< Yona 3 >

1 Yawe alobaki na Yona na mbala ya mibale: 2 — Telema, kende na Ninive, engumba monene, mpe sakola kuna maloba oyo nakopesa yo. 3 Yona atosaki Liloba na Yawe; atelemaki mpe akendeki na Ninive. Nzokande Ninive ezalaki engumba moko ya monene na miso ya Nzambe; esengelaki kosala mikolo misato mpo na kosilisa kotambola kati na yango. 4 Yona abandaki mosala na ye, atambolaki mokolo mobimba kati na engumba; azalaki kosakola: — Etikali mikolo tuku minei mpo ete engumba ya Ninive ebebisama nye! 5 Bato ya Ninive bandimelaki Nzambe; bazwaki mokano ya kokila bilei mpe ya kolata basaki, kobanda na oyo aleki na bozwi kino na oyo aleki na bobola. 6 Tango sango yango ekomaki epai ya mokonzi ya Ninive, atelemaki longwa na kiti na ye ya bokonzi, alongolaki bilamba na ye ya bokonzi, alataki saki mpe amivandisaki na putulu. 7 Apesaki mitindo ete bapanza sango oyo na Ninive: « Na mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, Epekisami na bato mpe na bibwele, ezala ngombe, meme to ntaba; epekisami kolia biloko nyonso mpe komela mayi. 8 Tika ete bato mpe bibwele balata basaki, babelela Nzambe makasi. Tika ete moko na moko atika nzela na ye ya mabe mpe mobulu oyo ekangami ye na maboko. 9 Nani ayebi? Tango mosusu Nzambe akobongola makanisi, akolongola kanda mpe akozongisa motema sima mpo ete tokufa te. » 10 Tango Nzambe amonaki makambo oyo basalaki mpe ndenge batikaki banzela na bango ya mabe, abongolaki makanisi na Ye mpe atindelaki bango lisusu te etumbu oyo akanaki kopesa bango.

< Yona 3 >