< Ebandeli 7 >

1 Yawe alobaki na Noa: « Kota na masuwa, yo mpe libota na yo mobimba, pamba te yo kaka nde omonani sembo na miso na Ngai kati na bato ya ekeke oyo.
耶和華對挪亞說:「你和你的全家都要進入方舟;因為在這世代中,我見你在我面前是義人。
2 Kamata banyama sambo ya mibali mpe sambo ya basi kati na banyama ya lolenge nyonso oyo ezangi mbindo; mpe nyama moko ya mobali mpe moko ya mwasi kati na banyama oyo ezali mbindo.
凡潔淨的畜類,你要帶七公七母;不潔淨的畜類,你要帶一公一母;
3 Kamata lisusu bandeke sambo ya mibali mpe sambo ya basi kati na lolenge nyonso ya bandeke mpo ete esila te kati na mokili.
空中的飛鳥也要帶七公七母,可以留種,活在全地上;
4 Pamba te etikali mikolo sambo mpo ete nanokisa mvula oyo ekowumela mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei mpe nakosilisa koboma bikelamu nyonso oyo nasala kati na mokili oyo. »
因為再過七天,我要降雨在地上四十晝夜,把我所造的各種活物都從地上除滅。」
5 Bongo, Noa asalaki makambo nyonso ndenge kaka Yawe atindaki ye.
挪亞就遵着耶和華所吩咐的行了。
6 Noa azalaki na mibu nkama motoba ya mbotama tango mpela eyaki na mokili.
當洪水氾濫在地上的時候,挪亞整六百歲。
7 Noa mpe bana na ye ya mibali elongo na mwasi na ye mpe basi ya bana na ye bakotaki na masuwa mpo ete babika na mpela.
挪亞就同他的妻和兒子兒婦都進入方舟,躲避洪水。
8 Kati na banyama ya lolenge nyonso, moko ya mobali mpe moko ya mwasi, ezala oyo ezanga mbindo to oyo ezali mbindo, bandeke mpe banyama oyo etambolaka na libumu
潔淨的畜類和不潔淨的畜類,飛鳥並地上一切的昆蟲,
9 eyaki epai na Noa mpe ekotaki na masuwa, mwasi na mobali, ndenge Nzambe atindaki Noa.
都是一對一對地,有公有母,到挪亞那裏進入方舟,正如上帝所吩咐挪亞的。
10 Bongo sima na mikolo sambo, mpela eyaki na mokili.
過了那七天,洪水氾濫在地上。
11 Tango Noa akokisaki mibu nkama motoba ya mbotama, na sanza ya mibale, na mokolo ya zomi na sambo, bitima nyonso ya se mpe maninisa nyonso ya likolo efungwamaki.
當挪亞六百歲,二月十七日那一天,大淵的泉源都裂開了,天上的窗戶也敞開了,
12 Mvula enokaki na mokili mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei.
四十晝夜降大雨在地上。
13 Kaka na mokolo wana, Noa mpe bana na ye ya mibali: Semi, Cham mpe Jafeti, elongo na mwasi na ye mpe basi misato ya bana na ye, bakotaki na masuwa.
正當那日,挪亞和他三個兒子閃、含、雅弗,並挪亞的妻子和三個兒婦,都進入方舟。
14 Elongo na bango, ekotaki mpe banyama ya zamba ya lolenge nyonso, bibwele ya lolenge nyonso, bikelamu ya lolenge nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bandeke ya lolenge nyonso mpe bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu.
他們和百獸,各從其類,一切牲畜,各從其類,爬在地上的昆蟲,各從其類,一切禽鳥,各從其類,都進入方舟。
15 Mwasi na mobali, kati na bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi, eyaki epai ya Noa mpo na kokota na masuwa.
凡有血肉、有氣息的活物,都一對一對地到挪亞那裏,進入方舟。
16 Banyama nyonso oyo ekotaki kuna ezalaki mwasi na mobali kati na bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi, ndenge Nzambe atindaki Noa. Sima, Yawe akangaki ekuke ya masuwa.
凡有血肉進入方舟的,都是有公有母,正如上帝所吩咐挪亞的。耶和華就把他關在方舟裏頭。
17 Mpela ewumelaki na mokili mikolo tuku minei; mayi ekomaki ebele mpe etombolaki masuwa likolo na yango.
洪水氾濫在地上四十天,水往上長,把方舟從地上漂起。
18 Mayi emataki mpe ekomaki ebele, bongo masuwa ekomaki kotepatepa likolo ya mayi.
水勢浩大,在地上大大地往上長,方舟在水面上漂來漂去。
19 Mayi emataki lisusu makasi mpe bangomba nyonso ya milayi oyo ezalaki na mokili ezindaki na se ya mayi.
水勢在地上極其浩大,天下的高山都淹沒了。
20 Mayi emataki lisusu likolo ya bangomba na bosanda ya bametele pene sambo to mwambe.
水勢比山高過十五肘,山嶺都淹沒了。
21 Bikelamu nyonso ya bomoi kati na mokili ekufaki, ezala bandeke, bibwele, banyama ya zamba to mpe banyama ya mike-mike oyo etambolaka na mabele to mpe bato nyonso.
凡在地上有血肉的動物,就是飛鳥、牲畜、走獸,和爬在地上的昆蟲,以及所有的人,都死了。
22 Nyonso oyo ezalaki na pema ya bomoi ekufaki kati na mokili.
凡在旱地上、鼻孔有氣息的生靈都死了。
23 Boye, Yawe alongolaki kati na mokili bikelamu nyonso oyo ezalaki na bomoi, kobanda na moto kino na ebwele, ekelamu oyo etambolaka na libumu mpe ndeke ya likolo; alongolaki bango na mokili mpe etikalaki kaka Noa na ba-oyo bazalaki na ye elongo na masuwa.
凡地上各類的活物,連人帶牲畜、昆蟲,以及空中的飛鳥,都從地上除滅了,只留下挪亞和那些與他同在方舟裏的。
24 Mayi etondaki na mokili mikolo nkama moko na tuku mitano.
水勢浩大,在地上共一百五十天。

< Ebandeli 7 >

The Great Flood
The Great Flood