< Ebandeli 46 >

1 Isalaele akendeki na nyonso oyo azalaki na yango. Tango akomaki na Beri-Sheba, abonzaki mbeka epai ya Nzambe ya Izaki, tata na ye.
以色列帶着一切所有的,起身來到別是巴,就獻祭給他父親以撒的上帝。
2 Na butu, Nzambe alobaki na Isalaele na nzela ya emoniseli: — Jakobi! Jakobi! Jakobi azongisaki: — Ngai oyo.
夜間,上帝在異象中對以色列說:「雅各!雅各!」他說:「我在這裏。」
3 Nzambe alobaki: — Nazali Nzambe, Nzambe ya tata na yo. Kobanga te kokende na Ejipito, pamba te nakokomisa yo ekolo monene kuna.
上帝說:「我是上帝,就是你父親的上帝。你下埃及去不要害怕,因為我必使你在那裏成為大族。
4 Ngai moko nakokende elongo na yo na Ejipito; mpe ya solo, nakozongisa yo lisusu. Loboko ya Jozefi ekozipa miso na yo.
我要和你同下埃及去,也必定帶你上來;約瑟必給你送終。」
5 Bongo Jakobi alongwaki na Beri-Sheba. Bana mibali ya Isalaele bamatisaki na bashario oyo Faraon atindaki mpo na komema ye: tata na bango Jakobi, bana na bango mpe basi na bango.
雅各就從別是巴起行。以色列的兒子們使他們的父親雅各和他們的妻子、兒女都坐在法老為雅各送來的車上。
6 Bamemaki lisusu bibwele na bango mpe biloko nyonso oyo bazalaki na yango na mokili ya Kanana; mpe Jakobi elongo na bakitani na ye nyonso bakendeki na Ejipito.
他們又帶着迦南地所得的牲畜、貨財來到埃及。雅各和他的一切子孫都一同來了。
7 Azwaki elongo na ye mpo na kokende na Ejipito: bana na ye ya mibali, bakoko na ye ya mibali mpe bana na ye ya basi elongo na bakoko na ye ya basi: bakitani na ye nyonso.
雅各把他的兒子、孫子、女兒、孫女,並他的子子孫孫,一同帶到埃及。
8 Tala bakombo ya bana mibali ya Isalaele, oyo bakendeki na Ejipito: Ribeni, mwana liboso ya Jakobi.
來到埃及的以色列人名字記在下面。雅各和他的兒孫:雅各的長子是呂便。
9 Bana mibali ya Ribeni: Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi.
呂便的兒子是哈諾、法路、希斯倫、迦米。
10 Bana mibali ya Simeoni: Yemuweli, Yamini, Owadi, Yakini, Tsoari mpe Saulo, mwana mobali oyo babotelaki ye na mwasi ya mokili ya Kanana.
西緬的兒子是耶母利、雅憫、阿轄、雅斤、瑣轄,還有迦南女子所生的掃羅。
11 Bana mibali ya Levi: Gerishoni, Keati mpe Merari.
利未的兒子是革順、哥轄、米拉利。
12 Bana mibali ya Yuda: Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana. Bana mibali ya Peretsi: Etsironi mpe Amuli.
猶大的兒子是珥、俄南、示拉、法勒斯、謝拉;惟有珥與俄南死在迦南地。法勒斯的兒子是希斯崙、哈母勒。
13 Bana mibali ya Isakari: Tola, Puwa, Yashubi mpe Shimironi.
以薩迦的兒子是陀拉、普瓦、約伯、伸崙。
14 Bana mibali ya Zabuloni: Seredi, Eloni mpe Yaleyeli.
西布倫的兒子是西烈、以倫、雅利。
15 Bango nde bazalaki bana mibali oyo Lea abotelaki Jakobi kati na Padani-Arami; bakisa Dina, mwana mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki tuku misato na misato.
這是利亞在巴旦‧亞蘭給雅各所生的兒子,還有女兒底拿。兒孫共有三十三人。
16 Bana mibali ya Gadi: Tsefoni, Agi, Shuni, Etsiboni, Eri, Arodi mpe Areeli.
迦得的兒子是洗非芸、哈基、書尼、以斯本、以利、亞羅底、亞列利。
17 Bana mibali ya Aseri: Yimina, Yishiva, Yishivi, Beria mpe ndeko na bango ya mwasi Sera. Bana mibali ya Beria: Eberi mpe Malikieli.
亞設的兒子是音拿、亦施瓦、亦施韋、比利亞,還有他們的妹子西拉。比利亞的兒子是希別、瑪結。
18 Bango nde bazalaki bana mibali oyo Zilipa abotelaki Jakobi; Zilipa azalaki mwasi mosali oyo Labani apesaki epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki zomi na motoba.
這是拉班給他女兒利亞的婢女悉帕從雅各所生的兒孫,共有十六人。
19 Bana mibali ya Rasheli, mwasi ya Jakobi: Jozefi mpe Benjame.
雅各之妻拉結的兒子是約瑟和便雅憫。
20 Kati na mokili ya Ejipito, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya engumba Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale: Manase mpe Efrayimi.
約瑟在埃及地生了瑪拿西和以法蓮,就是安城的祭司波提非拉的女兒亞西納給約瑟生的。
21 Bana mibali ya Benjame: Bela, Bekeri, Ashibeli, Gera, Namani, Eyi, Roshi, Mupimi, Upime mpe Aridi.
便雅憫的兒子是比拉、比結、亞實別、基拉、乃幔、以希、羅實、母平、戶平、亞勒。
22 Bango nde bazalaki bana mibali oyo Rasheli abotelaki Jakobi: bango nyonso bazalaki zomi na minei.
這是拉結給雅各所生的兒孫,共有十四人。
23 Mwana mobali ya Dani: Ushimi.
但的兒子是戶伸。
24 Bana mibali ya Nefitali: Yatseyeli, Guni, Yetseri mpe Shilemi.
拿弗他利的兒子是雅薛、沽尼、耶色、示冷。
25 Bango nde bazalaki bana mibali oyo Bila abotelaki Jakobi; bango nyonso bazalaki sambo. Bila azalaki mwasi mosali oyo Labani apesaki epai ya mwana na ye ya mwasi Rasheli.
這是拉班給他女兒拉結的婢女辟拉從雅各所生的兒孫,共有七人。
26 Bato nyonso oyo bakendeki na Ejipito elongo na Jakobi, oyo bazalaki penza bakitani na ye, longola basi ya bana na ye, bango nyonso bazalaki tuku motoba na motoba.
那與雅各同到埃及的,除了他兒婦之外,凡從他所生的,共有六十六人。
27 Bana mibali ya Jozefi oyo babotamaki na Ejipito bazalaki mibale. Bato nyonso ya libota ya Jakobi oyo bakendeki na Ejipito bazalaki tuku sambo.
還有約瑟在埃及所生的兩個兒子。雅各家來到埃及的共有七十人。
28 Liboso ete Jakobi akutana na Jozefi, atindaki Yuda epai ya Jozefi mpo na kobongisa bokutani na bango na Gosheni. Tango bakomaki na Gosheni,
雅各打發猶大先去見約瑟,請派人引路往歌珊去;於是他們來到歌珊地。
29 Jozefi abongisaki Shario na ye mpe akendeki kokutana na Isalaele, tata na ye, na Gosheni. Tango kaka akomaki liboso na ye, ayambaki tata na ye mpe alelaki mingi.
約瑟套車往歌珊去,迎接他父親以色列,及至見了面,就伏在父親的頸項上,哭了許久。
30 Isalaele alobaki na Jozefi: — Sik’oyo, nakoki na ngai kokufa mpo ete namoni yo penza na miso na ngai moko, mpe ozali nanu na bomoi!
以色列對約瑟說:「我既得見你的面,知道你還在,就是死我也甘心。」
31 Jozefi alobaki na bandeko na ye mpe na libota ya tata na ye: — Nakokende koyebisa Faraon: « Bandeko na ngai mpe libota ya tata na ngai, ba-oyo bavandaka na mokili ya Kanana, bayei epai na ngai.
約瑟對他的弟兄和他父的全家說:「我要上去告訴法老,對他說:『我的弟兄和我父的全家從前在迦南地,現今都到我這裏來了。
32 Bazali babateli bibwele, babokolaka bibwele. Bamemi bameme, bantaba, bangombe na bango mpe biloko nyonso oyo bazalaki na yango. »
他們本是牧羊的人,以養牲畜為業;他們把羊群牛群和一切所有的都帶來了。』
33 Tango Faraon akobenga bino mpe akotuna bino: « Bosalaka mosala nini? »
等法老召你們的時候,問你們說:『你們以何事為業?』
34 Bokozongisa: « Basali na yo babokolaka bibwele wuta bomwana na biso kino sik’oyo ndenge bakoko na biso bazalaki kosala. » Soki kaka bolobi bongo, akopesa bino nzela ya kovanda na Gosheni, pamba te bato ya Ejipito balingaka te babateli nyonso ya bibwele.
你們要說:『你的僕人,從幼年直到如今,都以養牲畜為業,連我們的祖宗也都以此為業。』這樣,你們可以住在歌珊地,因為凡牧羊的都被埃及人所厭惡。」

< Ebandeli 46 >