< Ezayi 34 >

1 Bino bikolo, bobelema pene mpe boyoka; bino bato, botia matoyi! Tika ete mabele, elongo na nyonso oyo ezali kati na yango, mpe mokili, elongo na nyonso oyo ewuti na yango, eyoka!
列國啊,要近前來聽! 眾民哪,要側耳而聽! 地和其上所充滿的, 世界和其中一切所出的都應當聽!
2 Yawe atombokeli bikolo nyonso, kanda na Ye ezali likolo ya mampinga ya bikolo nyonso. Akobebisa bango penza nye, akokaba bango na kufa.
因為耶和華向萬國發忿恨, 向他們的全軍發烈怒, 將他們滅盡,交出他們受殺戮。
3 Bakobwaka bibembe na bango na mabele, bongo bibembe yango ekobimisa solo makasi, mpe makila ekokita lokola ebale na bangomba.
被殺的必然拋棄, 屍首臭氣上騰; 諸山被他們的血融化。
4 Mampinga nyonso ya likolo ekobukana; mpe mapata ekolingama lokola buku, bongo mampinga na yango nyonso ekokweya ndenge makasa ya nzete ya vino mpe ya figi ekweyaka.
天上的萬象都要消沒; 天被捲起,好像書卷。 其上的萬象要殘敗, 像葡萄樹的葉子殘敗, 又像無花果樹的葉子殘敗一樣。
5 Pamba te mopanga na ngai esili kolongwa kuna na likolo; tala, ekiti mpo na kosambisa Edomi, mpe bato oyo nabongisaki mpo na kobebisama.
因為我的刀在天上已經喝足; 這刀必臨到以東和我所咒詛的民, 要施行審判。
6 Mopanga na Yawe etondi na makila, ezipami na mafuta, na makila ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali, na mafuta ya bameme ya mibali, pamba te ezali na mbeka moko mpo na Yawe kati na Botsira mpe bazali koboma bato ebele penza kati na mokili ya Edomi.
耶和華的刀滿了血, 用脂油和羊羔、公山羊的血, 並公綿羊腰子的脂油滋潤的; 因為耶和華在波斯拉有獻祭的事, 在以東地大行殺戮。
7 Mpakasa ekokufa nzela moko na bango, mpe bangombe ya mibali elongo na bilenge na yango. Mabele na yango ekolangwa na makila mpe putulu na yango ekozipama na mafuta.
野牛、牛犢,和公牛要一同下來。 他們的地喝醉了血; 他們的塵土因脂油肥潤。
8 Pamba te ezali mpo na Yawe, mokolo ya kozongisa mabe na mabe, mobu ya lifuti mpo na likambo ya Siona.
因耶和華有報仇之日, 為錫安的爭辯有報應之年。
9 Miluka ya Edomi ekobongwana gudron, putulu na yango, lokola moto ya fofolo mpe mabele na yango ekokoma kopela moto;
以東的河水要變為石油, 塵埃要變為硫磺; 地土成為燒着的石油,
10 moto oyo ekokufa te ezala na moyi to na butu, bongo molinga na yango ekobanda komata mpo na libela. Ekotikala esobe libela na libela, mpe ata moto moko te akoleka lisusu wana.
晝夜總不熄滅, 煙氣永遠上騰, 必世世代代成為荒廢, 永永遠遠無人經過。
11 Esulungutu mpe ndeke mosusu ya butu ekozwa yango lokola libula, kumu mpe yanganga ekokoma kovanda kuna. Nzambe akosembola likolo ya Edomi singa ya mobulu mpe nivo ya kozanga.
鵜鶘、箭豬卻要得為業; 貓頭鷹、烏鴉要住在其間。 耶和華必將空虛的準繩, 混沌的線鉈,拉在其上。
12 Bankumu na yango bakozala lisusu wana te mpo na kopona mokonzi, bakambi na yango nyonso bakotikala lisusu te.
以東人要召貴冑來治國; 那裏卻無一個, 首領也都歸於無有。
13 Nzube ekobota kati na ndako ya mokonzi; basende mpe matiti, kati na bandako na ye batonga makasi; ekokoma ndako ya bambwa ya zamba, lopango ya maligbanga.
以東的宮殿要長荊棘; 保障要長蒺藜和刺草; 要作野狗的住處, 鴕鳥的居所。
14 Bikelamu ya esobe ekokutana kuna elongo na mbwa ya zamba, mpe bantaba ya mibali ekobenga baninga na yango. Kumu ekozwa kuna esika ya kolala mpe ya kopema.
曠野的走獸要和豺狼相遇; 野山羊要與伴偶對叫。 夜間的怪物必在那裏棲身, 自找安歇之處。
15 Nyoka ekotonga zala na yango mpe ekobwaka maki na yango kuna, ekopasola yango mpe ekosangisa bana na yango na se ya elili na yango. Kaka kuna lisusu, ndeke oyo eliaka misuni ekosangana moko na mosusu.
箭蛇要在那裏做窩, 下蛋,菢蛋,生子, 聚子在其影下; 鷂鷹各與伴偶聚集在那裏。
16 Boluka kati na buku ya Yawe mpe botanga: Moko te kati na bango akozanga, moko te akomitungisa mpo na moninga na ye; pamba te monoko na Yawe nde epesi mitindo mpe Molimo na Ye akosangisa bango elongo.
你們要查考宣讀耶和華的書。 這都無一缺少, 無一沒有伴偶; 因為我的口已經吩咐, 他的靈將牠們聚集。
17 Ye abwaki zeke mpo na bango mpe loboko na Ye esaleli singa oyo bamekelaka molayi, mpo na kokabolela bango mboka. Bakozwa yango mpo na libela mpe bakovanda wana libela na libela.
他也為牠們拈鬮, 又親手用準繩給牠們分地; 牠們必永得為業, 世世代代住在其間。

< Ezayi 34 >