< Yoane 5 >

1 Sima na yango, Yesu akendeki na Yelusalemi mpo na feti moko ya Bayuda.
After this there was a Jewish festival, and Jesus went up to Jerusalem.
2 Nzokande, kuna na Yelusalemi, pene ya Ekuke ya Bameme, ezalaki na liziba moko oyo, na lokota ya Arami, bazalaki kobenga « Betesida. » Liziba yango ezalaki na baveranda mitano zingazinga na yango.
Now in Jerusalem by the sheep gate, there is a pool, which in Hebrew is called Bethesda, and it has five roofed porches.
3 Babeli mingi bazalaki kolala na baveranda yango: bakufi miso, bato oyo batambolaka tengu-tengu mpe bato oyo bakufa makolo. [Bazalaki kozela ete mayi eningana,
A large number of people who were sick, blind, lame, or paralyzed were lying there.
4 pamba te anjelu moko na Nkolo azalaki koya tango na tango na liziba yango mpo na koningisa mayi. Soki mayi eningani, moto oyo azalaki kokita moto ya liboso kati na liziba azalaki kobika ata soki pasi na ye ezali ndenge nini.]
5 Ezalaki wana na moto moko oyo awumelaki na bokono mibu tuku misato na mwambe.
A certain man was there who had been sick for thirty-eight years.
6 Lokola Yesu amonaki ye alala na mabele mpe ayokaki ete awumeli mikolo ebele na pasi yango, atunaki ye: — Olingi kobika?
When Jesus saw him lying there, and after he realized that he had been there a long time, he said to him, “Do you want to be healthy?”
7 Mobeli azongiselaki Ye: — Nkolo, nazali na moto te mpo na kokitisa ngai kati na liziba soki mayi eningani. Wana nabundanaka mpo na kokita na mayi, moto mosusu akitaka liboso na ngai.
The sick man replied, “Sir, I do not have anyone to put me into the pool when the water is stirred up. When I come, another steps down before me.”
8 Yesu alobaki na ye: — Telema, kamata etoko na yo mpe tambola.
Jesus said to him, “Get up, take up your bed, and walk.”
9 Kaka na tango yango, moto yango abikaki; akamataki etoko na ye mpe akomaki kotambola. Nzokande likambo yango esalemaki na mokolo ya Saba.
Immediately the man was healed, and he took up his bed and walked. Now that day was a Sabbath.
10 Boye, bakambi ya Bayuda balobaki na moto oyo abikisamaki: — Lelo ezali mokolo ya Saba; ozali na ndingisa te ya komema etoko oyo.
So the Jews said to him who was healed, “It is the Sabbath and you are not permitted to carry your mat.”
11 Azongiselaki bango: — Moto oyo abikisi ngai alobi na ngai: « Kamata etoko na yo mpe tambola. »
He replied, “He who made me healthy said to me, 'Pick up your mat and walk.'”
12 Batunaki ye lisusu: — Nani alobi na yo bongo?
They asked him, “Who is the man that said to you, 'Pick it up and walk'?”
13 Kasi moto oyo abikaki ayebaki te soki moto oyo abikisaki ye azali nani, pamba te Yesu alimwaki kati na ebele ya bato oyo bazalaki wana.
However, the one who was healed did not know who it was because Jesus had gone away secretly, for there was a crowd in the place.
14 Sima na mwa tango, Yesu amonaki, kati na lopango ya Tempelo, moto oyo abikaki. Alobaki na ye: — Tala, omoni ndenge okomi sik’oyo nzoto kolongono. Kosala lisusu masumu te, noki te likambo moko ya mabe koleka ekomela yo.
Afterward, Jesus found him in the temple and said to him, “See, you have become healthy! Do not sin anymore, so that something worse will not happen to you.”
15 Moto yango akendeki koyebisa bakambi ya Bayuda ete ezali Yesu nde abikisaki ye.
The man went away and reported to the Jews that it was Jesus who had made him healthy.
16 Lokola Yesu azalaki kosala makambo wana na mokolo ya Saba, bakambi ya Bayuda bakomaki kofunda Ye.
Now because of these things the Jews persecuted Jesus, because he did these things on the Sabbath.
17 Kasi Yesu alobaki na bango: « Tata na Ngai azali kosala kino sik’oyo, Ngai mpe nazali kosala. »
Jesus replied to them, “My Father is working even now, and I, too, am working.”
18 Mpo na yango, bakambi ya Bayuda bakomaki koluka nzela ya koboma Ye; pamba te azalaki kotosa te mokolo ya Saba, azalaki koloba ete Nzambe azali Tata na Ye, mpe Ye akokani na Nzambe.
Because of this, the Jews sought even more to kill him because he not only broke the Sabbath, but also called God his own Father, making himself equal to God.
19 Yesu alobaki na bango lisusu: Nazali koloba na bino penza ya solo: Mwana akoki kosala eloko moko te na ndenge na Ye moko, kasi azali kosala kaka makambo oyo azali komona Tata na Ye kosala; pamba te makambo nyonso oyo Tata asalaka, yango mpe Mwana asalaka.
Jesus answered them, “Truly, truly, the Son can do nothing of himself, except only what he sees the Father doing, for whatever the Father is doing, the Son does these things also.
20 Boye lokola Tata alingaka Mwana, yango wana alakisaka Ye makambo nyonso oyo Ye moko Tata asalaka; kutu, akolakisa Ye lisusu kosala makambo minene koleka oyo bosili komona kino sik’oyo, mpo ete bokamwa.
For the Father loves the Son and he shows him everything that he himself does, and he will show him greater things than these so that you will be amazed.
21 Ndenge kaka Tata asekwisaka bakufi mpe apesaka bango bomoi, ndenge wana mpe Mwana apesaka bomoi na moto oyo Ye alingi.
For as the Father raises the dead and gives them life, so also the Son gives life to whomever he wishes.
22 Lisusu, Tata asambisaka bato te; apesa bokonzi ya kosambisa bato na maboko ya Mwana,
For the Father judges no one, but he has given all judgment to the Son
23 mpo ete bato nyonso bakumisa Mwana ndenge bakumisaka Tata. Moto oyo akumisaka Mwana te akumisaka mpe Tata te oyo atindaki Mwana.
so that everyone will honor the Son just as they honor the Father. The one who does not honor the Son does not honor the Father who sent him.
24 Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi. (aiōnios g166)
Truly, truly, he who hears my word and believes him who sent me has eternal life and will not be condemned, but he has passed from death to life. (aiōnios g166)
25 Nazali koloba na bino penza ya solo: tango ezali koya mpe esili kokoka oyo bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana na Nzambe, mpe ba-oyo bakoyoka yango bakozala na bomoi;
Truly, truly, I tell you the time is coming, and is now, when the dead will hear the voice of the Son of God, and those who hear will live.
26 pamba te lokola Tata azali etima ya bomoi, yango wana asalaki mpe ete Mwana azala etima ya bomoi;
For just as the Father has life in himself, so he has also given to the Son so that he has life in himself,
27 mpe apesaki Ye bokonzi ya kosambisa bato, mpo ete azali Mwana na Moto.
and the Father has given the Son authority to carry out judgment because he is the Son of Man.
28 Bokamwa yango te, pamba te tango ezali koya, tango oyo bato nyonso oyo bazali kati na bakunda bakoyoka mongongo na Ye
Do not be amazed at this, for there is a time coming in which everyone who is in the tombs will hear his voice
29 mpe bakobima longwa kati na yango: ba-oyo basalaki malamu bakosekwa mpo na kozwa bomoi, kasi ba-oyo basalaki mabe bakosekwa mpo na kozwa etumbu.
and will come out. Those who have done good to the resurrection of life, and those who have done evil to the resurrection of judgment.
30 Nakoki kosala eloko moko te na ndenge na Ngai moko: nakataka makambo kolanda oyo nayokaka kowuta epai na Tata, mpe kosambisa na Ngai ezali sembo; pamba te nalukaka te kosala mokano na Ngai moko, kasi mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.
I can do nothing from myself. As I hear, I judge, and my judgment is righteous because I am not seeking my own will but the will of him who sent me.
31 Soki napesi litatoli mpo na Ngai moko, litatoli na Ngai ekozala ya solo te.
If I should testify about myself, my testimony would not be true.
32 Boye esengeli ete motatoli mosusu apesa yango mpo na Ngai; mpe nayebi ete litatoli oyo akopesa na tina na Ngai ezali ya solo.
There is another who testifies about me, and I know that the testimony that he gives about me is true.
33 Botindaki bato epai ya Yoane, mpe ye atatolaki na tina na bosolo.
You have sent to John, and he has testified the truth.
34 Ngai, nandimaka litatoli ya moto te; kasi nalobi bongo mpo ete bobika.
But the testimony that I receive is not from man. I say these things that you might be saved.
35 Solo, Yoane azalaki lokola mwinda oyo bapelisi mpe ezali kongenga. Kasi bino, boponaki kosepela na kongenga na ye kaka mpo na mwa tango moke.
John was a lamp that was burning and shining, and you were willing to rejoice in his light for a while.
36 Nzokande Ngai, nazali na litatoli moko ya monene na tina na Ngai moko koleka kutu oyo ya Yoane: misala oyo nazali kosala na Kombo ya Tata etatolaka na tina na Ngai ete ezali Tata nde atindaki Ngai.
Yet the testimony that I have is greater than that of John, for the works that the Father has given me to accomplish, the very works that I do, testify about me that the Father has sent me.
37 Ye moko, Tata, oyo atindaki Ngai atatolaki mpo na Ngai. Botikala nanu te koyoka mongongo na Ye mpe komona elongi na Ye;
The Father who sent me has himself testified about me. You have neither heard his voice nor seen his form at any time.
38 mpe liloba na Ye ezali kati na bino te, pamba te bondima te Motindami na Ye.
You do not have his word remaining in you, for you are not believing in the one whom he has sent.
39 Bokundolaka Makomi na bokebi, mpo ete bokanisaka ete bokozwa bomoi ya seko kati na yango; nzokande, Makomi yango etatolaka na tina na Ngai, (aiōnios g166)
You search the scriptures because you think that in them you have eternal life, and these same scriptures testify about me, (aiōnios g166)
40 kasi boboyi na bino koya epai na Ngai mpo na kozwa bomoi.
and you are not willing to come to me so that you may have life.
41 Nalukaka na Ngai te lokumu oyo ewutaka na bato.
I do not receive praise from men,
42 Kutu nayebi bino malamu, nayebi ete, kati na mitema na bino, bozali na bolingo te mpo na Nzambe.
but I know that you do not have the love of God in yourselves.
43 Ngai, nayei na Kombo ya Tata na Ngai, kasi boboyi koyamba Ngai! Nzokande, soki moto mosusu ayei na kombo na ye moko, bokoyamba ye.
I have come in my Father's name, and you do not receive me. If another should come in his own name, you would receive him.
44 Lokola bolukaka kaka kopesana lokumu bino na bino mpe boboyaka lokumu oyo ewutaka kaka na Nzambe, ndenge nini bokoki kondima Ngai?
How can you believe, you who accept praise from one another but are not seeking the praise that comes from the only God?
45 Bokanisa te ete Ngai nde nakofunda bino liboso ya Tata na Ngai, ezali Moyize oyo bondimaka nde akofunda bino.
Do not think that I myself will accuse you before the Father. The one who accuses you is Moses, in whom you have put your hope.
46 Pamba te, soki penza bozalaki kondima Moyize, bolingaki mpe kondima Ngai; pamba te akomaki na tina na Ngai.
If you believed Moses, you would believe me, because he wrote about me.
47 Kasi soki bozali kondima ata makomi na ye te, ndenge nini bokondima maloba na Ngai?
If you do not believe his writings, how are you going to believe my words?”

< Yoane 5 >