< Ezayi 16 >

1 Botinda mpate lokola mpako epai ya mokambi ya mokili; wuta na Sela kino na ngomba Siona, mboka kitoko, bokatisa esobe.
너희는 이 땅 치리자에게 어린 양들을 드리되 셀라에서부터 광야를 지나 딸 시온산으로 보낼지니라
2 Bakobengana basi ya Moabi lokola bandeke na zala na yango, na suka ya ebale ya Arinoni.
모압의 여자들은 아르논 나루에서 떠다니는 새 같고 보금자리에서 흩어진 새 새끼 같을 것이라
3 « Pesa biso toli, kamata mokano. Sala ete elili na yo ezala lokola butu na moyi makasi. Bomba bato oyo bakimeli epai na yo, kobimisa bango te.
너는 모략을 베풀며 공의로 판결하며 오정 때에 밤 같이 그늘을 짓고 쫓겨난 자를 숨기며 도망한 자를 발각시키지 말며
4 Tika ete bato ya Moabi oyo bakimi epai na yo bawumela elongo na yo! Zala nguba na bango liboso ya mobomi. » Tango minyoko ekokoma na suka, kobebisama ekotikala lisusu te mpe koboma ekosila na mokili.
나의 쫓겨난 자들로 너와 함께 있게 하되 너 모압은 멸절하는 자앞에서 그 피할 곳이 되라 대저 토색하는 자가 망하였고 멸절하는 자가 그쳤고 압제하는 자가 이 땅에서 멸절하였으며
5 Kiti ya bokonzi ekolendisama na bolingo; moto moko akovanda na kiti yango na bosolo, akobimela na ndako ya Davidi: alukaka bosembo kati na kosambisa mpe alongisaka makambo ya bosembo.
다윗의 장막에 왕위는 인자함으로 굳게 설 것이요 그 위에 앉을 자는 충실함으로 판결하며 공평을 구하며 의를 신속히 행하리라
6 Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi, ndenge atombolaka mapeka: lolendo na ye oyo eleka ndelo mpe lofundu na ye, lolendo mpe maloba na ye ya lofundu ezanga na yango tina.
우리가 모압의 교만을 들었나니 심히 교만하도다 그의 거만하며 교만하며 분노함도 들었거니와 그 과장이 헛되도다
7 Yango wana, bato ya Moabi bakosala matanga, bakomilela bango na bango mpo na Moabi. Bolela mpe bozala na mawa mpo na mikate ya Kiri-Aresheti, oyo basala na bambuma ya vino.
그러므로 모압이 모압을 위하여 통곡하되 다 통곡하며 길하레셋 건포도 떡을 위하여 그들이 슬퍼하며 심히 근심하리니
8 Mpo ete bilanga ya Eshiboni esili kokawuka elongo na bilanga ya vino ya Sibima. Bakambi ya bikolo babukaki-bukaki bitape na yango oyo eleki kitoko, oyo ekenda kino na Yaezeri mpe eleka kino na esobe. Bitape yango ezalaki epanzana makasi mpe ekenda mosika kino na ebale monene.
이는 헤스본의 밭과 십마의 포도나무가 말랐음이라 전에는 그 가지가 야셀에 미쳐 광야에 이르고 그 싹이 자라서 바다를 건넜더니 이제 열국 주권자들이 그 좋은 가지를 꺾었도다
9 Yango wana, nazali kolela lokola Yaezeri mpo na vino ya Sibima. Eshiboni mpe Eleale, nazali kosopa mpinzoli mpo na bino! Koganga ya esengo esili mpo bambuma na bino mpe mpo na biloko oyo bobuki na bilanga na bino.
그러므로 내가 야셀의 울음처럼 십마의 포도나무를 위하여 울리라 헤스본이여 엘르알레여 나의 눈물로 너를 적시리니 너의 여름실과 너의 농작물에 떠드는 소리가 일어남이니라
10 Esengo mpe kosepela ebungi na bilanga ya kitoko, banzembo mpe koganga ya esengo ezali lisusu te kati na bilanga ya vino! Mokamoli vino akokamola lisusu te kati na ekamolelo, pamba te nakosukisa koganga.
즐거움과 기쁨이 기름진 밭에서 떠났고 포도원에는 노래와 즐거운 소리가 없어지겠고 틀에는 포도를 밟을 사람이 없으리니 이는내가 그 소리를 그치게 하였음이라
11 Motema na ngai ezali kolela lokola lindanda mpo na Moabi, mpe kati ya motema na ngai ezali komona pasi mpo na Kiri-Aresheti.
이러므로 나의 마음이 모압을 위하여 수금같이 소리를 발하며 나의 창자가 길하레셋을 위하여 그러하도다
12 Bakomona Moabi komata na bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na kobondela na esika na ye ya bule, kasi akolonga te.
모압 사람이 그 산당에서 피곤하도록 봉사하며 자기 성소에 나아가서 기도할지라도 무효하리로다
13 Yango nde liloba oyo Yawe aloba wuta kala mpo na Moabi.
이는 여호와께서 전에 모압을 들어 하신 말씀이어니와
14 Kasi Yawe alobi sik’oyo boye: « Etikali mibu misato, kobakisa ata mokolo moko te, bato ya lokumu ya Moabi mpe ebele ya bato na ye bakosambwa, bongo bato na ye oyo bakobika bakozala kaka moke mpe bakozanga makasi. »
이제 여호와께서 말씀하여 가라사대 품군의 정한 해와 같이 삼년내에 모압의 영화와 그 큰 무리가 능욕을 당할지라 그 남은 수가 심히 적어 소용이 없이 되리라 하시도다

< Ezayi 16 >