< Bilombe 17 >

1 Kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko; kombo na ye ezalaki « Mika. »
以法蓮山地有一個人名叫米迦。
2 Alobaki na mama na ye: — Shekeli ya palata nkoto moko na nkama moko oyo bayibaki yo, oyo na tina na yango olakelaki mabe na miso na ngai, ezali na maboko na ngai; ngai nde nazwaki yango. Mama na ye alobaki na ye: — Mwana na ngai, tika ete Yawe apambola yo!
他對母親說:「你那一千一百舍客勒銀子被人拿去,你因此咒詛,並且告訴了我。看哪,這銀子在我這裏,是我拿去了。」他母親說:「我兒啊,願耶和華賜福與你!」
3 Azongiselaki mama na ye mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko. Mama na ye alobaki: — Na maboko na ngai moko, nabonzi mbongo yango epai na Yawe mpo na mwana na ngai, mpo na kosala ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Nakozongisela yo yango.
米迦就把這一千一百舍客勒銀子還他母親。他母親說:「我分出這銀子來為你獻給耶和華,好雕刻一個像,鑄成一個像。現在我還是交給你。」
4 Tango Mika azwaki mbongo yango, azongisaki yango lisusu epai ya mama na ye; mpe mama na ye alongolaki mbongo ya bibende ya palata, nkama mibale oyo apesaki epai ya monyangwisi bibende na moto. Moto yango asalaki na yango ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Mpe batiaki yango kati na ndako ya Mika.
米迦將銀子還他母親,他母親將二百舍客勒銀子交給銀匠,雕刻一個像,鑄成一個像,安置在米迦的屋內。
5 Nzokande, Mika azalaki na esika na ye ya bule epai wapi azalaki kosambela. Asalisaki efode mpe banzambe mosusu ya bikeko; bongo abulisaki lokola nganga-nzambe na ye, moko kati na bana na ye ya mibali.
這米迦有了神堂,又製造以弗得和家中的神像,分派他一個兒子作祭司。
6 Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te; moto na moto azalaki kosala nyonso oyo ezali malamu na miso na ye.
那時以色列中沒有王,各人任意而行。
7 Nzokande, ezalaki na elenge mobali moko ya Molevi, azalaki kovanda na Beteleemi ya Yuda, na ekolo Yuda.
猶大的伯利恆有一個少年人,是猶大族的利未人,他在那裏寄居。
8 Alongwaki na engumba Beteleemi ya Yuda mpe akendeki koluka esika mosusu ya kovanda. Na mobembo na ye, akomaki na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ndako ya Mika.
這人離開猶大的伯利恆城,要找一個可住的地方。行路的時候,到了以法蓮山地,走到米迦的家。
9 Mika atunaki ye: — Owuti wapi? Azongisaki: — Nazali moto ya libota ya Levi, nawuti na Beteleemi ya Yuda mpe nazali koluka esika ya kovanda.
米迦問他說:「你從哪裏來?」他回答說:「從猶大的伯利恆來。我是利未人,要找一個可住的地方。」
10 Mika alobaki na ye: — Vanda elongo na ngai. Okozala tata mpe nganga na ngai; nakopesa yo na mobu moko mbongo ya bibende ya palata, zomi, bilamba ya kolata mpe biloko ya kolia. Molevi akomaki kosala epai ya Mika.
米迦說:「你可以住在我這裏,我以你為父、為祭司。我每年給你十舍客勒銀子,一套衣服和度日的食物。」利未人就進了他的家。
11 Boye, Molevi yango andimaki kovanda elongo na Mika. Mika akomisaki Molevi lokola moko kati na bana na ye.
利未人情願與那人同住;那人看這少年人如自己的兒子一樣。
12 Mika abulisaki Molevi yango lokola nganga-nzambe na ye mpe akomaki kovanda elongo na ye.
米迦分派這少年的利未人作祭司,他就住在米迦的家裏。
13 Mika alobaki: « Sik’oyo nayebi ete Yawe akosalela ngai bolamu lokola moto ya libota ya Levi akomi nganga-nzambe na ngai. »
米迦說:「現在我知道耶和華必賜福與我,因我有一個利未人作祭司。」

< Bilombe 17 >