< Oze 8 >

1 Tia kelelo na monoko na yo! Lokola mpongo, pasi ekokitela Ndako ya Yawe, mpo ete babebisi boyokani na Ngai mpe batombokeli Mobeko na Ngai.
Set the trumpet to thy mouth. He shall come as an eagle against the house of the LORD, because they have transgressed my covenant, and trespassed against my law.
2 Isalaele azali kobelela Ngai: « Oh Nzambe na biso, toyebi Yo! »
Israel shall cry to me, My God, we know thee.
3 Kasi Isalaele abwaki makambo malamu; yango wana, monguna akolanda ye.
Israel hath cast off the thing that is good: the enemy shall pursue him.
4 Batunaki Ngai te tango batiaki bakonzi mpe baponaki bakambi. Bamisalelaki banzambe ya bikeko na palata mpe na wolo na bango mpo na libebi na bango moko.
They have set up kings, but not by me: they have made princes, and I knew it not: of their silver and their gold have they made for themselves idols, that they may be cut off.
5 Oh Samari, nzambe na yo ya ekeko ya mwana ngombe ya mobali ezali nkele! Kanda na Ngai epeli mpo na kobebisa bango. Kino tango nini bakokoka te kotambola na bopeto?
Thy calf, O Samaria, hath cast thee off; my anger is kindled against them: how long will it be ere they attain to innocency?
6 Ewuti na Isalaele! Ekeko wana ya mwana ngombe ya mobali, ezali monyangwisi bibende na moto nde asala yango; ezali Nzambe te. Bakobuka yango biteni-biteni, mwana ngombe wana ya Samari.
For from Israel was it also: the workman made it; therefore it is not God: but the calf of Samaria shall be broken in pieces.
7 « Lokola baloni mopepe, bakobuka mopepe ya makasi. Nzete ya ble oyo ezanga moto ebimisaka farine te. Ezala soki ebimisi mito, ezali bapaya nde bakolia yango.
For they have sown the wind, and they shall reap the whirlwind: it hath no stalk: the bud shall yield no meal: if it shall yield, the strangers shall swallow it up.
8 Isalaele abebisami; tala bango wana kati na bikolo, bazali komonana lokola biloko pamba!
Israel is swallowed up: now shall they be among the Gentiles as a vessel in which is no pleasure.
9 Pamba te bakendeki na Asiri lokola ane ya zamba oyo ezali kotelengana yango moko. Efrayimi apesaki bakado epai ya bamakangu na ye.
For they have gone up to Assyria, a wild donkey alone by himself: Ephraim hath hired lovers.
10 Ata apesaki bakado kati na bikolo, sik’oyo Ngai nakosangisa bango esika moko mpe bakobanda kosila kokufa na se ya minyoko ya mokonzi moko ya nguya.
Yea, though they have hired among the nations, now will I gather them, and they shall sorrow a little for the burden of the king of princes.
11 Ata Efrayimi atongi bitumbelo ebele mpo na kolongola masumu na ye, kasi bitumbelo yango ekomemisa ye kaka masumu.
Because Ephraim hath made many altars to sin, altars shall be to him to sin.
12 Nakomelaki bango makambo ebele ya Mobeko na Ngai, kasi bamonaki yango lokola eloko moko ya mopaya.
I have written to him the great things of my law, but they were counted as a strange thing.
13 Bazali kobonza bambeka lokola likabo mpo na Ngai, mpe bazali kolia misuni; kasi Yawe azali kosepela na bango te. Sik’oyo, akokanisa mabe na bango mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango: bakozonga na Ejipito.
They sacrifice flesh for the sacrifices of my offerings, and eat it; but the LORD accepteth them not; now will he remember their iniquity, and judge their sins: they shall return to Egypt.
14 Isalaele abosani Mokeli na ye mpe atongi bandako ya kitoko; Yuda atongi bingumba ebele batonga makasi; kasi Ngai nakotinda moto kati na bingumba na bango, mpe ekotumba bandako na bango ya kitoko. »
For Israel hath forgotten his Maker, and buildeth temples; and Judah hath multiplied fortified cities: but I will send a fire upon his cities, and it shall devour his palaces.

< Oze 8 >