< Oze 14 >

1 Isalaele, zongela Yawe, Nzambe na yo, pamba te ezali masumu na yo nde ekweyisaki yo. 2 Bobongisa maloba na bino mpe bozonga epai na Yawe; boloba na Ye: « Limbisa mabe na biso nyonso, yamba biso na mawa na Yo mpo ete tobonzela yo maloba ya bibebu na biso, na esika ya bangombe. 3 Asiri akokoka kobikisa biso te; tokomata na mpunda ya bitumba te mpe tokoloba lisusu te na misala ya maboko na biso: ‹ Bozali banzambe na biso, › pamba te ezali Yo, Yawe, nde oyokelaka mwana etike mawa. » 4 Nakobikisa bango na mabe na bango mpe nakolinga bango na motema moko, pamba te kanda na Ngai elongwe kati na bango. 5 Nakozala lokola londende mpo na Isalaele; akobimisa fololo lokola lisi, akopika misisa lokola nzete ya sedele ya Libani. 6 Bitape na ye ekokende mosika, akozala na lokumu lokola nzete ya olive, mpe malasi na ye ekozala lokola malasi ya nzete ya sedele ya Libani. 7 Bato bakozongela kovanda na se ya elilingi na ye, bakokola malamu lokola ble, bakobimisa fololo lokola elanga ya vino kitoko ya Libani. 8 Efrayimi akoloba: « Banzambe ya bikeko ezali lisusu na tina nini epai na Ngai? » Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye. Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu, Ngai nde nasalaka ete obota mbuma. 9 Nani azali na bwanya mpo na kososola makambo oyo? Nani azali na mayele mingi mpo na koyeba yango? Pamba te banzela ya Yawe ezalaka alima: bato ya sembo bakolanda yango, kasi batomboki bakobeta mabaku na nzela yango.

< Oze 14 >