< Ezayi 10 >

1 Mawa na bato oyo basalaka mibeko ezanga bosembo, na ba-oyo bakomaka mibeko oyo enyokolaka bato! 2 Bapimelaka bato pamba bosembo mpe babotolaka makoki ya babola, mpo na kobotola biloko ya basi bakufisa mibali mpe ya bana bitike. 3 Bokosala nini na mokolo ya kosambisama, tango pasi ekowuta mosika? Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino? Esika nini bokobomba bomengo na bino? 4 Eloko kaka bokotikala na yango: kokitisa elongi na se elongo na bato ya boloko to kokufa elongo na bato oyo babomi. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama. 5 Mawa na Asiri, lingenda ya kanda na Ngai; nzete oyo ezali na loboko na ye ezali nde esalelo ya kanda na Ngai! 6 Natindi ye mpo ete atelemela ekolo oyo eyebi Yawe te mpe bato oyo bapesaka Ngai kanda, mpo ete abebisa mpe abotola biloko na bango mpe anyata bango lokola potopoto ya balabala. 7 Kasi mokonzi ya Asiri amonaka yango bongo te, akanisaka yango bongo te; akanisaka kaka koboma mpe kobebisa bikolo ebele. 8 Azali koloba: « Boni, bakambi na ngai bazali bango nyonso ndenge moko na bakonzi te? 9 Engumba Kalino ekweyaki te lokola engumba Karikemishi? Engumba Amati, lokola engumba Aripadi te? Engumba Samari, lokola engumba Damasi te? 10 Soki loboko na Ngai esukisaki bikolo oyo esambelaka banzambe ya bikeko, bikolo oyo ezalaki na banzambe ya bikeko ebele koleka Yelusalemi mpe Samari, 11 nakokoka te penza kosala Yelusalemi elongo na banzambe na yango ya bikeko ndenge nasalaki Samari mpe banzambe na yango ya bikeko? » 12 Tango Yawe akosilisa mosala na Ye ya kotelemela ngomba Siona mpe Yelusalemi, akoloba: « Nakopesa etumbu na mokonzi ya Asiri mpo na lolendo ya motema na ye mpe mpo na lofundu ya etaleli na ye. 13 Pamba te azalaki koloba: ‹ Nazalaki kosala makambo oyo nyonso na makasi mpe na bwanya na ngai moko, pamba te nazali mayele; napusaki bandelo ya bikolo, nabotolaki bomengo na bango lokola elombe, nalongaki bakonzi na bango. 14 Loboko na ngai ekamataki bomengo na bango ndenge bakamataka zala ya ndeke; mpe ndenge bato balokotaka maki batika, ndenge wana mpe ngai nalokotaki mokili mobimba: moko te eningisaki lipapu to efungolaki monoko mpo na kobeta piololo. › » 15 Boni, epasola ekoki solo komimatisa liboso ya moto oyo asalelaka yango; si ya mabaya ekoki solo komikumisa liboso ya moto oyo asalelaka yango? Bosila komona fimbu koningisa moto oyo asalelaka yango to etape ya nzete kotombola nzete na yango? 16 Yango wana Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akotindela basoda na ye ya mbinga bokono oyo ekondisaka nzoto. Na se ya nkembo na Ye, bakopelisa moto lokola fulu ya moto. 17 Pole ya Isalaele ekokoma moto, Mosantu ya Isalaele akopela lokola moto; kaka na mokolo moko, akotumba mpe akozikisa basende mpe banzube ya Asiri, 18 akozikisa nye bazamba na yango ya minene mpe bilanga na yango ya kitoko ndenge mobeli akondaka. 19 Kati na bazamba na yango, ekotikala kaka banzete moke oyo ata mwana moke akokoka kotanga motango na yango. 20 Na mokolo wana, batikali ya Isalaele mpe bato ya libota ya Jakobi oyo bakobika bakomipesa lisusu te na maboko ya moto oyo azalaki kobeta bango; kasi bakomipesa na solo epai na Yawe, Mosantu ya Isalaele. 21 Ndambo ya bakitani ya Jakobi bakozonga epai ya Nzambe na nguya. 22 Oh Isalaele, ata bato na yo bazali ebele lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakozonga; pamba te Nzambe azwi mokano ya kobebisa bato, akomema bosembo lokola mpela. 23 Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokokisa kobebisama oyo akanaki mpo na mokili mobimba. 24 Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Oh bato na Ngai, bino oyo bovandi kati na Siona, bozala na somo te ya bato ya Asiri oyo bazali kobeta bino fimbu mpe kotombola nzete mpo na kobeta bino ndenge bato ya Ejipito bazalaki kosala. 25 Kala mingi te, kanda na Ngai epai na bino ekosila mpe kanda na Ngai ya makasi ekobalukela bango mpo na kobebisa bango. » 26 Yawe, Mokonzi ya mampinga, akotombola fimbu mpo na kobeta Asiri ndenge abetaki Madiani na libanga ya Orebi. Mpe lisusu, akotombola nzete na Ye likolo ya ebale monene lokola na Ejipito. 27 Na mokolo wana, bakolongola mokumba na likolo ya mapeka na bino mpe na ekangiseli na bakingo na bino. Tango mokumba yango ekolongwa, ekotika esika na bomengo. 28 Tala bango wana bazali koya na Ayati, bazali koleka na lubwaku ya Migironi, babombi biloko na bango na Mikimasi. 29 Baleki kati na bangomba mpe balobi: « Tokotonga molako mpe tokolekisa butu na Geba. » Bato ya Rama bakomi kolenga na somo, mpe bato ya Gibea, engumba ya mokonzi Saulo, bakimi. 30 Oh bato ya Galimi, boganga makasi! Oh Layisi, sala keba! Oh engumba Anatoti, mawa na yo! 31 Bato ya Madimena bakimi, bato ya Gebimi bazali koluka ekimelo; 32 Na mokolo ya lelo, bakotelema na Nobi, bakobeta makofi na bango na ngomba Siona, mboka kitoko, mpe na ngomba moke ya Yelusalemi. 33 Tala, Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokata bitape ya banzete na nguya monene, akokata banzete milayi mpe oyo eleki milayi, akokomisa yango mikuse. 34 Akokata na epasola banzete nyonso kati na zamba: Libani ekokweya liboso ya Elombe.

< Ezayi 10 >