< Jozue 20 >

1 Yawe alobaki na Jozue:
耶和華曉諭約書亞說:
2 « Yebisa bana ya Isalaele ete bapona bingumba ya kokimela, ndenge nayebisaki bino na nzela ya Moyize,
「你吩咐以色列人說:你們要照着我藉摩西所曉諭你們的,為自己設立逃城,
3 mpo ete moto nyonso oyo akoboma moto na nko te akoka kokimela kuna mpe azwa ebombamelo liboso ya mobukanisi makila.
使那無心而誤殺人的,可以逃到那裏。這些城可以作你們逃避報血仇人的地方。
4 Soki akimeli kati na moko ya bingumba wana, akotelema na ekotelo ya ekuke ya engumba mpe akotalisa likambo na ye epai ya bampaka ya engumba wana. Bongo bampaka bakoyamba moto yango kati na engumba mpe bakopesa ye esika ya kovanda elongo na bango.
那殺人的要逃到這些城中的一座城,站在城門口,將他的事情說給城內的長老們聽。他們就把他收進城裏,給他地方,使他住在他們中間。
5 Soki mobukanisi makila alandi ye, bampaka basengeli te kokaba mobomi yango na maboko na ye, pamba te abomaki mozalani na ye na nko te mpe azalaki liboso na makanisi ya mabe te.
若是報血仇的追了他來,長老不可將他交在報血仇的手裏;因為他是素無仇恨,無心殺了人的。
6 Akotikala na engumba wana kino tango akoleka na esambiselo liboso ya lisanga mpe kino tango mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo azali na mosala na tango wana, akokufa. Na sima na yango nde mobomi yango akoki kozonga na engumba na ye, na ndako na ye, kati na engumba epai wapi awuta. »
他要住在那城裏,站在會眾面前聽審判,等到那時的大祭司死了,殺人的才可以回到本城本家,就是他所逃出來的那城。」
7 Bana ya Isalaele babulisaki Kedeshi, kati na Galile, kati na mokili ya bangomba ya Nefitali; Sishemi, kati na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, kati na mokili ya bangomba ya Yuda.
於是,以色列人在拿弗他利山地分定加利利的基低斯;在以法蓮山地分定示劍;在猶大山地分定基列‧亞巴(基列‧亞巴就是希伯崙);
8 Na ngambo mosusu ya Yordani, na este ya Jeriko, baponaki Betseri kati na esobe, na likolo ya ngomba ya libota ya Ribeni; Ramoti kati na Galadi, kati na etuka ya libota ya Gadi; mpe Golani kati na Bashani, kati na etuka ya libota ya Manase.
又在約旦河外耶利哥東,從呂便支派中,在曠野的平原,設立比悉;從迦得支派中設立基列的拉末;從瑪拿西支派中設立巴珊的哥蘭。
9 Yango nde ezalaki bingumba oyo eponamaki mpo na moto nyonso ya Isalaele to mpe mpo na mopaya nyonso oyo azali kovanda kati na bango. Moto nyonso oyo akoboma moto na nko te akoki kokimela kuna, mpo ete mobukanisi makila aboma ye te, liboso ete aleka na esambiselo na miso ya lisanga.
這都是為以色列眾人和在他們中間寄居的外人所分定的城邑,使誤殺人的都可以逃到那裏,不死在報血仇人的手中,等他站在會眾面前聽審判。

< Jozue 20 >