< Ezayi 38 >

1 Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi, pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki: « Tala liloba oyo Yawe alobi: Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. »
U to vrijeme razbolje se Jezekija na smrt; i doðe k njemu prorok Isaija sin Amosov i reèe mu: ovako veli Gospod: naredi za kuæu svoju, jer æeš umrijeti i neæeš ostati živ.
2 Ezekiasi abalolaki elongi na ye na mir mpe abondelaki Yawe:
A Jezekija se okrete licem k zidu, i pomoli se Gospodu,
3 « Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. » Mpe Ezekiasi alelaki mingi.
I reèe: oh, Gospode, opomeni se da sam jednako hodio pred tobom vjerno i s cijelijem srcem, i tvorio što je tebi ugodno. I plaka Jezekija veoma.
4 Bongo, Yawe alobaki na Ezayi:
Tada doðe rijeè Gospodnja Isaiji govoreæi:
5 « Kende koloba na Ezekiasi: ‹ Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi: ‘Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Nakobakisa mibu zomi na mitano na mikolo ya bomoi na yo.
Idi i reci Jezekiji: ovako veli Gospod Bog Davida oca tvojega: èuo sam molitvu tvoju, i vidio sam suze tvoje, evo dodaæu ti vijeku petnaest godina.
6 Nakokangola yo elongo na engumba oyo, na maboko ya mokonzi ya Asiri, mpe nakobatela yango.’
I izbaviæu tebe i ovaj grad iz ruku cara Asirskoga, i braniæu ovaj grad.
7 Bongo, tala elembo ya Yawe, elembo oyo ekolakisa mpo na yo ete Yawe akokokisa makambo oyo asili kolaka:
I ovo neka ti bude znak od Gospoda da æe uèiniti Gospod što je rekao.
8 Nakozongisa sima, na badegre zomi, elili ya moyi oyo ekitaki na tango ya Akazi. › » Boye, moyi ezongaki sima, mpe ekitaki na badegre zomi.
Evo ja æu vratiti sjen po koljencima po kojima je sišao na sunèaniku Ahazovu natrag za deset koljenaca. I vrati se sunce za deset koljenaca po koljencima po kojima bijaše sišlo.
9 Tala loyembo oyo Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, akomaki na mokanda tango abikaki na bokono.
Ovo napisa Jezekija car Judin kad se razbolje, i ozdravi od bolesti svoje:
10 Nazalaki komilobela: « Tango nazali nanu na makasi na nzoto, naleka solo na nzela ya ekuke ya kufa mpe nazangela mibu oyo etikali na bomoi na ngai? » (Sheol h7585)
Ja rekoh, kad se presjekoše dani moji: idem k vratima grobnijem, uze mi se ostatak godina mojih. (Sheol h7585)
11 Namilobelaki: « Nakomona lisusu Yawe te, Yawe, na mokili ya bato ya bomoi; nakomona lisusu ata moto moko te to kowumela elongo na bato oyo bavandi na mokili ya lelo!
Rekoh: neæu vidjeti Gospoda Gospoda u zemlji živijeh, neæu više vidjeti èovjeka meðu onima koji stanuju na svijetu.
12 Mikolo ya bomoi esili, elongwe na bomoi na ngai ndenge balongolaka ndako ya kapo ya mobateli bibwele. Akati bomoi ngai ndenge motongi bilamba akataka basinga soki asilisi kotonga elamba. Longwa na moyi kino na butu, akomisi bomoi na ngai na suka.
Vijek moj proðe i prenese se od mene kao šator pastirski; presjekoh život svoj kao tkaè, otsjeæi æe me od osnutka; od jutra do veèera uèiniæeš mi kraj.
13 Nakangaki motema kino na tongo; kasi lokola nkosi, abuki-buki mikuwa na ngai nyonso. Longwa na moyi kino na butu, akomisi bomoi na ngai na suka.
Mišljah za jutra da æe kao lav potrti sve kosti moje; od jutra do veèera uèiniæeš mi kraj.
14 Nazalaki koganga lokola mbilambila to ndeke ya mayi, nazalaki kolela lokola ebenga. Miso na ngai elembaki kotala likolo. Oh Yawe, natungisami, batela ngai! »
Pištah kao ždrao i kao lastavica, ukah kao golubica, oèi mi išèilješe gledajuæi gore: Gospode, u nevolji sam, oblakšaj mi.
15 Kasi naloba nini mpo ete ayanola ngai, pamba te Ye moko nde asali yango! Mibu nyonso ya bomoi na ngai, nakotambola na komikitisa likolo ya pasi ya motema na ngai.
Šta da reèem? On mi kaza, i uèini. Proživjeæu sve godine svoje po jadu duše svoje.
16 Nkolo, bato babikaka mpo na bolamu na Yo; ezali mpe na nzela na yango nde ngai nazwi bomoi. Ozongiselaki ngai nzoto kolongono mpe opesi ngai bomoi.
Gospode, o tom se živi i u tom je svemu život duha mojega, iscijelio si me i saèuvao u životu.
17 Solo, pasi na ngai ebongwani esengo; na bolingo na Yo, obateli ngai longwa na libulu na kufa; obwaki masumu na ngai nyonso sima na mokongo na yo.
Evo, na mir doðe mi ljut jad; ali tebi bi milo da izvuèeš dušu moju iz jame pogibli, jer si bacio za leða svoja sve grijehe moje.
18 Pamba te mboka ya bakufi ekoki te kokumisa Yo, kufa ekoki kosanzola Yo te; bato oyo bakitaka na mboka ya bakufi bazalaka na elikya na boyengebene na Yo te. (Sheol h7585)
Jer neæe grob tebe slaviti, neæe te smrt hvaliti, i koji siðu u grob ne nadaju se tvojoj istini. (Sheol h7585)
19 Bato na bomoi, bato ya bomoi kaka nde basanzolaka Yo ndenge ngai nazali kosanzola Yo lelo. Batata bakoteya bana na bango boyengebene na Yo.
Živi, živi, oni æe te slaviti kao ja danas: otac æe sinovima javljati istinu tvoju.
20 Yawe, lokola obikisi ngai, tokobeta mindule na biso mikolo nyonso ya bomoi na biso na Tempelo ya Yawe.
Gospod me spase, zato æemo pjevati pjesme moje u domu Gospodnjem dok smo god živi.
21 Ezayi alobaki: — Bozwa liboke ya figi, botia yango na pota; mpe mokonzi akobika.
A Isaija bješe rekao da uzmu grudu suhih smokava i priviju na otok, te æe ozdraviti.
22 Ezekiasi alobaki: — Elembo nini ekolakisa ngai ete nakokende na Tempelo ya Yawe?
I Jezekija bješe rekao: šta æe biti znak da æu otiæi u dom Gospodnji?

< Ezayi 38 >