< Jeremi 5 >

1 « Bokende, botambola na babalabala ya Yelusalemi, botala zingazinga mpe bososola malamu penza, boluka ata na bisika oyo bato ebele bakutanaka; soki bokoki komona ata moto moko oyo atambolaka na bosembo mpe alukaka boyengebene, wana nakolimbisa engumba oyo.
שוטטו בחוצות ירושלם וראו נא ודעו ובקשו ברחובותיה אם תמצאו איש אם יש עשה משפט מבקש אמונה--ואסלח לה
2 Atako balapaka ndayi na maloba oyo: ‹ Na Kombo na Yawe, › ndayi na bango ezalaka kaka ya lokuta. »
ואם חי יהוה יאמרו לכן לשקר ישבעו
3 Oh Yawe; boni, miso na Yo esepelaka te komona bosolo? Obetaka solo bato, kasi bayokaka na bango pasi te; osilisaka koboma bango, kasi baboyaka kaka kobongwana. Bakomisa mito na bango makasi lokola mabanga mpe baboyaka kobongola mitema na bango.
יהוה עיניך הלוא לאמונה--הכיתה אתם ולא חלו כליתם מאנו קחת מוסר חזקו פניהם מסלע מאנו לשוב
4 Namilobelaki: « Bato oyo bazali kaka bato pamba, bazangi mayele, mpo ete bayebi nzela ya Yawe te mpe bayebi malako ya Nzambe na bango te.
ואני אמרתי אך דלים הם נואלו--כי לא ידעו דרך יהוה משפט אלהיהם
5 Boye, nakokende epai ya bakambi na bango mpe nakoloba na bango, pamba te bango nde basengeli koyeba nzela ya Yawe mpe malako ya Nzambe na bango. » Kasi bango nyonso, na motema moko, babukaki ekangiseli mpe bakataki minyololo.
אלכה לי אל הגדלים ואדברה אותם--כי המה ידעו דרך יהוה משפט אלהיהם אך המה יחדו שברו על נתקו מוסרות
6 Yango wana, nkosi moko ekobima wuta na zamba mpe ekoboma bango; mbwa ya zamba ekobima wuta na esobe mpe ekopasola bango; nkoyi moko ekovanda pene ya bingumba na bango mpo na koboma moto nyonso oyo akoluka kobima kuna, pamba te botomboki na bango ezali monene mpe lokuta na bango eleki mingi.
על כן הכם אריה מיער זאב ערבות ישדדם--נמר שקד על עריהם כל היוצא מהנה יטרף כי רבו פשעיהם עצמו משבותיהם
7 « Na makambo ya boye, ndenge nini nalimbisa yo? Ah Yelusalemi, bana na yo basundoli Ngai mpe bazali kolapa ndayi na bakombo ya banzambe ya bikeko oyo ezali ata banzambe te. Nakokisaki baposa na bango nyonso, kasi basalaki kaka ekobo mpe bakendeki na bandako ya basi ya ndumba.
אי לזאת אסלוח (אסלח) לך--בניך עזבוני וישבעו בלא אלהים ואשבע אותם וינאפו ובית זונה יתגודדו
8 Ndenge mpunda ya mobali etambolaka-tambolaka soki ezali na posa ya kosangisa nzoto na mpunda ya mwasi, ndenge wana mpe moko na moko kati na bango alandaka-landaka mwasi ya moninga mpo na kosangisa na ye nzoto.
סוסים מיזנים משכים היו איש אל אשת רעהו יצהלו
9 Na makambo ya boye, napesa bango etumbu te? » elobi Yawe? « Motema na Ngai ezongisa penza mabe na mabe te na ekolo ya lolenge oyo?
העל אלה לוא אפקד נאם יהוה ואם בגוי אשר כזה לא תתנקם נפשי
10 Bomata na bamir mpo na kokota na Yelusalemi mpe bobebisa yango; kasi bobebisa yango nyonso te. Bokata bitape na yango, pamba te etikali lisusu ya Yawe te.
עלו בשרותיה ושחתו וכלה אל תעשו הסירו נטישותיה כי לוא ליהוה המה
11 Libota ya Isalaele mpe ya Yuda etamboli na boyengebene te na miso na Ngai, » elobi Yawe.
כי בגוד בגדו בי בית ישראל ובית יהודה--נאם יהוה
12 Bawanganaki Yawe mpe balobaki: « Yawe akosala eloko moko te! Pasi moko te ekokomela biso; tokotikala na biso komona te ezala mopanga to nzala makasi.
כחשו ביהוה ויאמרו לוא הוא ולא תבוא עלינו רעה וחרב ורעב לוא נראה
13 Basakoli bazali kaka lokola mopepe ya pamba, bazali na mateya penza ya koteya te; boye tika ete mabe oyo bazali kosakola ezongela bango moko! »
והנביאים יהיו לרוח והדבר אין בהם כה יעשה להם
14 Yango wana, tala liloba oyo Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Lokola bato oyo balobi maloba ya boye, nakosala ete maloba na Ngai ezala lokola moto na monoko na yo, mpe bato oyo bazala lokola bakoni oyo moto yango ekozikisa.
לכן כה אמר יהוה אלהי צבאות יען דברכם את הדבר הזה הנני נתן דברי בפיך לאש והעם הזה עצים--ואכלתם
15 Oh libota ya Isalaele, » elobi Yawe, « nakoyeisa ekolo moko wuta mosika mpo na kobundisa yo: ezali ekolo moko ya kala mpe ya nguya, ekolo oyo yo oyebi ata monoko na yango te.
הנני מביא עליכם גוי ממרחק בית ישראל נאם יהוה גוי איתן הוא גוי מעולם הוא--גוי לא תדע לשנו ולא תשמע מה ידבר
16 Makonga na bango ezangaka koboma moto te, bongo bango nyonso bazali bilombe ya bitumba.
אשפתו כקבר פתוח כלם גבורים
17 Bakobotola milona mpe bilei na yo, bakoboma bana na yo ya basi mpe ya mibali, bakobotola bangombe mpe bameme na yo, bakobebisa bilanga na yo ya vino mpe banzete na yo ya figi, bakobebisa na mopanga bingumba na yo ya makasi oyo otielaka motema.
ואכל קצירך ולחמך יאכלו בניך ובנותיך--יאכל צאנך ובקרך יאכל גפנך ותאנתך ירשש ערי מבצריך אשר אתה בטח בהנה--בחרב
18 Nzokande, ezala na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakosilisa koboma bino nyonso te.
וגם בימים ההמה נאם יהוה לא אעשה אתכם כלה
19 Tango bato bakotuna: ‹ Mpo na nini Yawe, Nzambe na biso, asali biso makambo ya boye? › Bokozongisela bango: ‹ Ezali mpo ete bosundolaki Ngai mpe bosambelaki banzambe ya bapaya kati na mboka na bino. Yango wana, bokosalela bapaya kati na mboka oyo ezali ya bino te. ›
והיה כי תאמרו תחת מה עשה יהוה אלהינו לנו את כל אלה ואמרת אליהם כאשר עזבתם אותי ותעבדו אלהי נכר בארצכם--כן תעבדו זרים בארץ לא לכם
20 Bopanza sango oyo epai ya libota ya Jakobi mpe botatola yango kati na Yuda:
הגידו זאת בבית יעקב והשמיעוה ביהודה לאמר
21 Boyoka makambo oyo, bino bazoba to bato oyo bozanga mayele: bozali na miso mpo na komona kasi bomonaka te, bozali na matoyi mpo na koyoka kasi boyokaka te.
שמעו נא זאת עם סכל ואין לב עינים להם ולא יראו אזנים להם ולא ישמעו
22 Bokoki penza kobanga Ngai te, » elobi Yawe? « Bokoki solo kolenga liboso na Ngai te, Ngai oyo nasala zelo lokola mondelo ya mayi, epekiselo ya libela oyo mayi ekoleka ata mokolo moko te? Mayi ekoki kotomboka, kasi ezali na nguya te; ata soki esali makelele, kasi ekoleka mondelo yango te.
האותי לא תיראו נאם יהוה אם מפני לא תחילו אשר שמתי חול גבול לים חק עולם ולא יעברנהו ויתגעשו ולא יוכלו והמו גליו ולא יעברנהו
23 Kasi bato oyo bazali mitema makasi mpe bazali solo batomboki; bapesi Ngai mokongo mpe bakei na bango!
ולעם הזה היה לב סורר ומורה סרו וילכו
24 Bamilobelaka te: ‹ Tika ete totosa Yawe, Nzambe na biso, oyo anokisaka mvula na tango ekoki, na eleko ya kolona mpe ya kobuka; oyo akatela biso baposo oyo esengeli mpo na kobuka milona. ›
ולוא אמרו בלבבם נירא נא את יהוה אלהינו הנתן גשם וירה (יורה) ומלקוש בעתו שבעת חקות קציר ישמר לנו
25 Mabe na bino nde ebebisi makambo nyonso, mpe masumu na bino ezangisi bino bolamu.
עונותיכם הטו אלה וחטאותיכם מנעו הטוב מכם
26 Kati na bato na Ngai, ezali na bato mabe oyo banongaka bato lokola moto oyo azali kotia mitambo mpo na kokanga bandeke, mpe batiaka mitambo mpo na kokanga bato.
כי נמצאו בעמי רשעים ישור כשך יקושים הציבו משחית אנשים ילכדו
27 Ndenge ndako ya bandeke etondaka na bandeke, ndenge wana mpe bandako na bango etonda na lokuta; mpe ezali na nzela yango nde bakoma bazwi mpe bato na nguya.
ככלוב מלא עוף כן בתיהם מלאים מרמה על כן גדלו ויעשירו
28 Bakoma kitoko mpe ngebungebu; mabe na bango eleka ndelo, balobelaka likambo ya mwana etike na bosembo te, mpo kaka bango moko balonga. Bakataka makambo ya babola na bosembo te.
שמנו עשתו גם עברו דברי רע--דין לא דנו דין יתום ויצליחו ומשפט אביונים לא שפטו
29 Na makambo ya boye, napesa bango etumbu te? » elobi Yawe. « Boni, motema na Ngai ezongisa penza mabe na mabe te na ekolo ya boye?
העל אלה לא אפקד נאם יהוה אם בגוי אשר כזה לא תתנקם נפשי
30 Makambo ya kokamwa mpe ya somo esalemi na mboka:
שמה ושערורה נהיתה בארץ
31 basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta, Banganga-Nzambe bazali kosalela bokonzi na bango ndenge balingi, mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo. Kasi bokosala nini na suka? »
הנבאים נבאו בשקר והכהנים ירדו על ידיהם ועמי אהבו כן ומה תעשו לאחריתה

< Jeremi 5 >