< Ezayi 15 >

1 Maloba ya kosambisa mokili ya Moabi: Pamba te na butu oyo Moabi ebebisamaki, Ari kati na Moabi mpe ebebisamaki, solo, ebebisamaki kaka na butu moko! Kiri kati na Moabi mpe ebebisamaki; solo, ebebisamaki kaka na butu moko! 2 Bato ya Diboni bazali komata na bisika na bango ya bule, na bisambelo na bango ya likolo ya bangomba, mpo na kolela; Moabi akomi koganga mpo na Nebo mpe Medeba. Bakokoli mito nyonso mpe bakati mandefu nyonso. 3 Balati-lati basaki na babalabala, bato nyonso bazali kolela na likolo ya mitondo ya bandako mpe na bisika oyo bato ebele bakutanaka; bazali penza kosopa mpinzoli ebele. 4 Eshiboni mpe Eleale ezali koganga makasi, mingongo ya bato na yango ezali koyokana kino na Yakatsi; yango wana, mampinga ya Moabi bazali mpe koganga mpe mitema na bango ebukani. 5 Nazali kolela na se ya motema mpo na Moabi, banguna na ye bazali kokima kino na Tsoari, kino na Egilati-Shelishiya; bazali komata na nzela ya Luyiti na kolela; mpe na nzela ya Oronayimi, bazali kosala matanga mpo na kobebisama na bango. 6 Mayi ya Nimirimi ekawuki, bongo matiti mpe esili kokawuka, matiti ya mobesu eziki-ziki nyonso mpe matiti ya kitoko ezali lisusu te. 7 Yango wana, bamemi bomengo oyo bazwaki mpe oyo babombaki na lubwaku ya banzete ya pepiliye. 8 Kolela na bango etamboli na mokili mobimba ya Moabi; koganga na bango eyokanaki kino na Egilayimi, mpe kino na mabulu ya mayi ya Elimi. 9 Mayi ya Dimoni etondi na makila, kasi nakotinda lisusu pasi makasi na Dimoni: nkosi moko ekobimela bato ya Moabi oyo bakobika.

< Ezayi 15 >