeli na ngai: « Kokanga matoyi na Yo te wana nazali kobelela Yo mpo ete oyoka kolela na ngai mpe nazwa lisungi kowuta na Yo! » 57 Tango nabelelaki Yo, opusanaki pene na ngai mpe olobaki: « Kobanga te! » 58 Nkolo, obundelaki ngai solo, osikolaki bomoi na ngai! 59 Yawe, omonaki mabe oyo basalaki ngai: longisa ngai! 60 Omonaki solo posa na bango ya kozongisa mabe na mabe mpe mabongisi na bango ya kosala ngai mabe. 61 Yawe, oyokaki mafinga na bango, mabongisi na bango ya kosala ngai mabe, 62 maloba ya bayini na ngai mpe makanisi na bango ya kosala ngai mabe. 63 Tala mpe mona bango! Ezala bavandi to batelemi, mosala na bango: kotiola ngai na banzembo na bango. 64 Yawe, pesa bango lifuti oyo ekoki na bango kolanda misala na bango; 65 yeisa mitema na bango makasi, kweyisela bango bilakeli mabe na Yo; 66 nyokola bango na kanda makasi na Yo mpe bebisa bango na se ya Lola na Yo, Yawe!

< Bileli 3 >