< Ezayi 17 >

1 Maloba ya kosambisa Damasi: « Tala, Damasi ekotikala lisusu engumba te, ekokoma nde liboke ya libebi.
The burden of Damascus: "Look, Damascus is taken away from being a city, and it will be a ruinous heap.
2 Bingumba ya Aroeri ekotikala lisusu na bato te, ekotikala nde mpo na bibwele oyo ekokoma kolala kuna, oyo moto ata moko te akobangisa.
Her cities will be abandoned forever. They will be for flocks, which shall lie down, and none shall make them afraid.
3 Bingumba batonga makasi ekolimwa na Efrayimi, mpe nguya ya bokonzi ekolimwa na Damasi. Batikali ya Siri bakokoma lokola nkembo ya bana ya Isalaele, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
The fortress shall cease from Ephraim, and the kingdom from Damascus, and the remnant of Aram. They will be as the glory of the children of Israel," says Jehovah of hosts.
4 « Na mokolo wana, lokumu ya Jakobi ekosila, mafuta ya misuni ya nzoto na ye ekosila.
"It will happen in that day that the glory of Jacob will be made thin, and the fatness of his flesh will become lean.
5 Ekozala lokola tango basangisaka matiti ya ble mpe loboko ya moloni ebukaka mito na yango, lokola tango balokotaka mito ya ble oyo ekweyaka na lubwaku ya bato ya Refayimi.
It will be like when the harvester gathers the wheat, and his arm reaps the grain. Yes, it will be like when one gleans grain in the Valley of Rephaim.
6 Kasi kaka ndambo moke ya mito ya ble nde etikalaka; lokola tango baningisaka nzete mpo na kobuka bambuma ya olive, bongo bambuma mibale to misato etikalaka na songe ya bitape, mpe minei to mitano etikalaka na bitape ya se, » elobi Yawe, Nzambe ya Isalaele.
Yet gleanings will be left there, like the shaking of an olive tree, two or three olives in the top of the uppermost bough, four or five in the outermost branches of a fruitful tree," says Jehovah, the God of Israel.
7 Na mokolo wana, bato bakotalela Mokeli na bango mpe bakobalola miso na bango epai ya Mosantu ya Isalaele;
In that day, people will look to their Maker, and their eyes will have respect for the Holy One of Israel.
8 bakotalela lisusu bitumbelo te oyo ezali misala ya maboko na bango, mpe miso na bango ekotala lisusu te misala ya misapi na bango: makonzi ya Ashera mpe bitumbelo ya malasi ya ansa.
They will not look to the altars, the work of their hands; neither shall they respect that which their fingers have made, either the Asherim, or the incense altars.
9 Na mokolo wana, bakosundola bingumba na bango oyo batonga makasi ndenge basundolaki banzete mpe bangomba liboso ya bana ya Isalaele. Nyonso ekobebisama penza.
In that day, their strong cities will be like the forsaken places of the Hivites and the Amorites, which were forsaken from before the children of Israel; and it will be a desolation.
10 Mpo ete obosani Nzambe, Mobikisi na yo, oboyi kokanisa Libanga oyo azali Ekimelo na yo, okolisi banzete ya kitoko mpe oloni banzete ya vino ya bapaya.
For you have forgotten the God of your salvation, and have not remembered the rock of your strength. Therefore you plant pleasant plants, and set out foreign seedlings.
11 Kaka na mokolo oyo olonaki yango, omonaki yango kobimisa mito; mpe na tongo makasi, nkona na yo ebimisaki bafololo. Na mokolo ya pasi, milona na yo ekomonana pamba, mpe pasi yango ekoki kosila te.
In the day of your planting, you hedge it in. In the morning, you make your seed blossom, but the harvest flees away in the day of grief and of desperate sorrow.
12 Mawa na ebele ya bato! Tala ndenge bazali koganga lokola makelele ya ebale monene! Bato ya bikolo bazali koganga lokola lokito ya mayi ya ebale monene!
Ah, the uproar of many peoples, who roar like the roaring of the seas; and the rushing of nations, that rush like the rushing of mighty waters.
13 Ata bato ya bikolo bazali koganga lokola makelele ya mayi ya bibale minene, bakimaka penza mosika tango Yawe apamelaka bango; bakimaka lokola matiti na bangomba na tango ya mopepe, lokola putulu na tango ya mopepe makasi.
The nations will rush like the rushing of many waters: but he will rebuke them, and they will flee far off, and will be chased like the chaff of the mountains before the wind, and like the whirling dust before the storm.
14 Na pokwa, somo ya pwasa nde eyaka! Bongo liboso ete tongo etana, eloko moko te etikalaka! Yango nde lifuti ya bato oyo banyokolaka biso, mpe mbano ya bato oyo bamonisaka biso pasi.
At evening, look, terror. Before the morning, they are no more. This is the portion of those who plunder us, and the lot of those who rob us.

< Ezayi 17 >