< Ebandeli 40 >

1 Sima na mwa tango, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito, basalaki mabe liboso ya nkolo na bango, mokonzi ya Ejipito. 2 Faraon asilikelaki bakalaka na ye mibale ya lokumu: kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa. 3 Abwakaki bango na boloko kati na ndako ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, boloko epai wapi Jozefi azalaki. 4 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi apesaki bango na maboko ya Jozefi mpo ete alandela bango. Boye basalaki mikolo mwa mingi na boloko. 5 Ezalaki mokolo moko na butu, bango mibale, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito, balotaki moto na moto ndoto na ye mpe ndoto na ndoto ezalaki na ndimbola na yango. 6 Na tongo, Jozefi akendeki epai na bango mpe amonaki ete bazali mawa-mawa. 7 Jozefi atunaki bakalaka ya lokumu ya Faraon, oyo bazalaki kati na boloko elongo na ye, kati na ndako ya nkolo na ye: — Mpo na nini lelo bilongi na bino ezali mawa-mawa? 8 Bazongiselaki ye: — Biso mibale toloti bandoto; kasi moto ya kolimbola yango mpo na biso azali te. Jozefi alobaki na bango: — Boyebi te ete Nzambe nde apesaka ndimbola ya bandoto? Nabondeli bino, boyebisa ngai bandoto na bino. 9 Bongo kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito ayebisaki Jozefi ndoto na ye. Alobaki: — Na ndoto na ngai, namonaki nzete ya vino liboso na ngai. 10 Nzete yango ya vino ezalaki na bitape misato. Bongo ekomaki kobimisa mito, fololo mpe maboke ebimisaki bambuma ya kotela. 11 Kopo ya Faraon ezalaki na maboko na ngai. Nazwaki bambuma ya vino, nakamolaki yango na kopo ya Faraon mpe napesaki ye kopo yango na maboko na ye. 12 Jozefi alobaki na ye: — Tala ndimbola ya ndoto na yo: « Bitape misato ezali mikolo misato. 13 Sima na mikolo misato, Faraon akotombola moto na yo mpe akozongisa yo na esika na yo ya mosala. Okotia lisusu kopo ya Faraon na maboko na ye ndenge ozalaki kosala na kala. 14 Kasi tango makambo nyonso oyo ekotambola malamu mpo na yo, nabondeli yo, kanisa ngai mpe salela ngai bolamu, zala molobeli na ngai epai ya Faraon mpo ete abimisa ngai na boloko oyo. 15 Pamba te babimisaki ngai na makasi wuta na mokili ya Ba-Ebre; mpe awa nasali likambo moko te ya mabe mpo ete batia ngai na boloko. » 16 Tango kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito asosolaki ete Jozefi apesaki ndimbola ya malamu, alobaki na Jozefi: — Ngai mpe nalotaki ndoto: « Bitunga misato ya mapa ezalaki likolo ya moto na ngai. 17 Kitunga ya likolo ezalaki na bagato ya ndenge na ndenge, oyo Faraon alingaka; kasi bandeke ezalaki kolia yango wuta na kitunga oyo ezalaki na moto na ngai. » 18 Jozefi alobaki na ye: — Tala ndimbola ya ndoto na yo: « Bitunga misato ezali mikolo misato. 19 Sima na mikolo misato, Faraon akokata moto na yo mpe akodiembika yo na nzete. Bongo bandeke ekolia mosuni na yo. » 20 Sima na mikolo misato, ezalaki mokolo ya mbotama ya Faraon. Faraon asalisaki feti monene mpe abengisaki bakalaka na ye nyonso. Abimisaki na boloko, liboso ya bakalaka na ye, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi mpe kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa. 21 Faraon azongisaki na mosala, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga. Boye azongelaki lisusu kotia kopo na maboko ya Faraon. 22 Kasi Faraon adiembikaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa, ndenge kaka Jozefi ayebisaki bango. 23 Kasi kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito atikalaki kokanisa lisusu Jozefi te: abosanaki ye.

< Ebandeli 40 >