< Yobo 31 >

1 « Nasalaki boyokani elongo na miso na ngai ete nalula elenge mwasi te. 2 Pamba te, libula nini Nzambe akoki kobongisela ngai wuta na likolo? Libonza nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kotindela ngai wuta na likolo? 3 Boni, pasi ezali mpo na bato mabe te? Kobebisama ezali mpo na bato oyo basalaka masumu te? 4 Amoni banzela na ngai te? Atangi matambe na ngai nyonso te? 5 Soki natambolaki na lokuta to litambe na ngai elandaki nzela mabe, 6 tika ete Nzambe ameka ngai na emekelo ya sembo, mpe akomona ete ngai nasali mabe te. 7 Soki matambe na ngai ebimaki na nzela na Ye, soki motema na ngai etambolisamaki kolanda miso na ngai, soki maboko na ngai ekomaki mbindo, 8 tika ete bato mosusu balia biloko oyo ngai naloni, mpe tika ete nkona na ngai epikolama! 9 Soki motema na ngai ekosamaki na mwasi to soki natalaki na makanisi mabe ekuke ya mozalani na ngai, 10 tika ete mwasi na ngai atutela moto mosusu ble mpe tika ete mibali mosusu basangisa na ye nzoto. 11 Pamba te elingaki kozala likambo ya soni, mpe lisumu ya boye ebongi na esambiselo ya basambisi. 12 Ezali moto oyo ezali kozikisa kino na kobebisama mpe ekoki kobebisa bomengo na ngai nyonso. 13 Soki nasalelaki na bosembo te bawumbu na ngai ya mibali mpe ya basi tango bazwaki ngai mabe, 14 nakosala nini soki Nzambe asambisi ngai? Nakopesa eyano nini tango akotuna ngai ndenge nini nabandaki kosala? 15 Ezalaki Ye te oyo asalaki ngai kati na libumu ya mama na ngai nde asalaki bango? Ngai na bango, tozalaki lolenge moko te kati na mabumu ya bamama na biso? 16 Soki nakokisaki te posa ya mobola to soki nalembisaki miso ya mwasi oyo akufisa mobali, 17 soki nabombaki lipa na ngai mpo na ngai moko to nakabolaki yango te na bana bitike, 18 —nzokande wuta bolenge na ngai, nazalaki kobokola bana bitike lokola tata na bango; mpe wuta mbotama na ngai, nazalaki kolakisa nzela na mwasi oyo akufisa mobali— 19 soki namonaki mobola kokufa na kozanga bilamba to moto akelela kozanga bilamba, 20 bongo motema na ye epambolaki ngai te na ndenge nazipaki ye na bilamba oyo ewutaki na bibwele na ngai, 21 soki natombolaki loboko na ngai mpo na kosala mwana etike mabe, wana nayebaki ete nazali na nguya liboso ya basambisi, 22 tika ete loboko na ngai elongwa na lipeka na ngai to ebukana! 23 Pamba te nazalaki kobanga etumbu ya Nzambe, mpe nakokaki te kosala eloko liboso ya lokumu na Ye. 24 Soki natiaki elikya na ngai na wolo to nalobaki na wolo ya kitoko: ‹ Ozali ekimelo na ngai, › 25 soki nasepelaki na ebele ya bozwi na ngai, bomengo oyo maboko na ngai esalaki, 26 soki natalaki moyi na kongenga na yango to sanza kotambola na nkembo, 27 soki motema na ngai ekosamaki na nkuku, mpe maboko na ngai epesaki yango beze ya lokumu, 28 wana elingaki lisusu kozala mbeba oyo ebongi na esambiselo ya basambisi, pamba te nalingaki kowangana Nzambe oyo azali na Likolo. 29 Soki nasepelaki na pasi ya monguna na ngai to nagangaki na esengo na likama oyo ekomelaki ye, 30 soki napesaki nzela na monoko na ngai ete esala lisumu na kosenga kufa ya monguna na ngai na nzela ya maloba ya kolakela mabe; 31 soki bato ya libota na ngai balobaka te: ‹ Nani oyo atondaki te na misuni ya banyama ya Yobo? › 32 Soki mopaya moko te alalaki libanda, pamba te ekuke na ngai ezalaki ya kofungwama tango nyonso mpo na moleki nzela, 33 soki nabombaki lisumu na ngai ndenge Adamu asalaki to nabombaki yango na motema na ngai, 34 pamba te nabangaki bato mpe nabangaki ete mabota etiola ngai, yango wana nakangaki monoko mpe nakokaki kobima libanda te! 35 Ah, soki nazalaki ata na moto oyo akokaki koyoka ngai! Yango nde sik’oyo liloba na ngai ya suka. Tika ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayanola ngai! Tika ete moto oyo afundi ngai akoma na mokanda makambo oyo afundeli ngai! 36 Solo, nalingaki komema yango na lipeka na ngai, nalingaki kolata yango lokola motole, 37 nalingaki kotalisa Ye makambo nyonso oyo nasalaki, nalingaki kopusana pene na Ye lokola mokambi.— 38 Soki mabele na ngai eboyi ngai, soki mikala na yango elelaki, 39 soki naliaki bambuma na yango na ofele to soki natungisaki bankolo na yango, 40 tika ete banzube ebima na esika ya ble, mpe matiti mabe ebima na esika ya orje. » Oyo nde suka ya maloba ya Yobo.

< Yobo 31 >