< Yona 1 >

1 Yawe alobaki na Yona, mwana mobali ya Amitayi:
Дође реч Господња Јони, сину Аматијевом говорећи:
2 — Telema, kende na Ninive, engumba monene, mpe kebisa bato na yango, pamba te mabe na bango ekomi kino epai na ngai.
Устани, иди у Ниневију град велики, и проповедај против њега, јер изађе злоћа њихова преда ме.
3 Yona atelemaki. Kasi mpo na kokima mosika na Yawe, akendeki na Tarsisi, akitaki na libongo ya Jafa mpe akutaki kuna masuwa moko oyo ezalaki kokende na Tarsisi. Sima na ye kofuta mbongo mpo na mobembo, akotaki na masuwa yango mpo na kokende na Tarsisi, mosika na Yawe.
А Јона уста да бежи у Тарсис од Господа, и сишав у Јопу нађе лађу која иђаше у Тарсис и платив возарину уђе у њу да отиде с њима у Тарсис од Господа.
4 Kasi Yawe atindaki mopepe makasi na likolo ya ebale monene, mpe mopepe yango ememaki mbonge oyo ekomaki pene ya kozindisa masuwa.
Али Господ подиже велик ветар на мору, и поста велика бура на мору да мишљаху да ће се разбити лађа.
5 Bato oyo basalaka na masuwa bakomaki kobanga, mpe moto na moto akomaki kobelela nzambe na ye; babwakaki biloko nyonso oyo bazalaki na yango na ebale monene mpo na kokomisa masuwa pepele. Kasi Yona akitaki na kobe ya masuwa mpe, kuna, alalaki pongi ya makasi.
И лађари уплашивши се призиваху сваки свог бога, и бацаху шта беше у лађи у море да би била лакша; а Јона беше сишао на дно лађи, и легав спаваше тврдо.
6 Mokumbi masuwa apusanaki pene ya Yona mpe alobaki na ye: — Ndenge nini okoki penza kolala pongi boye? Telema mpe belela nzambe na yo, tango mosusu akoki koyokela biso mawa mpo ete tokufa te.
А управитељ од лађе приступи к њему и рече му: Шта ти спаваш! Устани, призивај Бога свог, не би ли нас се опоменуо Бог да не погинемо.
7 Bato oyo basalaka na masuwa bamilobelaki bango na bango: « Boya! Tobeta zeke mpo toyeba moto oyo azali kobendela biso pasi oyo. » Babetaki zeke, mpe zeke yango ekweyaki epai ya Yona.
Потом рекоше један другом: Ходите, да бацимо жреб да видимо са кога дође на нас ово зло. И бацише жреб, и паде жреб на Јону.
8 Batunaki ye: — Yebisa biso nani azali kobendela biso pasi oyo? Osalaka nini? Owuti wapi? Mboka na yo nini, mpe ozali moto ya ekolo nini?
Тада му рекоше: Кажи нам зашто дође ово зло на нас; које си радње? И одакле идеш? Из које си земље? И од кога си народа?
9 Yona azongisaki: — Nazali Mo-Ebre, nasambelaka Yawe, Nzambe ya Lola, oyo akela bibale mpe mokili.
А он им рече: Јеврејин сам, и бојим се Господа Бога небеског, који је створио море и суву земљу.
10 Ayebisaki bango ete azali kokima mosika na Yawe. Boye bato yango babangaki makasi; batunaki ye: — Eloko nini osalaki kuna?
Тада се врло уплашише људи, и рекоше му: Шта си учинио? Јер дознаше људи да бежи од Господа, јер им он каза.
11 Lokola ebale ezalaki kotomboka makasi penza, batunaki ye lisusu: — Tosala yo nini mpo ete ebale evanda kimia mpe etika kotungisa biso?
И рекоше му: Шта ћемо чинити с тобом, да би нам море утолило? Јер бура на мору биваше све већа.
12 Azongiselaki bango: — Bokamata ngai mpe bobwaka ngai na ebale monene, mpe yango ekovanda kimia, pamba te nayebi malamu ete ezali mpo na ngai nde mopepe makasi oyo etelemeli bino.
А он им рече: Узмите ме и баците ме у море, и море ће вам утолити, јер видим да је с мене дошла на вас ова велика бура.
13 Bato yango bamipesaki nanu na koluka nkayi, na makasi na bango nyonso, mpo na komema masuwa na mokili, kasi balongaki te, pamba te mopepe etelemelaki bango makasi.
А људи стадоше веслати да би дошли ка крају; али не могаху, јер им бура на мору биваше све већа.
14 Bongo, babelelaki Yawe: « Oh Yawe, tobondeli Yo, koboma biso te likolo ya moto oyo. Kotika te ete makila ya moto oyo asali mabe te etangama na mito na biso. Pamba te ezali solo Yo Yawe nde osali oyo olingaki. »
Тада призваше Господа и рекоше: Молимо Ти се, Господе, да не погинемо ради душе овог човека, и немој метнути на нас крв праву, јер Ти, Господе, чиниш како хоћеш.
15 Boye, bakamataki Yona mpe babwakaki ye na ebale monene; mpe mbala moko, ebale monene oyo etombokaki makasi evandaki kimia.
Потом узеше Јону и бацише га у море, и преста бура на мору.
16 Babangaki mpe bayokaki somo makasi liboso ya Yawe; babonzelaki Ye bambeka mpe bapesaki Ye bilaka.
Тада се побојаше они људи Господа врло, и принесоше жртву Господу и учинише завете.
17 Yawe atindaki mbisi moko ya monene komela Yona. Boye Yona asalaki kati na libumu ya mbisi yango mikolo misato mpe babutu misato.
Али Господ заповеди, те велика риба прогута Јону; и Јона би у трбуху рибљем три дана и три ноћи.

< Yona 1 >