< Jeremi 9 >

1 Ah! Soki moto na ngai ezalaki etima, mpe soki miso na ngai ezalaki liziba ya mpinzoli, nalingaki kolela butu mpe moyi mpo na bato na ngai, oyo basili koboma.
但願我的頭為水, 我的眼為淚的泉源, 我好為我百姓中被殺的人晝夜哭泣。
2 Ah! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi!
惟願我在曠野有行路人住宿之處, 使我可以離開我的民出去; 因他們都是行姦淫的, 是行詭詐的一黨。
3 « Babongisaka lolemo na bango lokola tolotolo mpo na kokosa; balongaka kati na mokili na nzela ya solo te, pamba te basalaka se mabe likolo ya mabe mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe.
他們彎起舌頭像弓一樣, 為要說謊話。 他們在國中增長勢力, 不是為行誠實, 乃是惡上加惡, 並不認識我。 這是耶和華說的。
4 « Tika ete moto na moto asala keba na moninga na ye mpe atia motema te na ndeko na ye, pamba te ndeko nyonso azali moto ya lokuta, mpe moninga nyonso azali moto ya matongi.
你們各人當謹防鄰舍, 不可信靠弟兄; 因為弟兄盡行欺騙, 鄰舍都往來讒謗人。
5 Moninga azali kokosa moninga na ye, mpe moto moko te azali koloba solo. Bamibongisaka mpo na koloba lokuta, babimisaka motoki na bango mpo na kosala masumu.
他們各人欺哄鄰舍,不說真話; 他們教舌頭學習說謊, 勞勞碌碌地作孽。
6 Mosala na bango se kokosa na kokosa; mpe na lokuta na bango, baboyaka kotosa Ngai, » elobi Yawe.
你的住處在詭詐的人中; 他們因行詭詐,不肯認識我。 這是耶和華說的。
7 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Tala, nakopetola mpe nakomeka bango na moto, pamba te nasala lisusu nini mpo na masumu ya bato na Ngai?
所以萬軍之耶和華如此說: 看哪,我要將他們鎔化熬煉; 不然,我因我百姓的罪該怎樣行呢?
8 Lolemo na bango ezali lokola likonga oyo ebomaka, ebimisaka kaka maloba ya lokuta. Moto na moto alobaka na moninga na ye na esengo na monoko; kasi na se ya motema, atielaka ye motambo.
他們的舌頭是毒箭,說話詭詐; 人與鄰舍口說和平話, 心卻謀害他。
9 Bongo na makambo ya boye, napesa bango etumbu te, » elobi Yawe? « Nazongisa mabe na mabe te na ekolo ya boye? »
耶和華說:我豈不因這些事討他們的罪呢? 豈不報復這樣的國民呢?
10 Nakosala matanga mpe nakolela mpo na bangomba mpe matiti ya esobe. Nyonso esili kokawuka mpe moto moko te azali lisusu kolekela wana; ezala makelele ya bibwele to ya bandeke ezali lisusu koyokana te; bandeke ya likolo ekimi mpe banyama ya zamba esili kokende.
我要為山嶺哭泣悲哀, 為曠野的草場揚聲哀號; 因為都已乾焦,甚至無人經過。 人也聽不見牲畜鳴叫, 空中的飛鳥和地上的野獸都已逃去。
11 « Nakokomisa Yelusalemi liboke ya mabanga oyo ebukana-bukana, ndako ya mbwa ya zamba; nakobebisa bingumba ya Yuda, bongo moto moko te akovanda lisusu kuna.
我必使耶路撒冷變為亂堆,為野狗的住處, 也必使猶大的城邑變為荒場,無人居住。
12 Nani azali penza na bwanya mpo na kososola makambo ya boye? Nani Yawe ateyaki mpo ete alimbola yango? Mpo na nini mokili ebebisami, etikali pamba lokola esobe epai wapi moto alekaka te? »
誰是智慧人,可以明白這事?耶和華的口向誰說過,使他可以傳說?遍地為何滅亡,乾焦好像曠野,甚至無人經過呢?
13 Yawe alobi: « Makambo oyo nyonso ekomeli bango mpo ete basundoli Mobeko na Ngai oyo natiaki liboso na bango, batosi Ngai te mpe basaleli malako na Ngai te.
耶和華說:「因為這百姓離棄我在他們面前所設立的律法,沒有遵行,也沒有聽從我的話;
14 Nzokande, batiaki kaka mito makasi mpe bakobaki kolanda banzambe ya Bala oyo batata na bango balakisaki bango. »
只隨從自己頑梗的心行事,照他們列祖所教訓的隨從眾巴力。」
15 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Tala, nakoleisa bato oyo matiti ya bololo mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge.
所以萬軍之耶和華-以色列的上帝如此說:「看哪,我必將茵蔯給這百姓吃,又將苦膽水給他們喝。
16 Nakopanza bango kati na bikolo oyo, ezala bango to bakoko na bango, batikalaki koyeba te; nakolanda bango na mopanga kino nakosilisa koboma bango. »
我要把他們散在列邦中,就是他們和他們列祖素不認識的列邦。我也要使刀劍追殺他們,直到將他們滅盡。」
17 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Botala malamu makambo oyo! Bobengisa basi oyo balelaka bibembe, bobengisa penza ba-oyo bayebi kolela malamu!
萬軍之耶和華如此說: 你們應當思想, 將善唱哀歌的婦女召來, 又打發人召善哭的婦女來,
18 Tika ete baya noki mpo ete bayembela biso banzembo ya mawa kino tango mpinzoli ekobima biso mpe ekotondisa miso na biso.
叫她們速速為我們舉哀, 使我們眼淚汪汪, 使我們的眼皮湧出水來。
19 Kolela ya mawa ezali koyokana wuta na Siona: ‹ Ah! Tala ndenge nini tosili kobebisama! Tala ndenge nini tosambwe! Tika ete tokima mokili na biso, pamba te bandako na biso ebebisami. › »
因為聽見哀聲出於錫安,說: 我們怎樣敗落了! 我們大大地慚愧! 我們撇下地土; 人也拆毀了我們的房屋。
20 Eh basi, boyoka Liloba na Yawe! Bofungola matoyi mpo na koyoka maloba ya monoko na Ye. Bolakisa bana na bino ya basi banzembo ya mawa mpe tika ete moko na moko ayekolisa moninga na ye nzembo ya mawa.
婦女們哪,你們當聽耶和華的話, 領受他口中的言語; 又當教導你們的兒女舉哀, 各人教導鄰舍唱哀歌。
21 Kufa emati mpe ekoti na nzela ya maninisa na biso, ekoti kino na bandako na biso, oyo batonga makasi; eyei kosilisa koboma bana na babalabala, mpe bilenge mibali na bisika oyo bato ebele bokutanaka.
因為死亡上來, 進了我們的窗戶, 入了我們的宮殿; 要從外邊剪除孩童, 從街上剪除少年人。
22 Loba: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Bibembe ya bato ekolala na mabele mpe ekotikala wana lokola fimie ya bilanga, lokola liboke ya bambuma oyo mobuki bambuma atiki na sima na ye mpe moto oyo akolokota yango azali te. › »
你當說,耶和華如此說: 人的屍首必倒在田野像糞土, 又像收割的人遺落的一把禾稼, 無人收取。
23 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Tika ete moto ya bwanya amikumisa te mpo na bwanya na ye to moto ya makasi mpo na makasi na ye to moto ya bozwi mpo na bozwi na ye.
耶和華如此說:「智慧人不要因他的智慧誇口,勇士不要因他的勇力誇口,財主不要因他的財物誇口。
24 Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa mpo ete azali na bososoli mpe ayebi Ngai, mpo ete ayebi ete nazali Yawe oyo atalisaka bolamu, bosembo mpe boyengebene na mokili; pamba te nasepelaka nde na makambo wana, » elobi Yawe.
誇口的卻因他有聰明,認識我是耶和華,又知道我喜悅在世上施行慈愛、公平,和公義,以此誇口。這是耶和華說的。」
25 « Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bakatama ngenga kaka na nzoto, kasi na mitema te:
耶和華說:「看哪,日子將到,我要刑罰一切受過割禮、心卻未受割禮的,
26 bato ya Ejipito, ya Yuda, ya Edomi, ya Amoni, ya Moabi mpe bavandi nyonso ya esobe oyo bamikataka mandefu; pamba te bato ya bikolo oyo nyonso bakatama ngenga te. Mpe ezala bana nyonso ya Isalaele oyo bakatama ngenga, bakatama yango kaka na bonzoto, kasi na mitema te. »
就是埃及、猶大、以東、亞捫人、摩押人,和一切住在曠野剃周圍頭髮的;因為列國人都沒有受割禮,以色列人心中也沒有受割禮。」

< Jeremi 9 >