< Jozue 22 >

1 Boye, Jozue abengisaki bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase;
Then Joshua sent for the Reubenites and the Gadites and the half-tribe of Manasseh,
2 mpe alobaki na bango: « Bosili kosala makambo nyonso oyo Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki bino, mpe botosaki ngai na makambo nyonso oyo natindaki bino.
And said to them, You have kept all the orders of Moses, the Lord's servant, and have done everything I gave you orders to do:
3 Pamba te wuta tango molayi kino na mokolo ya lelo, botikalaki kosundola bandeko na bino te, kasi bobatelaki malamu mokumba oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino.
You have now been with your brothers for a long time; till this day you have been doing the orders of the Lord your God.
4 Lokola Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bandeko na bino bopemi, ndenge alakaki, bokoki sik’oyo kozonga na bandako na bino, kati na mokili oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino, na ngambo mosusu ya Yordani.
And now the Lord your God has given your brothers rest, as he said: so now you may go back to your tents, to the land of your heritage, which Moses, the Lord's servant, gave to you on the other side of Jordan.
5 Kasi bosala keba ete bobatela mitindo mpe mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino: kolinga Yawe, Nzambe na bino; kotambola na banzela na Ye nyonso, kotosa mitindo na Ye, kokangama na Ye, mpe kosalela Ye na motema mpe na molimo na bino mobimba. »
Only take great care to do the orders and the law which Moses, the Lord's servant, gave you; to have love for the Lord your God and to go in all his ways; and to keep his laws and to be true to him and to be his servants with all your heart and with all your soul.
6 Jozue apambolaki bango mpe azongisaki bango. Boye, bazongaki na bandako na bango.
Then Joshua gave them his blessing and sent them away: and they went back to their tents.
7 Moyize apesaki na ndambo moko ya libota ya Manase, eteni ya mabele kati na Bashani; mpe Jozue apesaki na ndambo mosusu ya libota ya Manase elongo na bandeko na bango, eteni ya mabele, na ngambo ya weste ya Yordani. Tango Jozue azongisaki bango na bandako na bango, apambolaki mpe bango.
Now to the one half of the tribe of Manasseh, Moses had given a heritage in Bashan; but to the other half, Joshua gave a heritage among their brothers on the west side of Jordan. Now when Joshua sent them away to their tents, he gave them his blessing,
8 Alobaki na bango: « Bozonga na bandako na bino na bozwi ebele, na bibwele ebele, na palata, na wolo, na bronze, na bibende, mpe na bilamba ebele. Bokabola elongo na bandeko na bino bomengo ya bitumba oyo bosili kozwa epai ya banguna na bino. »
And said to them, Go back with much wealth to your tents, and with very much cattle, with silver and gold and brass and iron, and with a very great store of clothing; give your brothers a part of the goods taken in the war.
9 Boye bakitani ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase batikaki bana mosusu ya Isalaele, na Silo, kati na mokili ya Kanana mpo na kozonga na Galadi, mokili na bango moko, oyo basilaki kozwa, kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
So Reuben and Gad and the half-tribe of Manasseh went back, parting from the children of Israel at Shiloh in the land of Canaan, to go to the land of Gilead, to the land of their heritage which had been given to them by the Lord's order to Moses.
10 Tango bakomaki na Geliloti, pene ya Yordani, kati na mokili ya Kanana, bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase batongaki etumbelo moko ya monene penza na esika wana, pene ya Yordani.
Now when they came to the country by Jordan in the land of Canaan, the children of Reuben and the children of Gad and the half-tribe of Manasseh put up there, by Jordan, a great altar, seen from far.
11 Mpe tango bana ya Isalaele bayokaki ete bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase batongi etumbelo na ngambo ya mokili ya Kanana, na Geliloti pene ya Yordani, na ngambo ya bana mosusu ya Isalaele,
And news came to the children of Israel, See, the children of Reuben and the children of Gad and the half-tribe of Manasseh have put up an altar opposite the land of Canaan, in the country by Jordan on the side which is Israel's.
12 lisanga mobimba ya bana ya Isalaele esanganaki na Silo mpo na kobundisa bango.
Then all the meeting of the children of Israel, hearing this, came together at Shiloh to go up against them to war.
13 Boye bana mosusu ya Isalaele batindaki na mokili ya Galadi, Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
And the children of Israel sent Phinehas, the son of Eleazar the priest, to the children of Reuben and the children of Gad and the half-tribe of Manasseh, to the land of Gilead,
14 Batindaki elongo na ye bakambi zomi, lokola mokambi moko mpo na libota moko na moko ya bana ya Isalaele: moko na moko azalaki mokambi ya libota na ye kolanda mabota ya bana ya Isalaele.
And with him they sent ten chiefs, one for every tribe of the children of Israel, every one of them the head of his house among the families of Israel.
15 Tango bakomaki na mokili ya Galadi, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase, balobaki na bango:
And they came to the children of Reuben and the children of Gad and the half-tribe of Manasseh, to the land of Gilead, and said to them,
16 — Tala liloba oyo lisanga mobimba ya Yawe elobi: « Ndenge nini bokoki penza kosala lisumu ya boye na miso ya Nzambe ya Isalaele? Ndenge nini penza bokoki kopesa Yawe mokongo mpe komitongela etumbelo mpo na kotombokela Ye na mokolo ya lelo?
This is what all the meeting of the people of the Lord has said, What is this wrong which you have done against the God of Israel, turning back this day from the Lord and building an altar for yourselves, and being false to the Lord?
17 Boni, lisumu ya Peori ekoki te mpo na biso? Kutu, kino na mokolo ya lelo, nanu tosilisi kopetolama na yango te, atako etumbu ekweyelaki lisanga ya Yawe!
Was not the sin of Baal-peor great enough, from which we are not clear even to this day, though punishment came on the people of the Lord,
18 Mpe bino bopesi Yawe lelo mokongo? Soki bino botombokeli Yawe lelo, lobi Ye nde akotombokela lisanga mobimba ya Isalaele.
That now you are turned back from the Lord? and, because you are false to him today, tomorrow his wrath will be let loose on all the people of Israel.
19 Soki mokili oyo bosili kozwa ezali mbindo, boleka na mokili ya Yawe, epai wapi Mongombo ya Yawe ezali mpe bokabola mabele elongo na biso. Kasi botombokela Yawe te, botombokela mpe biso te na komitongela etumbelo mosusu pene ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso.
But if the land you now have is unclean, come over into the Lord's land where his House is, and take up your heritage among us: but do not be false to the Lord and to us by building yourselves an altar in addition to the altar of the Lord our God.
20 Tango Akana, mwana mobali ya Zera, asalaki lisumu, na koyiba biloko ya bule, boni, etumbu yango ekweyaki te likolo ya lisanga mobimba ya Isalaele? Akufaki kaka ye moko te likolo ya lisumu na ye. »
Did not Achan, the son of Zerah, do wrong about the cursed thing, causing wrath to come on all the people of Israel? And not on him only came the punishment of death.
21 Bakitani ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase bazongiselaki bakambi ya mabota ya Isalaele:
Then the children of Reuben and the children of Gad and the half-tribe of Manasseh said in answer to the heads of the families of Israel,
22 — Nzambe ya banzambe! Yawe! Nzambe ya banzambe! Yawe! Ayebi nyonso! Tika ete Isalaele ayeba mpe yango! Soki tosali yango mpo na kotombokela Yawe to mpo na kosala lisumu na miso na Ye, tika ete abikisa biso te na mokolo ya lelo!
God, even God the Lord, God, even God the Lord, he sees, and Israel will see — if it is in pride or in sin against the Lord,
23 Soki tomitongeli etumbelo mpo na kopesa Yawe mokongo to mpo na kobonza mbeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma na likolo na yango to mpe mpo na kobonza bambeka ya boyokani na likolo na yango, tika ete Yawe asambisa biso!
That we have made ourselves an altar, being false to the Lord, keep us not safe from death this day; and if for the purpose of offering burned offerings on it and meal offerings, or peace-offerings, let the Lord himself send punishment for it;
24 Te, ezali bongo te! Tosalaki bongo mpo na kobanga ete lobi bakitani na bino baloba na bakitani na biso: « Eloko nini ezali kosangisa bino na Yawe, Nzambe ya Isalaele?
And if we have not, in fact, done this designedly and with purpose, having in our minds the fear that in time to come your children might say to our children, What have you to do with the Lord, the God of Israel?
25 Yawe atiaki ebale Yordani lokola mondelo kati na biso mpe bino; bino bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi! Bozali na libula moko te epai na Yawe! » Boye, bakitani na bino bakoki kosala ete bakitani na biso batika kobanga Yawe.
For the Lord has made Jordan a line of division between us and you, the children of Reuben and the children of Gad; you have no part in the Lord: so your children will make our children give up fearing the Lord.
26 Yango wana tomilobelaki: « Tika ete tomitongela etumbelo oyo noki, kasi ezali te mpo na kobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu.
So we said, Let us now make an altar for ourselves, not for burned offerings or for the offerings of beasts:
27 Ezali nde lokola litatoli kati na biso mpe bino, mpe mpo na milongo oyo ekoya, ete tokosalela Yawe na nzela ya mbeka ya kotumba mpe na nzela ya mbeka ya boyokani, na Esika na Ye ya bule. Boye lobi, bakitani na bino bakoloba na bakitani na biso te: ‹ Bozali na libula te epai na Yawe! › »
But to be a witness between us and you, and between the future generations, that we have the right of worshipping the Lord with our burned offerings and our offerings of beasts and our peace-offerings; so that your children will not be able to say to our children in time to come, You have no part in the Lord.
28 Tomilobelaki: « Soki lobi bameki koloba na biso to na bakitani na biso bongo, tokozongisela bango: ‹ Botala elilingi ya etumbelo ya Yawe, oyo batata na biso batongaki; basalaki yango te mpo na kobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu, kasi mpo ete ezala lokola litatoli kati na biso mpe bino. › »
For we said to ourselves, If they say this to us or to future generations, then we will say, See this copy of the Lord's altar which our fathers made, not for burned offerings or offerings of beasts, but for a witness between us and you.
29 Tozali te na likanisi ya kotombokela Yawe to ya kopesa Ye lelo mokongo, na kotonga etumbelo mpo na kobonza mbeka ya kotumba, makabo ya mbuma mpe bambeka mosusu pembeni ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso, oyo ezali liboso ya Mongombo na Ye.
Never let it be said that we were false to the Lord, turning back this day from him and building an altar for burned offerings and meal offerings and offerings of beasts, in addition to the altar of the Lord our God which is before his House.
30 Tango Nganga-Nzambe Pineasi, bakambi ya lisanga mpe bakambi ya mabota ya Isalaele bayokaki makambo oyo bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase balobaki, batondisamaki na esengo.
Then Phinehas the priest and the chiefs of the meeting and the heads of the families of Israel who were with him, hearing what the children of Reuben and the children of Gad and the children of Manasseh said, were pleased.
31 Mpe Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, alobaki na bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase: — Lelo, tososoli ete Yawe azali kati na biso, pamba te bosali likambo moko te ya mabe liboso ya Yawe. Sik’oyo bokangoli nde bana ya Isalaele wuta na loboko na Yawe.
And Phinehas, the son of Eleazar the priest, said to the children of Reuben and the children of Gad and the children of Manasseh, Now we are certain that the Lord is among us, because you have not done this wrong against the Lord: and you have kept us from falling into the hands of the Lord.
32 Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, mpe bakambi ya bato nyonso ya Ribeni mpe ya Gadi balongwaki na Galadi epai wapi bazalaki na mayangani, bazongaki na Kanana epai ya bana ya Isalaele mpe bapesaki bango sango ya makambo oyo elekaki.
Then Phinehas, the son of Eleazar the priest, and the chiefs went back from the land of Gilead, from the children of Reuben and the children of Gad, and came to the children of Israel in Canaan and gave them the news.
33 Bana ya Isalaele batondisamaki na esengo na koyoka sango yango mpe bakumisaki Nzambe. Boye, batikaki likanisi ya kobundisa mokili oyo bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bazalaki kovanda.
And the children of Israel were pleased about this; and they gave praise to God, and had no more thought of going to war against the children of Reuben and the children of Gad for the destruction of their land.
34 Bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi babengaki etumbelo yango « Edi » oyo elingi koloba: Litatoli kati na biso ete Yawe azali Nzambe.
And the children of Reuben and the children of Gad gave to that altar the name of Ed. For, they said, It is a witness between us that the Lord is God.

< Jozue 22 >