< Jeremi 11 >

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi:
耶和華的話臨到耶利米說:
2 — Boyoka malako ya boyokani oyo, mpe boyebisa yango epai ya bato ya Yuda mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi!
「當聽這約的話,告訴猶大人和耶路撒冷的居民,
3 Loba na bango: « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: Tika ete alakelama mabe, moto oyo akotosa te malako ya boyokani
對他們說,耶和華-以色列的上帝如此說:不聽從這約之話的人必受咒詛。
4 oyo nasalaki elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, wuta na libulu ya moto oyo balambelaka bibende. » Nalobaki na bango: « Botosa Ngai mpe bosala makambo nyonso oyo nakotinda bino; ezali na nzela wana nde bokozala bato na Ngai mpe Ngai nakozala Nzambe na bino.
這約是我將你們列祖從埃及地領出來、脫離鐵爐的那日所吩咐他們的,說:『你們要聽從我的話,照我一切所吩咐的去行。』這樣,你們就作我的子民,我也作你們的上帝;
5 Bongo nakokokisa ndayi oyo nalapaki epai ya bakoko na bino ete nakopesa bango mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo bozali na yango lelo. » Nazongisaki: — Solo, Yawe; amen!
我好堅定向你們列祖所起的誓,給他們流奶與蜜之地,正如今日一樣。」我就回答說:「耶和華啊,阿們!」
6 Yawe alobaki na ngai: — Sakola maloba nyonso oyo kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi: « Boyoka malako ya boyokani oyo mpe bosalela yango!
耶和華對我說:「你要在猶大城邑中和耶路撒冷街市上,宣告這一切話說:你們當聽從遵行這約的話。
7 Wuta tango nabimisaki bakoko na bino na Ejipito kino na mokolo ya lelo, nazalaki tango na tango kokebisa bango na maloba oyo: ‹ Botosa Ngai! ›
因為我將你們列祖從埃及地領出來的那日,直到今日,都是從早起來,切切誥誡他們說:『你們當聽從我的話。』
8 Kasi batiaki matoyi mangongi mpe bayokelaki Ngai te. Balandaki kaka makanisi mabe ya mitema na bango. Yango wana, natindelaki bango bilakeli mabe nyonso oyo ezali kati na boyokani oyo natindaki bango ete batosa, kasi bango basalelaki yango te. »
他們卻不聽從,不側耳而聽,竟隨從自己頑梗的惡心去行。所以我使這約中一切咒詛的話臨到他們身上;這約是我吩咐他們行的,他們卻不去行。」
9 Yawe alobaki na ngai: — Bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi basali likita.
耶和華對我說:「在猶大人和耶路撒冷居民中有同謀背叛的事。
10 Bazongeli kosala masumu ya bakoko na bango, oyo baboyaki koyoka maloba na Ngai. Bazali kolanda banzambe mosusu mpo na kosalela yango. Libota ya Yuda mpe libota ya Isalaele babebisi boyokani oyo nasalaki elongo na bakoko na bango.
他們轉去效法他們的先祖,不肯聽我的話,犯罪作孽,又隨從別神,事奉它。以色列家和猶大家背了我與他們列祖所立的約。」
11 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi: « Nakotindela bango pasi ya makasi, mpe ata moto moko te akobika na yango. Ata soki bagangi epai na Ngai, nakoyoka bango te.
所以耶和華如此說:「我必使災禍臨到他們,是他們不能逃脫的。他們必向我哀求,我卻不聽。
12 Bingumba ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi bakokende koganga epai ya banzambe ya bikeko oyo bazali kotumbela malasi ya ansa, kasi ekokoka kobikisa bango te tango pasi ya makasi ekokomela bango.
那時,猶大城邑的人和耶路撒冷的居民要去哀求他們燒香所供奉的神;只是遭難的時候,這些神毫不拯救他們。
13 Oh Yuda, ozali na banzambe ebele ndenge ezali motango ya bingumba na yo; mpe lisusu, bitumbelo oyo otongaki mpo na kotumbela nzambe Bala, nzambe ya soni, malasi ya ansa ezali ebele ndenge ezali motango ya babalabala ya Yelusalemi. »
猶大啊,你神的數目與你城的數目相等;你為那可恥的巴力所築燒香的壇也與耶路撒冷街道的數目相等。
14 Kasi yo Jeremi, kosambela mpo na bato oyo te, kolobela Ngai na tina na bango te, komeka te kosengela bango eloko; pamba te nakoyoka bango te tango bakobelela Ngai na tango ya pasi.
「所以你不要為這百姓祈禱,不要為他們呼求禱告;因為他們遭難向我哀求的時候,我必不應允。
15 « Eloko nini penza molingami na Ngai azali kosala kati na Tempelo na Ngai, wana azali kosala mabongisi mabe ebele? Okanisi ete ndayi mpe misuni oyo ebulisama ekoki solo kolongola etumbu na yo? Boni, okanisi ete okoki kobika na nzela wana? »
我所親愛的,既行許多淫亂,聖肉也離了你,你在我殿中做甚麼呢?你作惡就喜樂。
16 Yawe azalaki kobenga yo « Nzete ya olive ya mobesu oyo etonda na mbuma kitoko. » Kasi Yawe akotumba yango na makelele ya mopepe makasi, mpe bitape na yango ekobukana-bukana.
從前耶和華給你起名叫青橄欖樹,又華美又結好果子;如今他用鬨嚷之聲,點火在其上,枝子也被折斷。
17 Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo alonaki yo asili kozwa mokano ya kotindela yo pasi ya makasi, pamba te libota ya Yuda mpe ya Isalaele basali mabe liboso na Ngai mpe batumboli kanda na Ngai tango bazali kotumbela nzambe Bala malasi ya ansa.
原來栽培你的萬軍之耶和華已經說,要降禍攻擊你,是因以色列家和猶大家行惡,向巴力燒香,惹我發怒,是自作自受。」
18 Lokola Yawe alakisaki ngai likita oyo bazalaki kosalela ngai, nasosolaki yango, pamba te atalisaki ngai mabongisi nyonso oyo bazalaki kosala.
耶和華指示我,我就知道; 你將他們所行的給我指明。
19 Ngai namonanaki lokola mwana meme oyo bazali komema na esika oyo babomelaka bibwele; nayebaki te ete bazali kosalela ngai likita tango bazalaki koloba: « Tika ete tobebisa nzete mpe mbuma na yango, tika ete tolongola ye na mokili ya bato ya bomoi mpo ete bakanisa lisusu kombo na ye te. »
我卻像柔順的羊羔被牽到宰殺之地; 我並不知道他們設計謀害我, 說:我們把樹連果子都滅了吧! 將他從活人之地剪除, 使他的名不再被紀念。
20 Kasi Yo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Yo oyo osambisaka na bosembo mpe omekaka mitema mpe makanisi, sala ete namona mabe oyo okozongisela bango, pamba te natiki likambo na ngai na maboko na yo.
按公義判斷、察驗人肺腑心腸的萬軍之耶和華啊, 我卻要見你在他們身上報仇, 因我將我的案件向你稟明了。
21 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato ya Anatoti, oyo balingi koboma yo mpe bazali koloba: « Kosakola na Kombo na Yawe te, soki te tokoboma yo; »
所以,耶和華論到尋索你命的亞拿突人如此說:「他們說:你不要奉耶和華的名說預言,免得你死在我們手中。
22 yango wana tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Nakopesa bango etumbu. Bilenge mibali na bango bakokufa na mopanga, bana na bango ya mibali mpe ya basi bakokufa na nzala makasi.
所以萬軍之耶和華如此說:看哪,我必刑罰他們;他們的少年人必被刀劍殺死,他們的兒女必因饑荒滅亡,
23 Ata moko te kati na bango akobika, pamba te nakotindela bato ya Anatoti pasi, na mobu ya etumbu na bango. »
並且沒有餘剩的人留給他們;因為在追討之年,我必使災禍臨到亞拿突人。」

< Jeremi 11 >