< Bilombe 5 >

1 Na mokolo wana, Debora mpe Baraki, mwana mobali ya Abinoami, bayembaki nzembo oyo:
那時,底波拉和亞比挪菴的兒子巴拉作歌,說:
2 Lokola na Isalaele, bakonzi batambolaki liboso, mpe bato bamipesaki mobimba na bitumba, tika ete bokumisa Yawe!
因為以色列中有軍長率領, 百姓也甘心犧牲自己, 你們應當頌讚耶和華!
3 Bino bakonzi, boyoka! Bino bakambi, boyoka malamu! Nalingi koyembela Yawe, nalingi koyemba nzembo mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele.
君王啊,要聽! 王子啊,要側耳而聽! 我要向耶和華歌唱; 我要歌頌耶和華-以色列的上帝。
4 Eh Yawe, tango obimaki na Seiri, tango ozalaki kotambola wuta na mokili ya Edomi, mabele eninganaki, likolo enyangwanaki, mapata esopaki mayi.
耶和華啊,你從西珥出來, 由以東地行走。 那時地震天漏, 雲也落雨。
5 Bangomba eninganaki liboso ya Yawe, mpe ngomba Sinai, liboso ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
山見耶和華的面就震動, 西奈山見耶和華-以色列上帝的面也是如此。
6 Na mikolo ya Shamagari, mwana mobali ya Anati; mpe na mikolo ya Yaeli, nzela etikalaki lisusu na bato te, bato ya mobembo batambolaki na nzela ya nyoka-nyoka.
在亞拿之子珊迦的時候, 又在雅億的日子, 大道無人行走, 都是繞道而行。
7 Bamboka nyonso ya mike-mike ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te, ezalaki lisusu na bato te kino ngai Debora natelemaki, kino natelemaki lokola mama kati na Isalaele.
以色列中的官長停職, 直到我底波拉興起, 等我興起作以色列的母。
8 Tango baponaki banzambe ya sika, bitumba mpe ekomaki na bikuke ya engumba, kasi ata nguba moko te to likonga moko te emonanaki kati na basoda nkoto tuku minei kati na Isalaele.
以色列人選擇新神, 爭戰的事就臨到城門。 那時,以色列四萬人中 豈能見盾牌槍矛呢?
9 Motema na ngai ezali elongo na bakambi ya Isalaele, elongo na ba-oyo bamipesaki mobimba na bitumba. Bokumisa Yawe!
我心傾向以色列的首領, 他們在民中甘心犧牲自己。 你們應當頌讚耶和華!
10 Bino oyo bozali kotambola likolo ya ba-ane ya pembe, bino oyo bozali kovanda likolo ya batapi, bino oyo bozali kotambola na nzela, bokanisa!
騎白驢的、坐繡花毯子的、行路的, 你們都當傳揚!
11 Bokumisa mingongo ya bayembi, na bisika oyo batokaka mayi, pene ya bitima ya mayi; kuna, mingongo ya bakaboli mayi ezali kosanzola misala ya bosembo ya Yawe, misala na Ye ya bosembo na bamboka mike nyonso ya Isalaele. Bato ya Yawe bakiti kino na bikuke ya engumba.
在遠離弓箭響聲打水之處, 人必述說耶和華公義的作為, 就是他治理以色列公義的作為。 那時耶和華的民下到城門。
12 Debora, lamuka! Lamuka! Lamuka, lamuka, yemba nzembo ya bitumba! Eh Baraki, telema, zongisa bakangami na yo; mwana mobali ya Abinoami!
底波拉啊,興起!興起! 你當興起,興起,唱歌。 亞比挪菴的兒子巴拉啊,你當奮興, 擄掠你的敵人。
13 Ndambo ya batikali bakiti epai ya balongi, bato ya Yawe bakiti mpo na ngai kati na bilombe ya bitumba.
那時有餘剩的貴冑和百姓一同下來; 耶和華降臨,為我攻擊勇士。
14 Bato ya Amaleki bawutaki na Efrayimi. Sima na yo, Benjame akitaki elongo na mampinga. Bakonzi ya mampinga babimelaki na Makiri, mpe bato oyo basimbaka lingenda ya bokonzi babimelaki na Zabuloni.
有根本在亞瑪力人的地, 從以法蓮下來的; 便雅憫在民中跟隨你。 有掌權的從瑪吉下來; 有持杖檢點民數的從西布倫下來;
15 Bakambi ya Isakari bazalaki elongo na Debora; ndenge moko lokola Baraki, Isakari alandaki ye mbangu na makolo kino na lubwaku. Kasi kati na libota ya Ribeni, mitema etondaki mingi na makanisi.
以薩迦的首領與底波拉同來; 以薩迦怎樣,巴拉也怎樣。 眾人都跟隨巴拉衝下平原; 在呂便的溪水旁有心中定大志的。
16 Mpo na nini avandi kati na lopango? Ezali mpo na kaka koyoka kolela ya bibwele? Kati na libota ya Ribeni, bazali bobele kolekisa tango pamba na kokanisa.
你為何坐在羊圈內 聽群中吹笛的聲音呢? 在呂便的溪水旁有心中設大謀的。
17 Galadi atikali na ngambo mosusu ya Yordani. Mpo na nini Dani azali kowumela kati na masuwa? Aseri atikali pembeni ya ebale, avandi pembeni ya libongo na ye.
基列人安居在約旦河外。 但人為何等在船上? 亞設人在海口靜坐, 在港口安居。
18 Bato ya Zabuloni bateki milimo na bango na kufa, bato ya Nefitali, na basonge ya bangomba, kuna na esika ya bitumba.
西布倫人是拚命敢死的; 拿弗他利人在田野的高處也是如此。
19 Bakonzi oyo bazali banguna bayaki mpe babundisaki biso; bakonzi ya Kanana babundisaki biso na mboka Taanaki, pene ya mayi ya Megido, kasi bamemaki te bomengo ya bitumba, ata palata.
君王都來爭戰。 那時迦南諸王在米吉多水旁的他納爭戰, 卻未得擄掠銀錢。
20 Wuta na likolo, minzoto ebundaki; na nzela na yango oyo etambolaka, minzoto ebundisaki Sisera.
星宿從天上爭戰, 從其軌道攻擊西西拉。
21 Mayi moke ya Kishoni ememaki bango, mayi moke ya tango ya kala, mayi moke ya Kishoni. Tika ete molimo na ngai etambola na nguya!
基順古河把敵人沖沒; 我的靈啊,應當努力前行。
22 Makolo ya bampunda enyataki mabele, na kopumbwa na mbangu makasi, na kolanda bankolo na yango, bato na nguya.
那時壯馬馳驅, 踢跳,奔騰。
23 Bolakela mboka ya Merozi mabe, elobi anjelu ya Yawe. Bolakela, bolakela mabe bato oyo bavandi kuna! Pamba te bayei te kosunga Yawe; bayei te kosunga bilombe ya bitumba!
耶和華的使者說: 應當咒詛米羅斯, 大大咒詛其中的居民; 因為他們不來幫助耶和華, 不來幫助耶和華攻擊勇士。
24 Tika ete Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni, apambolama kati na basi nyonso! Tika ete apambolama kati na basi nyonso oyo bazali kovanda na se ya ndako ya kapo.
願基尼人希百的妻雅億比眾婦人多得福氣, 比住帳棚的婦人更蒙福祉。
25 Sisera asengaki mayi, kasi ye apesaki miliki; kati na kopo ya bato ya lokumu, apesaki ye miliki ya kilo.
西西拉求水, 雅億給他奶子, 用寶貴的盤子給他奶油。
26 Na loboko na ye ya mwasi, azwaki pike ya nzete; mpe na loboko na ye ya mobali, marto ya basali. Abetaki Sisera mpe apanzaki ye moto, atobolaki ye litoyi mpe apanzaki yango nyonso.
雅億左手拿着帳棚的橛子, 右手拿着匠人的錘子, 擊打西西拉, 打傷他的頭, 把他的鬢角打破穿通。
27 Sisera akweyaki na makolo na ye, alembaki; akweyaki na makolo na ye mpe akufaki.
西西拉在她腳前曲身仆倒, 在她腳前曲身倒臥; 在那裏曲身,就在那裏死亡。
28 Mama ya Sisera abandaki kotala na lininisa, na sima ya bibende, mpe abandaki koganga: « Mpo na nini shar na ye ezali kowumela boye? Mpo na nini bashar na ye ezali koya malembe? »
西西拉的母親從窗戶裏往外觀看, 從窗櫺中呼叫說: 他的戰車為何耽延不來呢? 他的車輪為何行得慢呢?
29 Moko kati na basi ya mayele mpe ya lokumu ayanoli ye, mpe ye moko amilobeli:
聰明的宮女安慰她, 她也自言自語地說:
30 « Ezali te mpo bazwi mpe bakaboli bomengo ya bitumba: Elenge mwasi moko to bilenge basi mibale mpo na soda moko, bilamba ya langi mpo na Sisera, bilamba, bilamba ya langi, mpe bilamba oyo batia bililingi, mpo na balongi? »
他們莫非得財而分? 每人得了一兩個女子? 西西拉得了彩衣為擄物, 得繡花的彩衣為掠物。 這彩衣兩面繡花, 乃是披在被擄之人頸項上的。
31 Yawe, tika ete banguna na Yo nyonso bakufa bongo! Tika ete bato oyo balingaka Yo bangenga makasi lokola moyi ya midi! Mokili ezalaki na kimia mibu tuku minei.
耶和華啊, 願你的仇敵都這樣滅亡! 願愛你的人如日頭出現,光輝烈烈! 這樣,國中太平四十年。

< Bilombe 5 >