< Ezayi 66 >

1 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi, mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai. Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai? Esika ya bopemi ya ndenge nini penza bokoki kobongisela Ngai?
This is what Yahweh says, “Heaven is my throne, and the earth is my footstool. Where then is the house you will build for me? Where is the place where I may rest?
2 Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala: moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.
My hand has made all these things; that is how these things came to be—this is Yahweh's declaration. This is the man of whom I approve, the broken and contrite in spirit, and who trembles at my word.
3 Moto oyo atumbi mbeka ya ngombe azali lokola ye oyo abomi moto, moto oyo atumbi mbeka ya mwana meme azali lokola ye oyo abuki kingo ya mbwa, moto oyo apesi makabo ya mbuma azali lokola ye oyo abonzi makila ya ngulu, moto oyo atumbi ekaniseli ya malasi ya ansa azali lokola ye oyo apamboli nzambe ya ekeko. Solo, baponi kolanda banzela na bango moko mpe kosepela na makambo na bango ya nkele.
He who slaughters an ox also murders a man; he who sacrifices a lamb also breaks a dog's neck; he who offers a grain offering offers swine's blood; he who offers a memorial of incense also blesses wickedness. They have chosen their own ways, and they take pleasure in their abominations.
4 Boye, Ngai mpe nakotindela bango pasi mpe nakotindela bango pasi oyo babangaka. Pamba te tango nabelelaki, moto moko te ayanolaki; tango nalobaki, moto moko te ayokaki; kasi basalaki makambo mabe na miso na Ngai mpe baponaki makambo oyo esepelisaka Ngai te. »
In the same way I will choose their own punishment; I will bring on them what they fear, because when I called, no one answered; when I spoke, no one listened. They did what was evil in my sight, and chose to do what displeases me.”
5 Boyoka Liloba na Yawe, bino bato oyo bolengaka liboso ya liloba na Ye: « Bandeko na bino oyo bayina bino mpe baboya bino likolo ya Kombo na Ngai balobi: ‹ Tika ete Yawe amonisa nkembo na Ye mpo ete tokoka komona esengo na bino! › Kasi bango nde bakosambwa solo.
Hear the word of Yahweh, you who tremble at his word, “Your brothers who hate and exclude you for my name's sake have said, 'May Yahweh be glorified, then we will see your joy,' but they will be put to shame.
6 Boyoka makelele kobima longwa na engumba, boyoka makelele kobima longwa na Tempelo! Ezali nde mongongo na Yawe oyo azali kofuta banguna na Ye kolanda oyo ekoki na misala na bango.
A sound of battle tumult comes from the city, a sound from the temple, the sound of Yahweh paying back his enemies.
7 Liboso ete ayoka pasi ya kobota, abotaki; liboso ete pasi ya kobota ekomela ye, abotaki mwana mobali.
Before she goes into labor, she gives birth; before pain is upon her, she gave birth to a son.
8 Nani ayoka likambo ya boye? Nani amona makambo ya boye? Boni, mokili ekoki kobotama na mokolo moko to ekolo ekoki solo kosalema na mbala moko? Nzokande, kaka tango Siona ayoki pasi ya kobota, tala ye wana asili kobota bana na ye.
Who has heard of such a thing? Who has seen such things? Will a land be born in one day? Can a nation be established in one moment? Yet as soon as Zion goes into labor, she gives birth to her children.
9 Nakoki solo koyeisa pasi ya kobota mpe kozanga makoki ya kobotisa? » Elobi Yawe. « Nakoki solo kokanga mabota soki nazali kopesa mabota? » elobi Nzambe na yo.
Do I bring a baby to the birth opening and not permit the child to be born?—asks Yahweh. Or do I bring a child to moment of delivery and then hold it back?—asks your God.”
10 « Bosepela elongo na Yelusalemi mpe botonda na esengo mpo na ye, bino nyonso oyo bolingaka ye; bosepela makasi elongo na ye, bino nyonso oyo bosalelaki ye matanga.
Rejoice with Jerusalem and be glad for her, all you who love her; rejoice with her, all you who mourned over her!
11 Pamba te bokomela miliki mpe bokotonda mabele na ye, oyo ebondisaka; bokomela penza ndenge esengeli mpe bokozwa esengo kati na bomengo na ye. »
For you will nurse and be satisfied; with her breasts you will be comforted; for you will drink them to the full and be delighted with the abundance of her glory.
12 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi: « Nakosopela ye kimia lokola ebale, mpe bozwi ya bikolo lokola ebale na tango ya mpela; bokobatelama, bokomemama na maboko na ye mpe akobondela bino na mabolongo na ye.
This is what Yahweh says, “I am about to spread prosperity over her like a river, and the riches of the nations like an overflowing stream. You will nurse at her side, be carried in her arms, and be dandled on her knees.
13 Ndenge mama abondelaka mwana na ye, ndenge wana mpe Ngai nakobondela bino; mpe bokobondisama mpo na Yelusalemi. »
As a mother comforts her child, so I will comfort you, and you will be comforted in Jerusalem.”
14 Tango bokomona yango, mitema na bino ekosepela mpe mikuwa na bino ekozwa makasi ya sika lokola matiti ya mobesu; loboko na Yawe ekoyebana kati na bawumbu na Ye mpe kanda na Ye ekokitela banguna na Ye.
You will see this, and your heart will rejoice, and your bones will sprout like the tender grass. The hand of Yahweh will be made known to his servants, but he will show his anger against his enemies.
15 Tala, Yawe azali koya na moto, mpe bashar na Ye ezali lokola mopepe ya kayina; akokitisa kanda na Ye na somo penza mpe akopamela na nzela ya moto.
For look, Yahweh is coming with fire, and his chariots are coming like the windstorm to bring the heat of his anger and his rebuke with flames of fire.
16 Yawe akosambisa bato nyonso na nzela ya moto mpe ya mopanga; bongo, bato ebele bakokufa na mopanga, na maboko na Yawe.
For Yahweh executes judgment on mankind by fire and with his sword. Those killed by Yahweh will be many.
17 « Bato oyo bamibulisaka mpe bamipetolaka mpo na kokende na bilanga mpe kolanda moto moko oyo azali na kati-kati ya bato oyo baliaka misuni ya bangulu, ya bampuku mpe biloko mosusu ya mbindo, bakokufa bango nyonso elongo, » elobi Yawe.
They consecrate themselves and make themselves pure, so they may enter the gardens, following the one in the middle of those who eat the flesh of pig and abominable things like mice. “They will come to an end—this is Yahweh's declaration.
18 « Mpe Ngai, likolo ya misala mpe makanisi na bango, nakomi pene ya kosangisa bato ya bikolo mpe nkota nyonso; bongo bakoya mpo na komona nkembo na Ngai.
For I know their deeds and their thoughts. The time is coming when I will gather all nations and languages. They will come and will see my glory.
19 Nakotia elembo kati na bango mpe nakotinda, wuta na bikolo, ndambo ya bato oyo bakobika: na Tarsisi, na Puli mpe na Ludi (bato oyo bayebi kosalela tolotolo malamu), na Tubali mpe na Yavani, na bisanga oyo ezalaka mosika, oyo etikala nanu koyoka sango na Ngai te mpe komona nkembo na Ngai te. Bakotatola nkembo na Ngai kati na bikolo.
I will set a mighty sign among them. Then I will send survivors from them to the nations: To Tarshish, Put, and Lud, archers who draw their bows, to Tubal, Javan, and to the distant coastlands where they have not heard about me nor seen my glory. They will proclaim my glory among the nations.
20 Bakomema bandeko na bino nyonso wuta na bikolo nyonso, lokola likabo epai na Yawe, na ngomba na Ngai ya bule, na Yelusalemi, na likolo ya bampunda, ya bashar mpe ya bashareti oyo ekangama, ya mikongo ya bamile mpe ya bashamo, » elobi Yawe. « Bakomema bango ndenge bana ya Isalaele bamemaka makabo na bango ya bambuma, kati na basani ya bule, na Tempelo ya Yawe.
They will bring back all your brothers out of all the nations, as an offering to Yahweh. They will come on horses, and in chariots, in wagons, on mules, and on camels, to my holy mountain Jerusalem—says Yahweh. For the people of Israel will bring a grain offering in a clean vessel into the house of Yahweh.
21 Mpe nakopona kati na bango, ndambo ya bato mpo ete bazala Banganga-Nzambe mpe Balevi, » elobi Yawe.
Some of these I will even choose as priests and Levites—says Yahweh.
22 « Ndenge likolo mpe mabele ya sika oyo nasili kosala ekowumela liboso na Ngai, » elobi Yawe, « ndenge wana mpe bakitani na bino mpe kombo na bino ekowumela.
For just as the new heavens and the new earth that I will make will remain before me—this is Yahweh's declaration—so your descendants will remain, and your name will remain.
23 Bato ya mokili mobimba bakoya kofukama liboso na Ngai, longwa na feti moko ya ebandeli ya sanza kino na feti mosusu, longwa na Saba moko kino na mosusu, » elobi Yawe,
From one month to the next, and from one Sabbath to the next, all people will come to bow down to me—says Yahweh.
24 « bakobima mpe bakomona bibembe ya bato oyo batombokelaki Ngai, pamba te bankusu na bango ekokufa te mpe moto na bango ekokufa te; bakopesa moto nyonso somo. »
They will go out and see the dead bodies of the men who have rebelled against me, for the worms that eat them will not die, and the fire that consumes them will not be quenched; and it will be an abhorrence to all flesh.”

< Ezayi 66 >