< Oze 6 >

1 Boya, tozonga epai na Yawe! Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso; azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso. 2 Sima na mikolo mibale, akopesa biso lisusu bomoi; na mokolo ya misato, akotelemisa biso lisusu mpo ete tozala na bomoi liboso na Ye. 3 Toyeba Yawe, toluka penza koyeba Ye; ndenge tongo etanaka solo, ndenge wana mpe akomonana: akoya epai na biso lokola mvula, lokola mvula oyo enokaka na pwasa mpe epolisaka mabele. 4 Efrayimi, nasala yo lisusu nini? Yuda, nasala yo lisusu nini? Bolingo na bino mpo na Ngai ezali lokola londende ya tongo, lokola mamwe oyo elimwaka noki. 5 Yango wana, na maloba ya basakoli na Ngai, nazali kokata-kata bino na biteni; na maloba ya monoko na Ngai, nazali koboma bino, mpe bitumbu ezali kokweyela bino lokola mokalikali. 6 Pamba te nasepelaka na boboto koleka mbeka, mpe na boyebi ya Nzambe koleka mbeka ya kotumba. 7 Ndenge kaka Adamu asalaki, bango mpe babukaki boyokani na Ngai; kuna, bazalaki sembo te liboso na Ngai. 8 Galadi ezali engumba ya bato mabe, etonda na bilembo ya makila. 9 Ndenge babomi babombamaka mpo na koluka kosala bato mabe, ndenge wana mpe Banganga-Nzambe basalaka: babomaka bato na nzela ya Sishemi; ezali likambo ya somo penza! 10 Kati na libota ya Isalaele, namonaki makambo ya somo makasi: Efrayimi amipesaki na kindumba, mpe Isalaele akomaki mbindo. 11 Yo mpe lisusu, Yuda, tango ya kobuka mbuma ebongisami mpo na yo, sima na Ngai kozongisa bomengo ya bato na Ngai.

< Oze 6 >