< Yoane 20 >

1 Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, wana molili ezalaki nanu, Mari, moto ya mboka Magidala, akendeki na kunda mpe amonaki ete libanga esilaki kolongolama na ekotelo ya kunda. 2 Apotaki mbangu mpo na kokende kokutana na Simona Petelo mpe moyekoli mosusu, ye oyo Yesu azalaki kolinga; alobaki na bango: — Balongoli Nkolo wuta na kunda, mpe toyebi te soki batie Ye wapi! 3 Petelo elongo na moyekoli wana bakendeki na kunda. 4 Bango mibale bazalaki kopota mbangu nzela moko; kasi lokola moyekoli wana azalaki mbangu koleka Petelo, akomaki moto ya liboso na kunda. 5 Agunzamaki mpo na kotala mpe amonaki, na mabele, maputa oyo bakundaki na yango Yesu; kasi akotaki te. 6 Simona Petelo oyo azalaki kolanda ye akomaki mpe akotaki kati na kunda, amonaki maputa oyo ezalaki na mabele 7 mpe elamba oyo balingaki na moto ya Yesu; elamba ezalaki esika moko te na maputa oyo balingaki na yango nzoto ya Yesu, kasi ezalaki ya kolingama na esika na yango moko. 8 Bongo moyekoli oyo akomaki moto ya liboso kuna na kunda, ye mpe akotaki kati na kunda; amonaki mpe andimaki. 9 Kasi kino na tango wana, basosolaki nanu te ete Yesu asengelaki kosekwa kati na bakufi, kolanda ndenge Makomi ezali koloba. 10 Sima na yango, bayekoli nyonso mibale bazongaki na esika oyo bazalaki kovanda. 11 Nzokande, Mari atelemaki na libanda, pene ya kunda, mpe azalaki kolela. Mpe wana azalaki kolela, agunzamaki mpo na kotala kati na kunda; 12 amonaki ba-anjelu mibale balata bilamba ya pembe mpe bavanda na esika oyo nzoto ya Yesu ezalaki: moko na ngambo ya moto, mpe mosusu, na ngambo ya makolo. 13 Ba-anjelu batunaki ye: — Mwasi, mpo na nini ozali kolela? Azongisaki: — Nazali kolela mpo ete balongoli Nkolo na ngai mpe nayebi te soki batie Ye wapi? 14 Tango alobaki bongo, abalukaki mpe amonaki Yesu atelemi wana, kasi ayebaki te ete ezali Yesu. 15 Yesu atunaki ye: — Mwasi, mpo na nini ozali kolela? Ozali koluka nani? Mari akanisaki ete azali mosali elanga; alobaki na ye: — Tata, soki yo nde moto olongolaki Ye, yebisa ngai esika nini otie Ye mpo ete nakende kokamata Ye. 16 Yesu alobaki na ye: — Mari! Mari abalukaki mpe alobaki na lokota ya Ebre: — Rabuni! 17 Yesu alobaki na ye: — Kosimba Ngai te, pamba te nanu namati te epai ya Tata na Ngai. Kende nde epai ya bandeko na Ngai mpe yebisa bango ete nakeyi epai ya Tata na Ngai, oyo azali mpe Tata na bino; epai ya Nzambe na Ngai, oyo azali mpe Nzambe na bino. 18 Mari, moto ya mboka Magidala, akendeki koyebisa bayekoli ete awuti komona Nkolo; ayebisaki bango lisusu makambo oyo Nkolo alobaki na ye. 19 Na pokwa ya mokolo wana ya liboso ya poso, wana bayekoli basanganaki esika moko kati na ndako mpe bakangaki malamu bikuke mpo ete bazalaki kobanga bakonzi ya Bayuda, Yesu ayaki, atelemaki na kati-kati na bango mpe alobaki: — Tika ete kimia ezala na bino! 20 Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko na Ye mpe mopanzi na Ye. Bayekoli batondaki na esengo tango bamonaki Nkolo. 21 Yesu alobaki na bango lisusu: — Tika ete kimia ezala na bino! Ndenge Tata atindaki Ngai, Ngai mpe nazali kotinda bino. 22 Sima na Yesu koloba makambo wana, afulaki bango mopepe mpe alobaki na bango: — Boyamba Molimo Mosantu! 23 Bato oyo bokolimbisa masumu na bango, masumu na bango ekolimbisama; kasi ba-oyo bokolimbisa te, bakozwa mpe bolimbisi te. 24 Toma, moko kati na bayekoli zomi na mibale, oyo babengaka Lipasa, azalaki te elongo na bayekoli tango Yesu ayaki. 25 Bayekoli mosusu balobaki na ye: — Towuti komona Nkolo! Kasi Toma azongiselaki bango: — Soki ngai namoni te bilembo ya basete na maboko na Ye, soki natie mosapi na ngai te kati na bisika oyo basete etobolaki Ye, mpe soki natie te loboko na ngai kati na mopanzi na Ye, nakotikala kondima te. 26 Sima na mikolo mwambe, bayekoli ya Yesu basanganaki lisusu kati na ndako. Na mbala oyo, Toma mpe azalaki elongo na bango, mpe bikuke ezalaki ya kokangama. Yesu ayaki, atelemaki kati na bango mpe alobaki: — Tika ete kimia ezala na bino! 27 Bongo, alobaki na Toma: — Tia mosapi na yo awa, tala maboko na Ngai; sembola loboko na yo mpe tia yango na mopanzi na Ngai. Kozala te moto oyo azangi kondima, kasi moto na kondima! 28 Toma azongiselaki Yesu: — Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai! 29 Yesu alobaki na ye: — Ondimi mpo ete omoni Ngai! Esengo na bato oyo bamoni te, kasi bandimi! 30 Yesu asalaki lisusu, na miso ya bayekoli na Ye, bikamwa mosusu mingi oyo ekomami te kati na buku oyo. 31 Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.

< Yoane 20 >