< Jozue 23 >

1 Sima na Yawe kopesa bopemi na Isalaele liboso ya banguna nyonso oyo bazingelaki bango, elekaki tango molayi. Bongo, Jozue akomaki mobange, mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi.
耶和華使以色列人安靜,不與四圍的一切仇敵爭戰,已經多日。約書亞年紀老邁,
2 Boye, Jozue abengisaki Isalaele mobimba: bampaka na yango, bakambi na yango, basambisi elongo na bakalaka na yango. Alobaki na bango: « Nakomi mobange mpe mibu ya bomoi na ngai epusani makasi.
就把以色列眾人的長老、族長、審判官,並官長都召了來,對他們說:「我年紀已經老邁。
3 Bino moko bomonaki makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki liboso ya bikolo oyo nyonso mpo na bolamu na bino, pamba te ezalaki Yawe, Nzambe na bino, nde azalaki kobundela bino.
耶和華-你們的上帝因你們的緣故向那些國所行的一切事,你們親眼看見了,因那為你們爭戰的是耶和華-你們的上帝。
4 Bobosana te ndenge nini nazalaki kobeta zeke mpo na kokabolela mabota na bino lokola libula, mokili ya bikolo oyo etikali mpe ya bikolo oyo nabotolaki wuta na Yordani kino na Ebale monene, na ngambo ya weste.
我所剪除和所剩下的各國,從約旦河起到日落之處的大海,我已經拈鬮分給你們各支派為業。
5 Yawe, Nzambe na bino, nde akobengana bango, Ye moko, mosika liboso na bino; akobengana bango liboso na bino mpe bokozwa mokili na bango ndenge Yawe, Nzambe na bino, alakaki.
耶和華-你們的上帝必將他們從你們面前趕出去,使他們離開你們,你們就必得他們的地為業,正如耶和華-你們的上帝所應許的。
6 Boyika mpiko mpe bosenzela mpo na kotosa makambo nyonso oyo ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize; bokende libanda na yango te.
所以,你們要大大壯膽,謹守遵行寫在摩西律法書上的一切話,不可偏離左右。
7 Bosala boyokani te elongo na bikolo mosusu oyo etikali kati na bino, bobelela bakombo ya banzambe na yango te to mpe bolapa ndayi na bakombo na yango te. Bomeka kosalela yango te mpe bofukamela yango te.
不可與你們中間所剩下的這些國民攙雜。他們的神,你們不可提他的名,不可指着他起誓,也不可事奉、叩拜;
8 Kasi bokangama makasi na Yawe, Nzambe na bino, ndenge bozali kosala kino na mokolo ya lelo.
只要照着你們到今日所行的,專靠耶和華-你們的上帝。
9 Yawe abenganaki bikolo ya minene mpe ya nguya liboso na bino; mpe kino na moyi ya lelo, moko te alongi kotelema liboso na bino.
因為耶和華已經把又大又強的國民從你們面前趕出;直到今日,沒有一人在你們面前站立得住。
10 Moto moko kaka kati na bino azalaki kokimisa bato nkoto moko, pamba te Yawe, Nzambe na bino, azalaki kobundela bino ndenge alakaki.
你們一人必追趕千人,因耶和華-你們的上帝照他所應許的,為你們爭戰。
11 Boye, bosala keba ete bolinga Yawe, Nzambe na bino.
你們要分外謹慎,愛耶和華-你們的上帝。
12 Kasi soki bopesi Yawe mokongo, mpe soki bosali boyokani elongo na bato oyo babiki kati na bikolo oyo etikali kati na bino; soki bosali mabala mpe bosangani elongo na bango,
你們若稍微轉去,與你們中間所剩下的這些國民聯絡,彼此結親,互相往來,
13 boyeba ete Yawe, Nzambe na bino, akobengana lisusu te bikolo yango liboso na bino. Bakokoma nde minyama mpe mitambo mpo na bino, bafimbu na mikongo na bino mpe banzube kati na miso na bino, kino tango bokosila kokufa na mokili ya kitoko oyo Nzambe na bino apesaki bino.
你們要確實知道,耶和華-你們的上帝必不再將他們從你們眼前趕出;他們卻要成為你們的網羅、機檻、肋上的鞭、眼中的刺,直到你們在耶和華-你們上帝所賜的這美地上滅亡。
14 Sik’oyo ngai nakomi pene ya kokende na nzela oyo moto nyonso akendaka. Na motema mpe elimo na bino mobimba, boyeba ete elaka moko te kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino ekotikala kokweya. Bilaka nyonso esila kokokisama, moko te ekotikala kokweya.
「我現在要走世人必走的路。你們是一心一意地知道,耶和華-你們上帝所應許賜福與你們的話沒有一句落空,都應驗在你們身上了。
15 Ndenge kaka bilaka nyonso ya kitoko ya Yawe, Nzambe na bino, ekokisamaki solo, ndenge wana mpe akotindela bino makambo mabe kino tango akosilisa koboma bino kati na mokili ya kitoko oyo apesaki bino
耶和華-你們上帝所應許的一切福氣怎樣臨到你們身上,耶和華也必照樣使各樣禍患臨到你們身上,直到把你們從耶和華-你們上帝所賜的這美地上除滅。
16 soki bobebisi boyokani ya Yawe, Nzambe na bino, oyo apeselaki bino mitindo, mpe bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango. Kanda ya Yawe ekotumba bino mpe bokosila kokufa noki penza na mokili ya kitoko oyo apesaki bino. »
你們若違背耶和華-你們上帝吩咐你們所守的約,去事奉別神,叩拜他,耶和華的怒氣必向你們發作,使你們在他所賜的美地上速速滅亡。」

< Jozue 23 >