< Ebandeli 41 >

1 Sima na mibu mibale, Faraon alotaki ndoto: atelemaki pembeni ya ebale Nili,
Now it happened at the end of two full years that Pharaoh had a dream, and look, he was standing by the Nile.
2 amonaki bangombe sambo ya basi, ya kitoko mpe ya mafuta. Bangombe yango ebimaki wuta na ebale mpe ezalaki kolia matiti pembeni ya ebale Nili.
And look, there came up out of the Nile seven cows, sleek and fat, and they grazed among the reeds.
3 Sima na yango, bangombe mosusu sambo ya basi, ya mabe mpe ekonda, ebimaki wuta na ebale, etelemaki pembeni ya bangombe ya basi oyo ezalaki pembeni ya ebale Nili.
And look, seven other cows came up after them out of the Nile, miserable-looking and thin, and stood by the other cows at the edge of the Nile.
4 Bangombe sambo ya basi ya mabe mpe ekonda eliaki bangombe sambo ya kitoko mpe ya mafuta. Kaka na tango yango, Faraon alamukaki.
The miserable-looking and thin cows ate up the seven sleek and fat cows. Then Pharaoh woke up.
5 Alalaki lisusu mpe alotaki ndoto ya mibale: nzete moko ya ble ebimisaki mito sambo ya ble, ya minene mpe ya kitoko.
And he slept and dreamed a second time. And look, seven heads of grain came up on one stalk, healthy and good.
6 Mito mosusu sambo ya ble, ekonda mpe ezika na mopepe ya este, ebimaki sima na oyo ya minene.
Then look, seven heads of grain, thin and blasted with the east wind, sprouted up after them.
7 Mito sambo oyo ekonda eliaki mito sambo oyo ya minene mpe etonda. Kaka na tango yango, Faraon alamukaki, asosolaki ete ezali ndoto.
The thin heads swallowed up the seven healthy and full heads. Then Pharaoh woke up, and look, it was a dream.
8 Na tongo, lokola molimo na ye etungisamaki, abengaki bato nyonso ya soloka mpe ya bwanya ya Ejipito. Faraon ayebisaki bango ndoto na ye, kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ye yango.
It happened in the morning that his mind was troubled, so he summoned all of Egypt's magicians and wise men. And Pharaoh told them his dreams, but there was no one who could interpret them to Pharaoh.
9 Kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi alobaki na Faraon: « Na mokolo ya lelo, nalingi kokanisa mbeba na ngai.
Then the chief cupbearer spoke to Pharaoh, saying, "I remember my faults today.
10 Mokolo moko, Faraon asilikelaki basali na ye mpe atiaki ngai na boloko elongo na kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi kati na ndako ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi.
Pharaoh was angry with his servants and put me in prison in the house of the captain of the guard, me and the chief baker.
11 Biso mibale tolotaki bandoto na butu moko: ndoto na ndoto ezalaki na ndimbola na yango.
We had a dream on the same night, he and I, each having a dream with its own meaning.
12 Kuna, tozalaki na elenge mobali moko, azali Mo-Ebre mpe mosali ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi. Toyebisaki ye bandoto na biso mpe alimbolaki yango mpo na biso, apesaki moto na moto ndimbola ya ndoto na ye.
Now a young Hebrew was there with us, a servant of the captain of the guards, and we told him, and he interpreted our dreams to us, to each man he interpreted according to his own dream.
13 Makambo nyonso esalemaki ndenge kaka alimbolelaki biso yango. Ngai nazongelaki misala na ngai; mpe moninga mosusu, badiembikaki ye. »
And it happened just the way he interpreted them to us, so it was: I was restored to my office, and he was hanged."
14 Faraon abengaki Jozefi, mpe babimisaki ye na lombangu na boloko. Bakataki ye suki, alataki bilamba mosusu mpe ayaki liboso ya Faraon.
Then Pharaoh summoned Joseph, and they brought him quickly out of the pit. And he shaved himself, changed his clothes, and came in to Pharaoh.
15 Faraon alobaki na Jozefi: — Nalotaki ndoto mpe ata moto moko te alongi kolimbola yango; kasi nayoki sango na tina na yo ete soki oyoki ndoto, okolimbola yango.
And Pharaoh said to Joseph, "I had a dream, but there is no one who can interpret it. I have heard it said about you that when you hear a dream you can interpret it."
16 Jozefi azongiselaki Faraon: — Ngai nakolonga te kosala yango, kasi Nzambe akopesa na Faraon eyano oyo azali na yango posa.
And Joseph answered Pharaoh, saying, "Apart from God, the welfare of Pharaoh will receive no answer. "
17 Faraon alobaki na Jozefi: — Na ndoto na ngai, natelemaki pembeni ya ebale Nili.
Then Pharaoh said to Joseph, "In my dream, look, I stood on the edge of the Nile.
18 Namonaki bangombe sambo ya basi, ya kitoko mpe ya mafuta. Bangombe yango ebimaki wuta na ebale mpe ezalaki kolia matiti pembeni ya ebale Nili.
And look, there came up out of the river seven cows, fat and sleek, and they grazed among the reeds.
19 Sima na yango, bangombe mosusu sambo ya basi ebimaki: ya mike, ya mabe penza mpe ekonda; nanu natikala komona te bangombe ya ndenge wana na mokili mobimba ya Ejipito.
And look, seven other cows came up after them, scrawny and very miserable-looking and thin. I had never seen such bad-looking cows in all the land of Egypt.
20 Ngombe ya basi ekonda mpe ya mabe eliaki bangombe sambo ya mafuta oyo ebimaki liboso.
The thin and miserable-looking cows ate up the first seven fat cows.
21 Bongo ekotaki na mabumu na yango kasi ezalaki komonana te ete bangombe ya mafuta ekoti na mabumu ya bangombe ekonda, mpe lolenge na yango ezalaki kaka mabe lokola ndenge ezalaki liboso. Kaka na tango yango, nalamukaki.
But when they had eaten them up, no one would have known that they had eaten them, for they were still as miserable-looking as at the beginning. Then I woke up.
22 Na ndoto na ngai mosusu, namonaki mito sambo ya ble ya kitoko mpe ya mafuta kobima na nzete moko.
And I fell asleep, and I saw in my dream, and look, seven heads of grain growing on one stalk, full and good.
23 Sima na yango, mito sambo mosusu ya ble ebimaki. Ezalaki ya kokawuka, ekonda mpe ezika na mopepe ya este.
And look, seven heads of grain, withered, thin, and blasted with the east wind, sprouted up after them.
24 Mito sambo ya ble oyo ekonda emelaki mito sambo ya ble oyo ya malamu. Nayebisaki yango epai ya bato ya soloka kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ngai yango.
And the seven thin heads of grain swallowed up the seven good heads of grain. And I told it to the magicians, but no one could tell me its meaning."
25 Jozefi alobaki na Faraon: — Ndoto ya Faraon ezali kaka ndoto moko mpe ezali kaka na ndimbola moko. Nzambe amonisaki Faraon makambo oyo Ye akosala.
Then Joseph said to Pharaoh, "The dreams of Pharaoh are one. God has told Pharaoh what he is about to do.
26 Bangombe sambo ya basi ya kitoko ezali mibu sambo, mpe mito sambo ya ble ezali mibu sambo: ezali kaka ndoto moko.
The seven good cows represent seven years, and the seven good heads of grain represent seven years. The dreams are the same.
27 Bangombe sambo ya basi ekonda mpe ya mabe oyo ebimaki sima na oyo ya mafuta mpe ya kitoko, ezali mibu sambo; mpe mito sambo ya ble oyo ekonda mpe ezika na mopepe ya este ezali mibu sambo ya nzala makasi.
And the seven thin and miserable-looking cows that came up after them represent seven years, and also the seven empty heads of grain blasted with the east wind. They are seven years of famine.
28 Tala maloba oyo nazalaki na yango mpo na koyebisa Faraon. Nzambe atalisi na Faraon makambo oyo Ye akosala.
It is just as I said to Pharaoh: God has shown Pharaoh what he is about to do.
29 Mibu sambo ya bofuluki ekoya na mokili mobimba ya Ejipito.
Look, seven years of great abundance will come throughout all the land of Egypt.
30 Kasi mibu sambo ya nzala makasi ekolanda yango; boye bakobosana bofuluki nyonso ya mokili ya Ejipito mpo ete nzala makasi yango ekokawusa mokili.
But after them seven years of famine will come, and all the abundance will be forgotten in the land of Egypt. The famine will devastate the land,
31 Bakokanisa lisusu te bofuluki nyonso ya mokili likolo ya nzala makasi oyo ekolanda, pamba te nzala ekozala makasi penza.
and the abundance will not be remembered in the land because of the famine that follows it, for it will be very severe.
32 Soki Faraon alotaki ndoto yango na lolenge mibale, elingi koloba ete Nzambe asilaki kozwa mokano na likambo yango mpe akokokisa yango na lombangu.
Now the dream was repeated to Pharaoh twice because the matter has been fixed by God, and God will carry it out soon.
33 Tika sik’oyo Faraon aluka moto moko ya mayele mpe ya bwanya, atia ye na moto ya mokili ya Ejipito.
Now therefore Pharaoh should look for a discerning and wise man, and give him authority over the land of Egypt.
34 Tika ete Faraon asala bongo; tika ete apona basali na mokili, ba-oyo bakokongola eteni ya mitano ya bambuma ya Ejipito na tango ya mibu sambo ya bofuluki.
Pharaoh should do this, and should appoint overseers over the land, and they should take a fifth of all the produce of the land of Egypt during the seven years of abundance.
35 Boye, na se ya bokonzi ya Faraon, bakobanda kosangisa biloko nyonso ya kolia oyo mibu ya malamu ekobimisa, bakobomba ble na bingumba mpe bakobatela yango lokola biloko ya kolia mpo na bingumba.
They should gather all the food during these good years that are coming and store the grain under the authority of Pharaoh for food in the cities, and they should preserve it.
36 Bakobatela biloko yango mpo na mokili, mpo na mibu sambo ya nzala makasi oyo ekozala na mokili ya Ejipito; na bongo nzala makasi ekobebisa mokili te.
That food will be a reserve for the land during the seven years of famine that will come on the land of Egypt, so that the land will survive the famine."
37 Likambo yango esepelisaki Faraon mpe basali na ye nyonso.
The proposal was good in the eyes of Pharaoh, and in the eyes of all his servants.
38 Faraon atunaki bango: — Tokoki komona moto lokola oyo, moto oyo Molimo na Nzambe avandi kati na ye?
Pharaoh said to his servants, "Can we find such a one as this, a man in whom is the Spirit of God?"
39 Faraon alobaki na Jozefi: — Lokola Nzambe ayebisi yo makambo oyo nyonso, ezali na moto moko te oyo azali na mayele mpe na bwanya lokola yo.
So Pharaoh said to Joseph, "Because God has shown you all of this, there is no one as discerning and wise as you.
40 Okozala mokonzi ya ndako na ngai mpe bato na ngai nyonso bakobanda kotosa mitindo na yo. Kaka kiti ya bokonzi nde ekosala ete ngai nazala na likolo na yo.
You will be in charge of my house, and according to your word will all my people be ruled. Only with regard to the throne will I be greater than you."
41 Faraon alobaki na Jozefi: — Natie yo mokonzi ya mokili mobimba ya Ejipito.
Pharaoh said to Joseph, "Look, I have put you in charge over all the land of Egypt."
42 Faraon alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe atiaki yango na mosapi ya Jozefi. Alatisaki ye bilamba ya lino ya kitoko mpe atiaki ye singa ya wolo na kingo.
Then Pharaoh took off his signet ring from his hand and put it on Joseph's hand, and clothed him in robes of fine linen, and put a gold chain around his neck.
43 Amatisaki ye na shareti na ye ya mibale mpe bato bazalaki koganga: « Bofukama! » Boye, atiaki Jozefi mokonzi ya mokili mobimba ya Ejipito.
And he had him ride in the second chariot which he had, and they called out before him, "Bow the knee. " So he put him in charge over the entire land of Egypt.
44 Faraon alobaki lisusu na Jozefi: — Nazali Faraon. Kasi awa na Ejipito, moto moko te akotombola loboko to lokolo soki kaka na mitindo na yo te.
Then Pharaoh said to Joseph, "I am Pharaoh, but without your permission no one will do anything or go anywhere in all the land of Egypt."
45 Faraon apesaki Jozefi kombo « Tsafinati-Paenea, » mpe apesaki ye Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, mpo ete azala mwasi na ye. Jozefi atambolaki na mokili ya Ejipito.
Pharaoh called Joseph's name Zaphenath-Paneah. And he gave him Asenath the daughter of Potiphera, priest of On, as a wife. So Joseph went out through the land of Egypt.
46 Azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akotaki na mosala ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Jozefi alongwaki na miso ya Faraon mpe atambolaki na mokili mobimba ya Ejipito.
Joseph was thirty years old when he began to serve Pharaoh king of Egypt. Joseph left the presence of Pharaoh and went throughout all the land of Egypt.
47 Na mibu sambo ya bofuluki, mabele ebotaki mingi.
During the seven years of abundance the land produced large harvests.
48 Jozefi asangisaki biloko nyonso ya kolia oyo ebotaki na mibu yango sambo ya bofuluki kati na Ejipito mpe abombaki yango kati na engumba. Na engumba moko na moko, atiaki biloko ya kolia oyo ewutaki na bilanga oyo ezalaki zingazinga na yango.
And he collected all the food during the seven years when there was abundance in the land of Egypt, and put the food in the cities. He placed in every city the food from the fields surrounding it.
49 Jozefi abombaki ble ebele lokola zelo ya ebale monene, ezalaki mingi koleka; yango wana bakataki kotanga, pamba te bakokaki kotanga yango lisusu te.
Joseph stored up grain in great abundance, like the sand of the sea, until he stopped measuring it, because it could not be measured.
50 Liboso ete mibu ya nzala makasi eya, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale.
To Joseph were born two sons before the year of famine came, whom Asenath, the daughter of Potiphera priest of On, bore to him.
51 Jozefi apesaki mwana na ye ya liboso kombo « Manase, » pamba te amilobelaki: « Nzambe asali ete nabosana pasi na ngai nyonso mpe bokabwani na ngai na libota mobimba ya tata na ngai. »
Joseph called the name of the firstborn Manasseh: "For God has made me forget all my trouble and all my father's household."
52 Apesaki mwana na ye ya mibale kombo « Efrayimi, » pamba te amilobelaki: « Nzambe apesi ngai mabota na mokili epai wapi namonaki pasi. »
And the name of the second he called Ephraim: "For God has made me fruitful in the land of my suffering."
53 Mibu sambo ya bofuluki oyo ezalaki na Ejipito ekomaki na suka,
And the seven years of abundance that occurred in the land of Egypt came to an end.
54 mpe mibu sambo ya nzala makasi ebandaki, ndenge kaka Jozefi alobaki. Nzala makasi ekotaki na mikili nyonso, kasi na mokili mobimba ya Ejipito biloko ya kolia ezangaki te.
Then the seven years of famine began to come, just as Joseph had said. There was famine in all lands, but in all the land of Egypt there was food.
55 Tango bato nyonso ya Ejipito bakomaki na nzala makasi, bagangaki epai ya Faraon mpo na koluka biloko ya kolia. Bongo Faraon alobaki na bato nyonso ya Ejipito: « Bokende epai ya Jozefi mpe bosala makambo oyo akoyebisa bino. »
When all the land of Egypt experienced the famine, the people cried to Pharaoh for food. Then Pharaoh said to all Egypt, "Go to Joseph. Whatever he says to you, do."
56 Tango nzala ekotaki na mokili mobimba ya Ejipito, Jozefi afungolaki ndako oyo batiaki biloko mpe atekaki ble epai ya bato ya Ejipito; kasi nzala makasi ekobaki kaka.
So the famine was over all the surface of the land. Then Joseph opened all the storehouses of grain and sold to the Egyptians. And the famine was severe in the land of Egypt.
57 Mikili nyonso ezalaki koya na Ejipito mpo na kosomba ble epai ya Jozefi mpo ete nzala makasi ekotaki na mokili mobimba.
And all the countries came to Egypt to Joseph to buy grain, because the famine was severe in all the earth.

< Ebandeli 41 >