< Aje 1 >

1 Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, na mokolo ya liboso ya sanza ya motoba, Yawe alobaki na nzela ya Mosakoli Aje liloba oyo epai ya Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda; epai ya Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe:
In the second year of the reign of king Darius, on the first day of the sixth month, the Lord sent a message through the prophet Haggai to Zerubbabel, son of Shealtiel, governor of Judah, and to Joshua, son of Jehozadak, the high priest.
2 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Bato oyo bazali koloba ete tango ekoki nanu te mpo na kotonga Tempelo ya Yawe. › »
The Lord Almighty says this: the people say, “This isn't the proper time to rebuild the Lord's house.”
3 Nzokande, Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Aje:
Then the Lord sent a message through the prophet Haggai, saying,
4 « Boni, bokanisi ete ezali mpo na bino tango ya kovanda na bandako ya kitoko wana Tempelo ezali ya kobeba? »
Is it the proper time for you to live in your paneled houses while this house remains a ruin?
5 Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bokanisa nanu malamu makambo nyonso oyo ezali kokomela bino.
So the Lord Almighty says this: Think about what you're doing!
6 Bozali kolona milona ebele, kasi bozali kobuka bambuma moke kaka, bozali kolia kasi bozali kotonda te, bozali komela kasi bozali kosilisa posa na bino te, bozali kolata bilamba kasi malili ezali kosila te, mpe lifuti ya mosali ezali kokota na libenga etoboka. »
You have sown much but harvested little. You eat but you're still hungry. You drink but you're still thirsty. You put on clothes but you're still cold. You work hard to earn money but put it in a bag full of holes.
7 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bokanisa nanu malamu makambo oyo ezali kokomela bino.
The Lord Almighty says this: Think about what you're doing!
8 Bokende na likolo ya bangomba, bokata mpe boya na banzete mpo na kotonga Tempelo, bongo nakosepela mpe nakozwa lokumu, » elobi Yawe.
Go into the hills and bring wood to build the house. This will please me and honor me, says the Lord.
9 « Tala, bokanisaki kobuka bambuma ebele kasi bobuki kaka bambuma moke; mpe tango bomemi yango na bandako na bino, nafuli yango mopepe. Mpo na nini boye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga? « Ezali mpo na Ndako na Ngai, oyo ezali ya kobeba, na tango oyo moto na moto azali komipesa na misala ya ndako na ye moko.
You were hoping for so much, but look, it turned out to be so little. Everything you brought home I blew away. And why was that? Because my house remains a ruin while you are preoccupied with building your own houses, declares the Lord Almighty.
10 Yango wana, likolo na bino, Lola ekangi mvula, mpe mabele eboyi kobota bambuma.
That's why the clouds of heaven refused to send rain, and the earth refused to produce crops.
11 Nabengaki bokawuki na bilanga, na bangomba, na ble, na vino, na mafuta, na mbuma nyonso ya mabele, na bato, na bibwele mpe na mbuma nyonso ya mosala na bino. »
I called for a drought on the land, on the hills, on the grain fields, on the vineyards, and on the olive groves—on whatever the earth produces—and on people and livestock, on everything you do!
12 Boye Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli; Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe; mpe bato nyonso oyo batikalaki batosaki mongongo ya Yawe, Nzambe na bango, mpe maloba ya mosakoli Aje kolanda ndenge Yawe, Nzambe na bango, atindaki ye. Mpe bato nyonso bakomaki kobanga Yawe.
Then Zerubbabel, son of Shealtiel, Joshua, son of Jehozadak, the high priest, together with all the remaining people, paid attention to what the Lord said, and to the words of Haggai the prophet that the Lord their God had sent. The people showed reverence before the Lord.
13 Bongo Aje, momemi sango ya Yawe, asakolaki epai ya bato maloba oyo na Kombo na Yawe: « Nazali elongo na bino, » elobi Yawe.
Then Haggai, the Lord's messenger, delivered this message from the Lord telling the people, I am with you! says the Lord.
14 Mpe Yawe alendisaki Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda; mpe Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, elongo na bato nyonso oyo batikalaki. Bayaki mpe bamikotisaki na mosala ya kotonga Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe na bango,
The Lord inspired Zerubbabel, son of Shealtiel, governor of Judah, and Joshua, son of Jehozadak, the high priest, and all the remaining people. They came and began work on the house of the Lord Almighty.
15 na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya motoba, na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi.
This happened on the twenty-fourth day of the sixth month in the second year of the reign of king Darius.

< Aje 1 >