< Jeremi 2 >

1 Yawe alobaki na ngai:
耶和華的話臨到我說:
2 « Kende kotatola na matoyi ya Yelusalemi: Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Nakanisi lisusu bolingo oyo ozalaki na yango epai na Ngai tango ozalaki elenge; ozalaki kolinga Ngai makasi ndenge kaka mwasi mpe mobali balinganaka, mpe ozalaki kolanda Ngai na esobe, kati na mokili oyo ekawuka.
「你去向耶路撒冷人的耳中喊叫說,耶和華如此說: 你幼年的恩愛, 婚姻的愛情, 你怎樣在曠野, 在未曾耕種之地跟隨我, 我都記得。
3 Isalaele abulisamaki mpo na Yawe lokola mbuma ya liboso ya milona na Ye: moto nyonso oyo azalaki kolia yango azalaki komema ngambo, mpe pasi ezalaki kokomela ye, › » elobi Yawe.
那時以色列歸耶和華為聖, 作為土產初熟的果子; 凡吞吃它的必算為有罪, 災禍必臨到他們。 這是耶和華說的。
4 Oh libota ya Jakobi, bino bituka nyonso ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe!
雅各家、以色列家的各族啊,你們當聽耶和華的話。
5 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Mabe nini batata na bino bazwaki Ngai mpo ete basundola Ngai? Basepelaki kolanda banzambe ya bikeko oyo ezanga tina, mpe bango moko bakomaki bato pamba.
耶和華如此說: 你們的列祖見我有甚麼不義, 竟遠離我,隨從虛無的神, 自己成為虛妄的呢?
6 Bamitunaki te: ‹ Wapi Yawe oyo abimisaki biso na Ejipito mpe amemaki biso kati na esobe? Wapi Yawe oyo atambolisaki biso na mokili oyo ekawuka mpe ya mabulu, mokili ya molili mpe ya kufa, mokili oyo baleki nzela balekelaka te mpe mokili oyo bato bavandaka soki moke te? ›
他們也不說: 那領我們從埃及地上來, 引導我們經過曠野, 沙漠有深坑之地, 和乾旱死蔭、無人經過、 無人居住之地的耶和華在哪裏呢?
7 Namemaki bino na mokili oyo mabele na yango ebotaka malamu mpo ete bolia mbuma na yango ya kitoko; kasi boyaki nde kokomisa mokili na Ngai mbindo mpe kokomisa libula na Ngai eloko ya nkele.
我領你們進入肥美之地, 使你們得吃其中的果子和美物; 但你們進入的時候就玷污我的地, 使我的產業成為可憎的。
8 Banganga-Nzambe bamitunaki te mpo na koluka koyeba: ‹ Yawe azali wapi? › Balakisi ya Mobeko balukaki koyeba Ngai te, bakambi batombokelaki Ngai; basakoli bazalaki kosakola na kombo ya Bala mpe balandaki banzambe ya bikeko oyo ezanga tina.
祭司都不說,耶和華在哪裏呢? 傳講律法的都不認識我。 官長違背我; 先知藉巴力說預言, 隨從無益的神。
9 Yango wana, nakosambisa bino, » elobi Yawe. « Nakosambisa bino elongo na bakitani na bino,
耶和華說:我因此必與你們爭辯, 也必與你們的子孫爭辯。
10 Bokatisa na ngambo ya bisanga ya kitimi mpe botala malamu, botinda bato na Kedari mpe botala malamu; botala malamu penza soki likambo ya boye esila kosalema.
你們且過到基提海島去察看, 打發人往基達去留心查考, 看曾有這樣的事沒有。
11 Boni, ezali na ekolo oyo etikaka banzambe na yango mpo na kosambela banzambe mosusu? Nzokande, banzambe yango ezalaka kutu banzambe ya solo te. Kasi bato na Ngai basundoli Ye oyo azali Nkembo na bango mpo na kolanda banzambe ya bikeko oyo ezanga tina.
豈有一國換了他的神嗎? 其實這不是神! 但我的百姓將他們的榮耀換了那無益的神。
12 Oh likolo, tika ete likambo oyo ekamwisa yo mpe epesa yo somo makasi, » elobi Yawe.
諸天哪,要因此驚奇, 極其恐慌,甚為淒涼! 這是耶和華說的。
13 « Bato na Ngai basali masumu mibale: Basundoli Ngai oyo nazali etima ya bomoi, mpe batimoli bango moko mabulu ya mayi, mabulu oyo ekawukaka noki.
因為我的百姓做了兩件惡事, 就是離棄我這活水的泉源, 為自己鑿出池子, 是破裂不能存水的池子。
14 Boni, Isalaele azali solo mowumbu to abotama kati na ndako ya bowumbu? Mpo na nini akomi lokola eloko pamba na miso ya bikolo mosusu?
以色列是僕人嗎? 是家中生的奴僕嗎? 為何成為掠物呢?
15 Bankosi engalaki na koganga mpo na kolengisa ye, ekomisaki mokili na ye lokola esobe; batumbaki bingumba na ye mpe etikalaki lisusu na bato te.
少壯獅子向他咆哮,大聲吼叫, 使他的地荒涼; 城邑也都焚燒,無人居住。
16 Mpe lisusu, bato ya Mefisi mpe ya Dafine babuki moto na yo.
挪弗人和答比匿人也打破你的頭頂。
17 Mpo na nini makambo oyo nyonso ezali kokomela yo? Boni, ezali te mpo ete osundulaki Yawe, Nzambe na yo, tango azalaki nanu kotambolisa yo na nzela?
這事臨到你身上,不是你自招的嗎? 不是因耶和華-你上帝引你行路的時候, 你離棄他嗎?
18 Bongo sik’oyo, mpo na nini ozali kokende komela mayi ya ebale Nili kati na Ejipito? Mpo na nini ozali kokende komela mayi ya ebale Efrate kati na Asiri?
現今你為何在埃及路上要喝西曷的水呢? 你為何在亞述路上要喝大河的水呢?
19 Mabe na yo ekomemela yo etumbu, kotomboka na yo ekomemela yo pamela. Tala malamu mpe sosola ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo kosundola Yawe, Nzambe na yo, mpe kozanga kotosa Ngai, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
你自己的惡必懲治你; 你背道的事必責備你。 由此可知可見,你離棄耶和華-你的上帝, 不存敬畏我的心, 乃為惡事,為苦事。 這是主-萬軍之耶和華說的。
20 « Wuta kala, ozalaki kobuka ekangiseli na yo mpe kokata minyololo na yo. Ozalaki koloba: ‹ Nakozala lisusu mowumbu na yo te. › Yango wana, okomaki komilalisa na bangomba nyonso ya milayi mpe na se ya banzete nyonso ya mibesu lokola mwasi ya ndumba.
我在古時折斷你的軛,解開你的繩索。 你說:我必不事奉耶和華; 因為你在各高岡上、各青翠樹下屈身行淫。
21 Nzokande, Ngai nalonaki yo lokola nzete kitoko ya vino mpo ete obotaka mbuma ya malamu na tembe te. Bongo, ndenge nini sik’oyo obalukeli Ngai mpe okomi nzete oyo nayebi te, nzete oyo ebotaka mbuma mabe?
然而,我栽你是上等的葡萄樹, 全然是真種子; 你怎麼向我變為外邦葡萄樹的壞枝子呢?
22 Ata soki omisukoli na kisi oyo basalelaka sabuni to omipakoli sabuni ndenge nini, masumu na yo ekolongwa te liboso na Ngai, » elobi Nkolo Yawe.
你雖用鹼、多用肥皂洗濯, 你罪孽的痕跡仍然在我面前顯出。 這是主耶和華說的。
23 « Ndenge nini okoki penza koloba: ‹ Namikomisi na ngai mbindo te, nazali kolanda banzambe ya Bala te? › Tala nanu ndenge ozalaki kotambola kati na lubwaku mpe kanisa malamu makambo oyo ozalaki kosala. Okomaki lokola shamo ya mwasi oyo eyengaka-yengaka bisika nyonso;
你怎能說: 我沒有玷污、沒有隨從眾巴力? 你看你谷中的路,就知道你所行的如何。 你是快行的獨峰駝,狂奔亂走。
24 lokola ane ya zamba oyo emesana na esobe, oyo ebendaka mopepe na zolo soki ekomi na posa ya kosangisa nzoto. Bongo, nani akoki kokanga posa na yango ya kosangisa nzoto na mpunda ya mobali? Mpunda nyonso ya mobali oyo ekolanda yango ekomona pasi te, pamba te ekozwa yango na tango ya posa ya kosangisa nzoto na mpunda ya mobali.
你是野驢,慣在曠野, 慾心發動就吸風; 起性的時候誰能使牠轉去呢? 凡尋找牠的必不致疲乏; 在牠的月份必能尋見。
25 Sala keba! Noki te okotikala makolo ngulu mpe okokawuka mongongo likolo ya bitambola-tambola! Kasi ozali koloba: ‹ Tika na yo! Ngai nalingaka banzambe ya bapaya mpe nakolanda kaka bango. ›
我說:你不要使腳上無鞋, 喉嚨乾渴。 你倒說:這是枉然。 我喜愛別神,我必隨從他們。
26 Ndenge basambwisaka moyibi soki bakangi ye, ndenge wana mpe ekosalema mpo na libota ya Isalaele: bakonzi mpe bakambi na bango, Banganga-Nzambe mpe basakoli na bango bakosambwa.
賊被捉拿,怎樣羞愧, 以色列家和他們的君王、首領、 祭司、先知也都照樣羞愧。
27 Balobaka na nzete: ‹ Ozali tata na ngai, › mpe na libanga: ‹ Yo nde obotaki ngai. › Bapesaki Ngai mikongo, kasi bilongi na bango te. Nzokande soki bakomi na pasi, babelelaka: ‹ Yaka kobikisa biso! ›
他們向木頭說:你是我的父; 向石頭說:你是生我的。 他們以背向我, 不以面向我; 及至遭遇患難的時候卻說: 起來拯救我們。
28 Wapi sik’oyo banzambe na bino, banzambe oyo bosalaki na maboko na bino? Tika ete eya kobikisa bino na tango ya pasi, soki penza ekokoka! Pamba te, oh bato na Yuda, ndenge motango ya bingumba na bino ezali, ndenge wana mpe motango ya banzambe na bino ezali.
你為自己做的神在哪裏呢? 你遭遇患難的時候, 叫他們起來拯救你吧! 猶大啊,你神的數目與你城的數目相等。
29 Mpo na nini bozali kosambisa Ngai? Nzokande, ezali bino nyonso nde botombokelaki Ngai, » elobi Yawe.
耶和華說: 你們為何與我爭辯呢? 你們都違背了我。
30 « Napesaki bato na yo etumbu ya pamba; pamba te bazwaki na bango kaka mayele te. Mopanga na yo ebomi basakoli na yo ndenge nkosi ebomaka bato.
我責打你們的兒女是徒然的, 他們不受懲治。 你們自己的刀吞滅你們的先知, 好像殘害的獅子。
31 Bino bato ya tango oyo, boyoka Liloba na Yawe: Boni, nazali lokola esobe to mokili ya molili makasi mpo na mokili ya Isalaele? Mpo na nini bato na Ngai bazali koloba: ‹ Tozali na bonsomi ya kokende epai tolingi mpe tokoya lisusu epai na yo te? ›
這世代的人哪, 你們要看明耶和華的話。 我豈向以色列作曠野呢? 或作幽暗之地呢? 我的百姓為何說: 我們脫離約束,再不歸向你了?
32 Boni, elenge mwasi abosanaka penza biloko na ye ya monzele? Boni, mobandami ya libala abosanaka solo mayaka na ye? Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai mikolo ebele.
處女豈能忘記她的妝飾呢? 新婦豈能忘記她的美衣呢? 我的百姓卻忘記了我無數的日子!
33 Oh, tala ndenge otondi na mayele ya koluka bolingo! Na etamboli na yo, okoki ata kopesa mayele yango ezala na basi oyo baleki mabe!
你怎麼修飾你的道路要求愛情呢? 就是惡劣的婦人你也叫她們行你的路。
34 Kino na bilamba na yo, bato bamonaka makila ya babola, ya bato oyo bayebi likambo te mpe okangi bango na mabe te.
並且你的衣襟上有無辜窮人的血; 你殺他們並不是遇見他們挖窟窿, 乃是因這一切的事。
35 Kati na makambo oyo nyonso, ozali koloba: ‹ Nayebi ata likambo moko te, kanda ya Nzambe ekokweyela ngai te. › Kasi Ngai nakopesa yo etumbu mpo ete ozali koloba: ‹ Nasali masumu te. ›
你還說:我無辜; 耶和華的怒氣必定向我消了。 看哪,我必審問你; 因你自說:我沒有犯罪。
36 Mpo na nini omipesi na koyengayenga na nzela nyonso? Okosambwa mpo na Ejipito ndenge osambwaki mpo na Asiri.
你為何東跑西奔要更換你的路呢? 你必因埃及蒙羞, 像從前因亞述蒙羞一樣。
37 Okotika lisusu esika yango, maboko na moto, pamba te Yawe asundoli bato oyo ozalaki kotiela motema; mpe bango bakosunga yo te. »
你也必兩手抱頭從埃及出來; 因為耶和華已經棄絕你所倚靠的, 你必不因他們得順利。

< Jeremi 2 >