< Bilombe 12 >

1 Bato ya Efrayimi basanganaki, bakatisaki na ngambo ya Tsafoni mpe balobaki na Jefite: — Mpo na nini okatisaki mondelo ya bato ya Amoni mpo na kobundisa bango, bongo obengaki biso te mpo ete tokende na yo elongo? Tokotumba yo elongo na ndako na yo!
以法蓮人聚集,到了北方,對耶弗他說:「你去與亞捫人爭戰,為甚麼沒有招我們同去呢?我們必用火燒你和你的房屋。」
2 Jefite azongiselaki bango: — Ngai mpe bato na ngai, tozalaki na kobendana makasi na bato ya Amoni; mpe tango nabengaki bino, bokangolaki ngai te wuta na maboko na bango.
耶弗他對他們說:「我和我的民與亞捫人大大爭戰;我招你們來,你們竟沒有來救我脫離他們的手。
3 Tango namonaki ete bokangoli na bino ngai te, nakabaki bomoi na ngai, mpe nakatisaki ngai moko nzela ya bato ya Amoni mpo na kobundisa bango; mpe Yawe apesaki ngai elonga likolo na bango. Sik’oyo, mpo na nini boyei lelo kobundisa ngai?
我見你們不來救我,我就拚命前去攻擊亞捫人,耶和華將他們交在我手中。你們今日為甚麼上我這裏來攻打我呢?」
4 Jefite asangisaki mibali nyonso ya Galadi, mpe babundisaki bato ya Efrayimi. Bato ya Galadi balongaki bato ya Efrayimi; mpe bato ya Efrayimi balobaki: « Bino bato ya Galadi, bozali na bino kaka bato oyo bokimaki wuta na Efrayimi mpe na Manase. »
於是耶弗他招聚基列人,與以法蓮人爭戰。基列人擊殺以法蓮人,是因他們說:「你們基列人在以法蓮、瑪拿西中間,不過是以法蓮逃亡的人。」
5 Bato ya Galadi bakangaki esika oyo bakatisaka Yordani na makolo, pene ya etuka ya Efrayimi. Mpe tango nyonso mokimi moko ya Efrayimi azalaki koloba: « Tika ngai nakatisa, » bato ya Galadi bazalaki kotuna ye: « Ozali moto ya Efrayimi? » Soki azongisi: « Te, »
基列人把守約旦河的渡口,不容以法蓮人過去。以法蓮逃走的人若說:「容我過去。」基列人就問他說:「你是以法蓮人不是?」他若說:「不是」,
6 bazalaki kosenga ete aloba: « Shiboleti; » soki alobi: « Siboleti, » mpo ete akoki te koloba yango malamu, bazalaki kokanga ye mpe koboma ye na esika oyo bakatisaka Yordani na makolo. Na tango wana, babomaki bato ya Efrayimi nkoto tuku minei na mibale.
就對他說:「你說『示播列』。」以法蓮人因為咬不真字音,便說「西播列」。基列人就將他拿住,殺在約旦河的渡口。那時以法蓮人被殺的有四萬二千人。
7 Jefite, moto ya Galadi, akambaki Isalaele mibu motoba. Sima na yango, akufaki, mpe bakundaki ye kati na engumba moko ya Galadi.
耶弗他作以色列的士師六年。基列人耶弗他死了,葬在基列的一座城裏。
8 Sima na Jefite, Ibitsani, moto ya Beteleemi, akambaki Isalaele.
耶弗他以後,有伯利恆人以比讚作以色列的士師。
9 Azalaki na bana mibali tuku misato mpe bana basi tuku misato. Abalisaki bana na ye ya basi na libanda ya libota ya botata na ye, mpe ayeisaki bilenge basi tuku misato ya bikolo mosusu mpo na bana na ye ya mibali. Ibitsani akambaki Isalaele mibu sambo.
他有三十個兒子,三十個女兒;女兒都嫁出去了。他給眾子從外鄉娶了三十個媳婦。他作以色列的士師七年。
10 Ibitsani akufaki, mpe bakundaki ye kati na Beteleemi.
以比讚死了,葬在伯利恆。
11 Sima na Ibitsani, Eloni, moto ya libota ya Zabuloni, akambaki Isalaele mibu zomi.
以比讚之後,有西布倫人以倫,作以色列的士師十年。
12 Eloni akufaki, mpe bakundaki ye kati na mboka Ayaloni, kati na etuka ya Zabuloni.
西布倫人以倫死了,葬在西布倫地的亞雅崙。
13 Sima na Eloni, Abidoni, mwana mobali ya Ileli, moto ya mokili ya Piratoni, akambaki Isalaele.
以倫之後,有比拉頓人希列的兒子押頓作以色列的士師。
14 Azalaki na bana mibali tuku minei mpe bakoko ya mibali tuku misato oyo babandaki kotambola likolo ya ba-ane tuku sambo. Akambaki Isalaele mibu mwambe.
他有四十個兒子,三十個孫子,騎着七十匹驢駒。押頓作以色列的士師八年。
15 Abidoni, mwana mobali ya Ileli, akufaki, mpe bakundaki ye na Piratoni, kati na etuka ya Efrayimi, na mokili ya bangomba ya bato ya Amaleki.
比拉頓人希列的兒子押頓死了,葬在以法蓮地的比拉頓,在亞瑪力人的山地。

< Bilombe 12 >