< Yobo 25 >

1 Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki: 2 « Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe; atiaka kimia na bisika na Ye ya likolo. 3 Boni, bakoki kotanga mampinga na Ye ya lola? Na likolo ya nani pole ya Nzambe engengaka te? 4 Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe? Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto? 5 Soki kutu sanza ezali kongenga te, mpe minzoto ezali peto te, na miso na Ye, 6 toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi, mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba! »

< Yobo 25 >