< Yobo 14 >

1 Moto oyo abotama na mwasi azalaka kaka na mikolo moke oyo mpe etonda na pasi. 2 Akolaka mpe akawukaka lokola fololo, awumelaka te lokola elili ya lipata oyo elekaka. 3 Olingi kaka kolandela ekelamu ya boye? Olingi kaka komema ye liboso na Yo mpo na kosambisa ye? 4 Nani akoki kobimisa bopeto kati na mbindo? Moko te! 5 Mikolo ya moto ekatama; okata motango ya basanza na ye mpe otia mondelo oyo akoki koleka te. 6 Longola miso na Yo mosika na ye mpe tika ye, ye moko, kino tango akozwa lifuti ya mosala na ye lokola moto oyo asalaka kaka mpo na lifuti. 7 Nzete ezalaka kutu na mwa elikya: ata bakati yango, ebimaka lisusu mpe ebotaka bitape ya sika; 8 misisa na yango ekoki konuna na se ya mabele, mpe eteni na yango oyo etikalaka ekoki kokufa kati na mabele, 9 nzokande soki kaka ezwi mayi, ekobimisa mito mpe ekobota bitape lokola nzete ya sika. 10 Kasi moto akufaka mpe aninganaka lisusu te, akataka motema mpe azalaka lisusu na bomoi te. 11 Ndenge mayi esilaka na liziba to ndenge mayi ekawukaka, 12 ndenge wana mpe moto akufaka mpe atelemaka lisusu te, akolamuka lisusu te mpe bakoki lisusu kolamusa ye te, tango nyonso likolo ekozala. 13 Soki kaka obombaki ngai na se ya bakufi mpe otikaki ngai kuna kino kanda na Yo esila! Soki kaka okatelaki ngai tango mpo ete, na sima na yango, okanisa ngai lisusu! (Sheol h7585) 14 Nzokande, soki moto akufi, boni, akoki lisusu kozala na bomoi? Nakozela kino lolenge na ngai ebongwana. 15 Okobenga ngai, mpe ngai, nakondima; okozala na posa makasi ya ekelamu ya maboko na Yo. 16 Solo penza, okotanga makolo na ngai, kasi okolandela lisusu masumu na ngai te. 17 Mabe na ngai ekokangama kati na saki, mpe okozipa masumu na ngai. 18 Kasi, ndenge ngomba esilaka mpe ekweyaka, ndenge libanga elongwaka na esika na yango, 19 ndenge mayi eliaka mabanga, ndenge mayi oyo etiolaka ememaka mabele, ndenge wana mpe obebisaka elikya ya moto. 20 Olongaka ye mbala moko, mpe akendaka na ye; obebisaka elongi na ye mpe obenganaka ye. 21 Soki bana na ye ya mibali bazwi lokumu, ayebaka na ye yango te; soki basambwisi bango, amonaka na ye yango te. 22 Ayokaka kaka pasi kati na nzoto na ye, mpe motema na ye esalaka kaka matanga mpo na ye moko. »

< Yobo 14 >