< Ebandeli 38 >

1 Nzokande na tango wana, Yuda atikaki bandeko na ye mpe akendeki kovanda epai ya Ira, moto ya Adulami.
那時,猶大離開他弟兄下去,到一個亞杜蘭人名叫希拉的家裏去。
2 Yuda akutanaki kuna na mwana mwasi ya Shuwa, moto ya Kanana. Abalaki ye mpe asangisaki na ye nzoto.
猶大在那裏看見一個迦南人名叫書亞的女兒,就娶她為妻,與她同房,
3 Mwasi yango akomaki na zemi mpe abotelaki Yuda mwana mobali. Mpe Yuda apesaki ye kombo « Eri. »
她就懷孕生了兒子,猶大給他起名叫珥。
4 Mwasi yango azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali; apesaki ye kombo « Onani. »
她又懷孕生了兒子,母親給他起名叫俄南。
5 Abotaki mwana mobali mosusu mpe apesaki ye kombo « Shela. » Yuda azalaki na Kezibi tango mwasi na ye abotaki mwana ya misato.
她復又生了兒子,給他起名叫示拉。她生示拉的時候,猶大正在基悉。
6 Yuda abalelaki Eri, mwana na ye ya liboso, mwasi: Tamari.
猶大為長子珥娶妻,名叫她瑪。
7 Kasi Eri, mwana liboso ya Yuda, azalaki moto mabe na miso ya Yawe; yango wana Yawe abomaki ye.
猶大的長子珥在耶和華眼中看為惡,耶和華就叫他死了。
8 Bongo Yuda alobaki na Onani: « Sangisa nzoto na semeki na yo mpo ete obota bana mpo na ndeko na yo ya mobali oyo akufa. »
猶大對俄南說:「你當與你哥哥的妻子同房,向她盡你為弟的本分,為你哥哥生子立後。」
9 Kasi lokola Onani ayebaki ete bana oyo bakobotama bakozala ya ye te, azalaki kobwaka mayi na ye ya mibali na mabele tango nyonso azalaki kosangisa nzoto na semeki na ye, mpo ete abotela ndeko na ye ya mobali bana te.
俄南知道生子不歸自己,所以同房的時候便遺在地,免得給他哥哥留後。
10 Likambo oyo Onani azalaki kosala ezalaki kosepelisa Yawe te. Boye ye mpe lisusu, Yawe abomaki ye.
俄南所做的在耶和華眼中看為惡,耶和華也就叫他死了。
11 Yuda alobaki na Tamari, bokilo na ye ya mwasi: « Lokola okufisi mibali, kende kovanda na ndako ya tata na yo kino Shela, mwana na ngai ya mobali, akokoma mokolo. » Pamba te azalaki komilobela: « Tango mosusu ye mpe akoki kokufa lokola bandeko na ye ya mibali. » Boye Tamari akendeki kovanda na ndako ya tata na ye.
猶大心裏說:「恐怕示拉也死,像他兩個哥哥一樣」,就對他兒婦她瑪說:「你去,在你父親家裏守寡,等我兒子示拉長大。」她瑪就回去,住在她父親家裏。
12 Sima na tango molayi, mwana mwasi ya Shuwa, mwasi ya Yuda, akufaki. Lokola tango na ye ya matanga esilaki, Yuda akendeki na Timina epai ya bato oyo bazalaki kolongola bapwale ya bameme na ye. Boye, moninga na ye Ira, moto ya Adulami, akendeki elongo na ye.
過了許久,猶大的妻子書亞的女兒死了。猶大得了安慰,就和他朋友亞杜蘭人希拉上亭拿去,到他剪羊毛的人那裏。
13 Tango bayebisaki Tamari: « Bokilo na yo ya mobali azali kokende na Timina mpo na kolongolisa bapwale ya bameme na ye, »
有人告訴她瑪說:「你的公公上亭拿剪羊毛去了。」
14 alongolaki bilamba na ye ya mwasi akufisa mobali mpe amizipaki elongi na vwale mpo ete bayeba ye lisusu te. Avandaki na ekuke ya Enayimi oyo ezalaki na nzela ya Timina, pamba te amonaki ete Shela akolaki, kasi bapesaki ye te na libala epai ya Shela.
她瑪見示拉已經長大,還沒有娶她為妻,就脫了她作寡婦的衣裳,用帕子蒙着臉,又遮住身體,坐在亭拿路上的伊拿印城門口。
15 Tango Yuda amonaki ye, akanisaki ete azali mwasi ya ndumba, pamba te azipaki elongi na ye.
猶大看見她,以為是妓女,因為她蒙着臉。
16 Lokola Yuda ayebaki te ete ezali bokilo na ye ya mwasi, apusanaki na esika oyo azalaki, pembeni ya nzela, mpe alobaki na ye: — Yaka, ndima ete tosangisa na yo nzoto. Tamari atunaki: — Okopesa ngai nini soki osangisi na ngai nzoto?
猶大就轉到她那裏去,說:「來吧!讓我與你同寢。」他原不知道是他的兒婦。她瑪說:「你要與我同寢,把甚麼給我呢?」
17 Yuda azongisaki: — Nakotindela yo mwana ntaba oyo nakozwa na etonga na ngai. Tamari atunaki lisusu: — Ndanga nini okosimbisa ngai kino tango okotindela ngai yango?
猶大說:「我從羊群裏取一隻山羊羔,打發人送來給你。」她瑪說:「在未送以先,你願意給我一個當頭嗎?」
18 Yuda alobaki: — Ndanga nini olingi ete nasimbisa yo? Tamari azongisaki: — Lopete na yo, singa na yo mpe lingenda na yo, oyo osimbi na loboko. Boye Yuda apesaki ye yango, asangisaki na ye nzoto mpe Tamari akomaki na zemi.
他說:「我給你甚麼當頭呢?」她瑪說:「你的印、你的帶子,和你手裏的杖。」猶大就給了她,與她同寢,她就從猶大懷了孕。
19 Tamari atelemaki mpe akendeki; alongolaki vwale na ye mpe azongisaki lisusu na nzoto bilamba na ye ya mwasi akufisa mobali.
她瑪起來走了,除去帕子,仍舊穿上作寡婦的衣裳。
20 Boye Yuda atindaki moninga na ye Ira, moto ya Adulami, mpo ete amemela mwasi yango mwana ntaba mpe azwa ndanga oyo asimbisaki ye. Kasi Ira amonaki ye te.
猶大託他朋友亞杜蘭人送一隻山羊羔去,要從那女人手裏取回當頭來,卻找不着她,
21 Boye atunaki epai ya bavandi ya esika wana, na Enayimi: — Wapi mwasi ya ndumba oyo azalaki na nzela, na Enayimi? Bazongiselaki ye: — Esika oyo etikala kozala na mwasi ya ndumba te.
就問那地方的人說:「伊拿印路旁的妓女在哪裏?」他們說:「這裏並沒有妓女。」
22 Ira azongaki epai ya Yuda mpe ayebisaki ye: — Namoni ye te; kutu bavandi ya Enayimi bayebisi ngai ete mwasi ya ndumba atikala kozala na esika wana te.
他回去見猶大說:「我沒有找着她,並且那地方的人說:『這裏沒有妓女。』」
23 Yuda alobaki: — Atikala na biloko oyo azwaki, noki te tokobima babolole. Ngai nazali na likambo te; natindeli ye mwana ntaba, mpe yo omoni ye te.
猶大說:「我把這山羊羔送去了,你竟找不着她。任憑她拿去吧,免得我們被羞辱。」
24 Sima na sanza misato, bayebisaki Yuda: — Tamari, bokilo na yo ya mwasi, asalaki kindumba, mpe tala kutu akomi na zemi. Yuda alobaki: — Babimisa ye mpe batumba ye na moto!
約過了三個月,有人告訴猶大說:「你的兒婦她瑪作了妓女,且因行淫有了身孕。」猶大說:「拉出她來,把她燒了!」
25 Wana bazalaki kobimisa ye libanda, Tamari atindaki sango oyo epai ya Yuda, bokilo na ye: — Nazali na zemi ya nkolo biloko oyo. Mpe abakisaki: — Tala soki okoki koyeba nani azali nkolo ya lopete oyo, ya singa oyo mpe ya lingenda oyo.
她瑪被拉出來的時候便打發人去見她公公,對他說:「這些東西是誰的,我就是從誰懷的孕。請你認一認,這印和帶子並杖都是誰的?」
26 Yuda asosolaki ete ezali biloko na ye mpe alobaki: — Azali sembo koleka ngai, pamba te nabalisaki ye te epai ya Shela, mwana na ngai ya mobali. Boye Yuda atikalaki lisusu te kosangisa na ye nzoto.
猶大承認說:「她比我更有義,因為我沒有將她給我的兒子示拉。」從此猶大不再與她同寢了。
27 Wana tango na ye ya kobota ekokaki, emonanaki ete ezalaki na mapasa mibale ya mibali kati na libumu na ye.
她瑪將要生產,不料她腹裏是一對雙生。
28 Na tango ya kobota, moko kati na bango abimisaki loboko; mpe mwasi oyo abotisaka asimbaki loboko yango, akangaki yango singa ya motane mpe alobaki: « Mwana oyo nde abimi liboso. »
到生產的時候,一個孩子伸出一隻手來;收生婆拿紅線拴在他手上,說:「這是頭生的。」
29 Kasi azongisaki loboko na ye, mpe ndeko na ye ya mobali abimaki. Bongo mwasi oyo abotisaka alobaki: « Ofungoli nzela nini mpo na kobima? » Mpe bapesaki ye kombo « Peretsi. »
隨後這孩子把手收回去,他哥哥生出來了;收生婆說:「你為甚麼搶着來呢?」因此給他起名叫法勒斯。
30 Sima, ndeko na ye oyo azalaki na singa ya motane na loboko mpe abotamaki; bapesaki ye kombo « Zera. »
後來,他兄弟那手上有紅線的也生出來,就給他起名叫謝拉。

< Ebandeli 38 >