< Jake 1 >

1 Ngai Jake, mosali na Nzambe mpe na Nkolo Yesu-Klisto; Epai ya mabota zomi na mibale oyo epalangana kati na biloko: Napesi bino mbote. 2 Bandeko na ngai, bomona lokola likambo ya esengo, lolenge nyonso ya komekama oyo bozali kokutana na yango. 3 Pamba te boyebi malamu ete komekama ya kondima na bino ebotaka kokanga motema. 4 Nzokande kokanga motema na bino esengeli te kosuka na nzela mpo ete bokoma bato bakemba mpe bakoka kati na kondima, bato oyo bazangi pamela. 5 Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te. 6 Kasi asengeli kosenga na kondima, na kotia tembe te; pamba te moto oyo atiaka tembe azali lokola mbonge ya ebale oyo mopepe ezali koningisa mpe kobwaka epai na epai. 7 Moto ya ndenge wana atia motema te ete akoki kozwa eloko kowuta na Nkolo: 8 azali moto ya mitema mibale, moto oyo akangamaka na likanisi moko te na nyonso oyo asalaka. 9 Tika ete ndeko oyo akelela asepela mpo ete Nzambe akotombola ye, 10 mpe oyo azali mozwi asepela mpo ete Nzambe akokitisa ye; pamba te mozwi akoleka lokola fololo ya elanga. 11 Ndenge fololo ekawukaka, ekweyaka mpe ebungisaka kitoko na yango na tango ya moyi makasi, ndenge wana mpe mozwi akolimwa kati na misala na ye nyonso. 12 Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye. 13 Tika ete moto moko te, liboso ya komekama, aloba: « Nzambe nde azali kotindika ngai na kosala mabe. » Pamba te mabe ekoki te kotindika Nzambe na mabe, mpe Nzambe atindikaka moto moko te na kosala mabe. 14 Kasi moto nyonso atindikamaka na mabe soki abendami mpe akangami na motambo ya baposa mabe ya nzoto na ye moko. 15 Bongo soki baposa mabe yango ekoli kati na moto, ebotaka lisumu; mpe lisumu ememaka na kufa. 16 Bandeko balingami, bomikosa te: 17 bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te. 18 Akomisaki biso bana na Ye na nzela ya Liloba ya bosolo, na mokano na Ye moko, mpo ete tozwa esika ya liboso kati na bikelamu na Ye nyonso. 19 Bandeko balingami, bosimba likambo oyo: tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika; 20 pamba te kanda ya moto ekokisaka te makambo ya sembo na miso ya Nzambe. 21 Yango wana, bobwaka makambo nyonso ya bosoto mpe misala nyonso ya mabe, bondima na komikitisa Liloba oyo elonamaki kati na mitema na bino, pamba te ezali na nguya ya kobikisa bino. 22 Botiaka na misala Liloba na Nzambe; kasi bosukaka kaka te na koyoka yango, soki te bokomikosa bino moko na pamba. 23 Moto oyo ayokaka Liloba kasi atiaka yango te na misala, akokani na moto oyo amitali na talatala 24 mpe, sima na ye komitala, akei mpe, kaka na tango yango, abosani ndenge azali. 25 Nzokande moto oyo amipesaka na koyekola mobeko oyo ekoka na nyonso mpe epesaka bonsomi, bongo atosaka yango tango nyonso, asukaka kaka na koyoka te, kasi atiaka na misala: moto yango akozala moto ya esengo na nyonso oyo akosala. 26 Moto oyo akanisaka ete asambelaka Nzambe, kasi ayebaka te kobatela lolemo na ye, azali komikosa ye moko, mpe kosambela na ye ezali na tina te. 27 Kosambela ya solo mpe ya peto na miso ya Nzambe, Tata na biso, ezali: kosunga bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto liboso ya makambo ya mokili.

< Jake 1 >