< Ebandeli 5 >

1 Tala lisolo ya libota ya Adamu. Tango Nzambe akelaki bato, asalaki bango na elilingi ya Nzambe.
亞當的後代記在下面。(當上帝造人的日子,是照着自己的樣式造的,
2 Akelaki bango mobali mpe mwasi, mpe apambolaki bango. Na mokolo oyo akelaki bango, apesaki bango kombo « bato. »
並且造男造女。在他們被造的日子,上帝賜福給他們,稱他們為「人」。)
3 Tango Adamu akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama, abotaki mwana mobali na elilingi na ye mpe na lolenge na ye. Apesaki ye kombo « Seti. »
亞當活到一百三十歲,生了一個兒子,形像樣式和自己相似,就給他起名叫塞特。
4 Sima na mbotama ya Seti, Adamu awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
亞當生塞特之後,又在世八百年,並且生兒養女。
5 Mibu nyonso oyo Adamu awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku misato, sima akufaki.
亞當共活了九百三十歲就死了。
6 Tango Seti akokisaki mibu nkama moko na mitano ya mbotama, abotaki Enoshi.
塞特活到一百零五歲,生了以挪士。
7 Sima na kobota Enoshi, Seti awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na sambo mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
塞特生以挪士之後,又活了八百零七年,並且生兒養女。
8 Mibu nyonso oyo Seti awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na zomi na mibale, sima akufaki.
塞特共活了九百一十二歲就死了。
9 Tango Enoshi akokisaki mibu tuku libwa ya mbotama, abotaki Kena.
以挪士活到九十歲,生了該南。
10 Sima na kobota Kena, Enoshi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na zomi na mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
以挪士生該南之後,又活了八百一十五年,並且生兒養女。
11 Mibu nyonso oyo Enoshi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na mitano, sima akufaki.
以挪士共活了九百零五歲就死了。
12 Tango Kena akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Maalalele.
該南活到七十歲,生了瑪勒列。
13 Sima na kobota Maalalele, Kena awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na tuku minei mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
該南生瑪勒列之後,又活了八百四十年,並且生兒養女。
14 Mibu nyonso oyo Kena awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na zomi, sima akufaki.
該南共活了九百一十歲就死了。
15 Tango Maalalele akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Yeredi.
瑪勒列活到六十五歲,生了雅列。
16 Sima na kobota Yeredi, Maalalele awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
瑪勒列生雅列之後,又活了八百三十年,並且生兒養女。
17 Mibu nyonso oyo Maalalele awumelaki na bomoi ezalaki nkama mwambe na tuku libwa na mitano, sima akufaki.
瑪勒列共活了八百九十五歲就死了。
18 Tango Yeredi akokisaki mibu nkama moko na tuku motoba na mibale ya mbotama, abotaki Enoki.
雅列活到一百六十二歲,生了以諾。
19 Sima na kobota Enoki, Yeredi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
雅列生以諾之後,又活了八百年,並且生兒養女。
20 Mibu nyonso oyo Yeredi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku motoba na mibale, sima akufaki.
雅列共活了九百六十二歲就死了。
21 Tango Enoki akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Metusalemi.
以諾活到六十五歲,生了瑪土撒拉。
22 Sima na kobota Metusalemi, Enoki azalaki kosala mokano ya Nzambe mibu nkama misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
以諾生瑪土撒拉之後,與上帝同行三百年,並且生兒養女。
23 Mibu nyonso oyo Enoki awumelaki na bomoi ezalaki nkama misato na tuku motoba na mitano.
以諾共活了三百六十五歲。
24 Enoki atambolaki na boyengebene elongo na Nzambe; bongo alimwaki, pamba te Nzambe azwaki ye.
以諾與上帝同行,上帝將他取去,他就不在世了。
25 Tango Metusalemi akokisaki mibu nkama moko na tuku mwambe na sambo ya mbotama, abotaki Lemeki.
瑪土撒拉活到一百八十七歲,生了拉麥。
26 Sima na kobota Lemeki, Metusalemi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama sambo na tuku mwambe na mibale mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
瑪土撒拉生拉麥之後,又活了七百八十二年,並且生兒養女。
27 Mibu nyonso oyo Metusalemi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku motoba na libwa, sima akufaki.
瑪土撒拉共活了九百六十九歲就死了。
28 Tango Lemeki akokisaki mibu nkama moko na tuku mwambe na mibale ya mbotama, abotaki mwana mobali.
拉麥活到一百八十二歲,生了一個兒子,
29 Abengaki ye Noa mpe alobaki: « Ye oyo akobondisa biso na mosala mpe na pasi ya maboko na biso likolo ya mabele oyo Yawe alakelaki mabe. »
給他起名叫挪亞,說:「這個兒子必為我們的操作和手中的勞苦安慰我們;這操作勞苦是因為耶和華咒詛地。」
30 Sima na kobotama ya Noa, Lemeki awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mitano na tuku libwa na mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
拉麥生挪亞之後,又活了五百九十五年,並且生兒養女。
31 Mibu nyonso oyo Lemeki awumelaki na bomoi ezalaki nkama sambo na tuku sambo na sambo, sima akufaki.
拉麥共活了七百七十七歲就死了。
32 Tango Noa akokisaki mibu nkama mitano ya mbotama, abotaki Semi, Cham mpe Jafeti.
挪亞五百歲生了閃、含、雅弗。

< Ebandeli 5 >