< Ezayi 65 >

1 « Namimonisaki, Ngai moko, epai ya bato oyo bazalaki kotuna Ngai kutu toli te, namilakisaki epai ya bato oyo bazalaki koluka Ngai te. Epai ya ekolo oyo ezalaki kobelela Kombo na Ngai te, nalobaki: ‹ Ngai oyo, Ngai oyo! ›
素來沒有訪問我的,現在求問我; 沒有尋找我的,我叫他們遇見; 沒有稱為我名下的,我對他們說: 我在這裏!我在這裏!
2 Mikolo nyonso, natandaki maboko na Ngai epai ya bato ya mito makasi, oyo balandaka nzela ya mabe, oyo batambolaka kolanda makanisi na bango;
我整天伸手招呼那悖逆的百姓; 他們隨自己的意念行不善之道。
3 bato oyo bapesaka Ngai kanda tango nyonso na nko, babonzaka mbeka kati na bilanga mpe babonzaka malasi ya ansa na bitumbelo basala na babiliki;
這百姓時常當面惹我發怒; 在園中獻祭, 在壇上燒香;
4 bato oyo bavandaka kati na bakunda mpe balekisaka babutu na bango kati na madusu ya mabanga; bato oyo baliaka misuni ya ngulu mpe basani na bango etonda na bilei ya mbindo;
在墳墓間坐着, 在隱密處住宿, 吃豬肉; 他們器皿中有可憎之物做的湯;
5 bato oyo balobaka: ‹ Zala mosika na Ngai, kopusana pene na Ngai te, pamba te nazali bule makasi na miso na yo! › Bato ya lolenge oyo bazali lokola milinga na zolo na Ngai, lokola moto oyo epelaka mikolo nyonso.
且對人說:你站開吧! 不要挨近我,因為我比你聖潔。 主說:這些人是我鼻中的煙, 是整天燒着的火。
6 Tala, etikali ya kokomama liboso na Ngai: nakovanda nye te kino nakozongisela bango mabe na bango; solo, nakozongisela bango penza mabe na bango koleka.
看哪,這都寫在我面前。 我必不靜默,必施行報應, 必將你們的罪孽和你們列祖的罪孽, 就是在山上燒香, 在岡上褻瀆我的罪孽, 一同報應在他們後人懷中, 我先要把他們所行的量給他們; 這是耶和華說的。
7 Ezala mpo na masumu na bino to mpo na masumu ya batata na bino, » elobi Yawe, « pamba te babonzaki malasi ya ansa na likolo ya bangomba milayi mpe basambwisaki Ngai na likolo ya bangomba mikuse; solo penza, nakozongisela bango mabe, nakofuta bango kolanda misala na bango oyo eleka! »
8 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Ndenge kaka balobaka soki bamoni liboke ya bambuma kitoko ya vino: ‹ Kobebisa te, pamba te lipamboli moko ezali wana, › ndenge mpe kaka nakosala mpo na basali na Ngai: nakoboma bango nyonso te.
耶和華如此說:葡萄中尋得新酒, 人就說:不要毀壞, 因為福在其中。 我因我僕人的緣故也必照樣而行, 不將他們全然毀滅。
9 Nakobimisa libota moko kati na Jakobi; mpe kati na Yuda, nakobimisa mokitani oyo akozwa bangomba na Ngai lokola libula; bato na Ngai, ba-oyo naponi bakokamata yango lokola libula, mpe bawumbu na Ngai nde bakovanda kuna.
我必從雅各中領出後裔, 從猶大中領出承受我眾山的。 我的選民必承受; 我的僕人要在那裏居住。
10 Etando ya Saroni ekokoma esika ya koleisa bibwele, mpe Lubwaku ya Akori ekokoma esika ya kopema mpo na bangombe. Nyonso wana ekosalema mpo na bato na Ngai, oyo balukaka Ngai.
沙崙平原必成為羊群的圈; 亞割谷必成為牛群躺臥之處, 都為尋求我的民所得。
11 Kasi mpo na bino bato oyo bosundoli Yawe mpe bobosani ngomba na Ngai ya bule, bino oyo botandaka mesa mpo na Gadi mpe botondisaka kopo ya vino mpo na Meni,
但你們這些離棄耶和華、 忘記我的聖山、給時運擺筵席、 給天命盛滿調和酒的,
12 nakobongisa bino ete bokufa na mopanga, mpe bino nyonso bokofukama mpo ete bakata bino bakingo, pamba te nabengaki, kasi boyanolaki te; nalobaki, kasi boyokaki te: bosalaki kaka makambo mabe na miso na Ngai mpe boponaki makambo oyo esepelisaka Ngai te. »
我要命定你們歸在刀下, 都必屈身被殺; 因為我呼喚,你們沒有答應; 我說話,你們沒有聽從; 反倒行我眼中看為惡的, 揀選我所不喜悅的。
13 Mpo na yango, Nkolo Yawe alobi: « Bawumbu na Ngai bakolia, kasi bino bokozala na nzala; bawumbu na Ngai bakomela, kasi bino bokotikala kaka na posa ya komela; bawumbu na Ngai bakosepela, kasi bino bokoyoka soni;
所以,主耶和華如此說: 我的僕人必得吃,你們卻飢餓; 我的僕人必得喝,你們卻乾渴; 我的僕人必歡喜,你們卻蒙羞。
14 bawumbu na Ngai bakoyemba na esengo, esengo oyo ekowuta solo na mitema na bango, kasi bino bokoganga mpo na pasi ya mitema na bino mpe bokolelalela mpo na milimo na bino oyo ebukani.
我的僕人因心中高興歡呼, 你們卻因心中憂愁哀哭, 又因心裏憂傷哀號。
15 Bokotika kombo na bino epai ya baponami na Ngai lokola lisuma; Nkolo Yawe akoboma bino; kasi epai ya baponami na Ye, akopesa kombo mosusu.
你們必留下自己的名, 為我選民指着賭咒。 主耶和華必殺你們, 另起別名稱呼他的僕人。
16 Moto nyonso oyo akobelela lipamboli kati na mokili akosala bongo na Kombo ya Nzambe ya solo, mpe moto oyo akolapa ndayi kati na mokili, akolapa yango na Kombo ya Nzambe ya solo. Pamba te pasi ya kala ekomonana lisusu te, ekobombama na miso na Ngai.
這樣,在地上為自己求福的, 必憑真實的上帝求福; 在地上起誓的, 必指真實的上帝起誓。 因為,從前的患難已經忘記, 也從我眼前隱藏了。
17 Solo, nakokela likolo mpe mabele ya sika; makambo ya liboso, bakokanisa yango lisusu te, ekomata ata lisusu na motema te.
看哪!我造新天新地; 從前的事不再被記念,也不再追想。
18 Kasi bosepela mpe bozala tango nyonso na esengo mpo na misala oyo nakokela, pamba te nakokela Yelusalemi mpo ete ezala na esengo, mpe bato na yango basepela.
你們當因我所造的永遠歡喜快樂; 因我造耶路撒冷為人所喜, 造其中的居民為人所樂。
19 Bongo nakosepela mpo na Yelusalemi mpe mpo na bato na Ngai; makelele ya kolela mpe ya koganga ekoyokana lisusu kuna te.
我必因耶路撒冷歡喜, 因我的百姓快樂; 其中必不再聽見哭泣的聲音和哀號的聲音。
20 Kuna, ekozala lisusu na mwana moke te oyo akokufa na bomwana na ye to ekozala lisusu na mobange te oyo akotonda te na mikolo ya bomoi na ye; pamba te moto oyo akokufa elenge akozala na mibu nkama moko ya mbotama, mpe oyo akokokisa mibu wana te, akomonana lokola moto alakelami mabe.
其中必沒有數日夭亡的嬰孩, 也沒有壽數不滿的老者; 因為百歲死的仍算孩童, 有百歲死的罪人算被咒詛。
21 Bakotonga bandako mpe bakovanda kati na bandako yango, bakolona bilanga ya vino mpe bakolia bambuma na yango.
他們要建造房屋,自己居住; 栽種葡萄園,吃其中的果子。
22 Bakotonga bandako te mpo ete bato mosusu bavanda kati na bandako yango, mpe bakolona bilanga te mpo ete bato mosusu balia bambuma na yango; pamba te mikolo ya mbotama ya bato na Ngai ekozala lokola mikolo ya nzete, mpe baponami na Ngai bakosepela na bambuma ya misala ya maboko na bango.
他們建造的,別人不得住; 他們栽種的,別人不得吃; 因為我民的日子必像樹木的日子; 我選民親手勞碌得來的必長久享用。
23 Bakosala mosala na pamba te to bakobota bana te mpo ete bakufa; pamba te bakozala bato oyo bapambolama na Yawe, bango elongo na bana na bango.
他們必不徒然勞碌, 所生產的,也不遭災害, 因為都是蒙耶和華賜福的後裔; 他們的子孫也是如此。
24 Liboso ete babelela Ngai, nakoyanola bango; mpe wana basilisi nanu koloba te, nakoyoka bango.
他們尚未求告,我就應允; 正說話的時候,我就垂聽。
25 Mbwa ya zamba mpe mwana meme ekolia esika moko; mpe nkosi ekolia matiti lokola ngombe, kasi bilei ya nyoka ekozala nde putulu. Bakoyoka lisusu pasi te, mpe bakobebisama lisusu te na ngomba na Ngai ya bule, » elobi Yawe.
豺狼必與羊羔同食; 獅子必吃草與牛一樣; 塵土必作蛇的食物。 在我聖山的遍處, 這一切都不傷人,不害物。 這是耶和華說的。

< Ezayi 65 >