< Ebandeli 36 >

1 Tala libota ya Ezawu oyo azali Edomi.
エサウ、すなわちエドムの系図は次のとおりである。
2 Ezawu abalaki basi na ye kati na bana basi ya Kanana: Ada, mwana mwasi ya Eloni, moto ya Iti; Olibama, mwana mwasi ya Ana mpe koko ya Tsibeoni, moto ya Evi;
エサウはカナンの娘たちのうちから妻をめとった。すなわちヘテびとエロンの娘アダと、ヒビびとヂベオンの子アナの娘アホリバマとである。
3 mpe Basimati, mwana mwasi ya Isimaeli mpe ndeko mwasi ya Nebayoti.
また、イシマエルの娘ネバヨテの妹バスマテをめとった。
4 Ada abotelaki Ezawu Elifazi; mpe Basimati abotelaki ye Reweli.
アダはエリパズをエサウに産み、バスマテはリウエルを産み、
5 Olibama abotaki Yewushi, Yaelami mpe Kora. Bango nde bana mibali oyo babotelaki Ezawu na mokili ya Kanana.
アホリバマはエウシ、ヤラム、コラを産んだ。これらはエサウの子であって、カナンの地で彼に生れた者である。
6 Ezawu azwaki basi na ye, bana na ye ya mibali, bana na ye ya basi, bato nyonso ya ndako na ye mpe bibwele na ye, banyama na ye nyonso mpe biloko nyonso oyo azwaki na mokili ya Kanana, akendeki na mokili mosusu, mosika ya ndeko na ye Jakobi.
エサウは妻と子と娘と家のすべての人、家畜とすべての獣、またカナンの地で獲たすべての財産を携え、兄弟ヤコブを離れてほかの地へ行った。
7 Bomengo na bango ekomaki mingi penza, mpe bakokaki lisusu te kovanda esika moko; pamba te mokili oyo bazalaki kovanda ekokaki bango lisusu te likolo ya motango ya bibwele na bango.
彼らの財産が多くて、一緒にいることができなかったからである。すなわち彼らが寄留した地は彼らの家畜のゆえに、彼らをささえることができなかったのである。
8 Yango wana Ezawu, oyo azali Edomi, akendeki kovanda na ngomba Seiri.
こうしてエサウはセイルの山地に住んだ。エサウはすなわちエドムである。
9 Tala libota ya Ezawu, koko ya bato ya Edomi, na ngomba Seiri:
セイルの山地におったエドムびとの先祖エサウの系図は次のとおりである。
10 Tala bakombo ya bana mibali ya Ezawu: Elifazi, mwana mobali ya Ada, mwasi ya Ezawu; mpe Reweli, mwana mobali ya Basimati, mwasi ya Ezawu.
エサウの子らの名は次のとおりである。すなわちエサウの妻アダの子はエリパズ。エサウの妻バスマテの子はリウエル。
11 Bana mibali ya Elifazi: Temani, Omari, Tsefo, Gaetami mpe Kenazi.
エリパズの子らはテマン、オマル、ゼポ、ガタム、ケナズである。
12 Elifazi, mwana mobali ya Ezawu, azalaki na makangu oyo kombo na ye ezalaki « Timina; » Timina abotelaki ye Amaleki. Bango nde bakoko ya Ada, mwasi ya Ezawu.
テムナはエサウの子エリパズのそばめで、アマレクをエリパズに産んだ。これらはエサウの妻アダの子らである。
13 Bana mibali ya Reweli: Naati, Zera, Shama mpe Miza. Bango nde bakoko ya Basimati, mwasi ya Ezawu.
リウエルの子らは次のとおりである。すなわちナハテ、ゼラ、シャンマ、ミザであって、これらはエサウの妻バスマテの子らである。
14 Tala bana mibali oyo Olibama, mwasi ya Ezawu, mwana mwasi ya Ana mpe koko ya Tsibeoni, abotelaki Ezawu: Yewushi, Yaelami mpe Kora.
ヂベオンの子アナの娘で、エサウの妻アホリバマの子らは次のとおりである。すなわち彼女はエウシ、ヤラム、コラをエサウに産んだ。
15 Tala bakonzi ya mabota ya bana mibali ya Ezawu: Bana ya Elifazi, mwana liboso ya Ezawu: mokonzi Temani, mokonzi Omari, mokonzi Tsefo, mokonzi Kenazi,
エサウの子らの中で、族長たる者は次のとおりである。すなわちエサウの長子エリパズの子らはテマンの族長、オマルの族長、ゼポの族長、ケナズの族長、
16 mokonzi Kora, mokonzi Gaetami mpe mokonzi Amaleki. Bango nde bakonzi ya libota ya Elifazi, oyo babotamaki na Edomi; bazalaki bakoko ya Ada.
コラの族長、ガタムの族長、アマレクの族長である。これらはエリパズから出た族長で、エドムの地におった。これらはアダの子らである。
17 Bana mibali ya Reweli, mwana mobali ya Ezawu: mokonzi Naati, mokonzi Zera, mokonzi Shama mpe mokonzi Miza. Bango nde bakonzi ya libota ya Reweli, oyo babotamaki na Edomi; bazalaki bakoko ya Basimati, mwasi ya Ezawu.
エサウの子リウエルの子らは次のとおりである。すなわちナハテの族長、ゼラの族長、シャンマの族長、ミザの族長。これらはリウエルから出た族長で、エドムの地におった。これらはエサウの妻バスマテの子らである。
18 Bana mibali ya Olibama, mwasi ya Ezawu: mokonzi Yewushi, mokonzi Yaelami mpe mokonzi Kora. Bango nde bakonzi ya libota ya Olibama, mwana mwasi ya Ana mpe mwasi ya Ezawu.
エサウの妻アホリバマの子らは次のとおりである。すなわちエウシの族長、ヤラムの族長、コラの族長。これらはアナの娘で、エサウの妻アホリバマから出た族長である。
19 Bango nde bazalaki bana mibali ya Ezawu oyo azali Edomi, mpe bango nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Edomi.
これらはエサウすなわちエドムの子らで、族長たる者である。
20 Tala bakitani ya Seiri, moto ya Ori, bato ya liboso oyo bavandaki na mokili yango: Lotani, Shobali, Tsibeoni, Ana,
この地の住民ホリびとセイルの子らは次のとおりである。すなわちロタン、ショバル、ヂベオン、アナ、
21 Dishoni, Etseri mpe Dishani. Bango nde bakonzi ya libota ya Ori, mwana mobali ya Seiri, na mokili ya Edomi.
デション、エゼル、デシャン。これらはセイルの子ホリびとから出た族長で、エドムの地におった。
22 Bana mibali ya Lotani: Ori mpe Emami. Timina azalaki ndeko mwasi ya Lotani.
ロタンの子らはホリ、ヘマムであり、ロタンの妹はテムナであった。
23 Bana mibali ya Shobali: Alivani, Manaati, Ebali, Shefo mpe Onami.
ショバルの子らは次のとおりである。すなわちアルワン、マナハテ、エバル、シポ、オナム。
24 Bana mibali ya Tsibeoni: Aya mpe Ana. Ezali Ana nde amonaki maziba ya mayi kati na esobe tango azalaki koleisa ba-ane ya Tsibeoni, tata na ye.
ヂベオンの子らは次のとおりである。すなわちアヤとアナ。このアナは父ヂベオンのろばを飼っていた時、荒野で温泉を発見した者である。
25 Bana ya Ana: Dishoni, mwana na ye ya mobali; mpe Olibama, mwana na ye ya mwasi.
アナの子らは次のとおりである。すなわちデションとアホリバマ。アホリバマはアナの娘である。
26 Bana mibali ya Dishoni: Emidani, Eshibani, Yitirani mpe Kerani.
デションの子らは次のとおりである。すなわちヘムダン、エシバン、イテラン、ケラン。
27 Tala bana mibali ya Etseri: Bilani, Zavani mpe Akani.
エゼルの子らは次のとおりである。すなわちビルハン、ザワン、アカン。
28 Bana mibali ya Dishani: Utsi mpe Arani.
デシャンの子らは次のとおりである。すなわちウズとアラン。
29 Tala bakonzi ya mabota ya Ori: mokonzi Lotani, mokonzi Shobali, mokonzi Tsibeoni, mokonzi Ana,
ホリびとから出た族長は次のとおりである。すなわちロタンの族長、ショバルの族長、ヂベオンの族長、アナの族長、
30 mokonzi Dishoni, mokonzi Etseri mpe mokonzi Dishani. Bango nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Ori, na mokili ya Seiri.
デションの族長、エゼルの族長、デシャンの族長。これらはホリびとから出た族長であって、その氏族に従ってセイルの地におった者である。
31 Tala bakonzi oyo bakonzaki kati na Edomi liboso ete bana ya Isalaele bazwa mokonzi:
イスラエルの人々を治める王がまだなかった時、エドムの地を治めた王たちは次のとおりである。
32 Bela, mwana mobali ya Beori, akomaki mokonzi ya Edomi. Kombo ya engumba na ye ezalaki « Dinaba. »
ベオルの子ベラはエドムを治め、その都の名はデナバであった。
33 Tango Bela akufaki, Yobabi, mwana mobali ya Zera, moto ya mokili ya Botsira, akitanaki na ye na bokonzi.
ベラが死んで、ボズラのゼラの子ヨバブがこれに代って王となった。
34 Tango Yobabi akufaki, Ushami, moto ya mokili ya Temani, akitanaki na ye na bokonzi.
ヨバブが死んで、テマンびとの地のホシャムがこれに代って王となった。
35 Tango Ushami akufaki, Adadi, mwana mobali ya Bedadi oyo alongaki Madiani na bilanga ya Moabi, akitanaki na ye na bokonzi. Kombo ya engumba na ye ezalaki Aviti.
ホシャムが死んで、ベダデの子ハダデがこれに代って王となった。彼はモアブの野でミデアンを撃った者である。その都の名はアビテであった。
36 Tango Adadi akufaki, Samila, moto ya engumba Masireka, akitanaki na ye na bokonzi.
ハダデが死んで、マスレカのサムラがこれに代って王となった。
37 Tango Samila akufaki, Saulo, moto ya engumba Reoboti, engumba oyo etongama pembeni ya ebale, akitanaki na ye na bokonzi.
サムラが死んでユフラテ川のほとりにあるレホボテのサウルがこれに代って王となった。
38 Tango Saulo akufaki, Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akitanaki na ye na bokonzi.
サウルが死んでアクボルの子バアル・ハナンがこれに代って王となった。
39 Tango Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akufaki, Adari akitanaki na ye na bokonzi. Kombo ya engumba na ye ezalaki « Pawu, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Meetabeli. » Meetabeli azalaki mwana mwasi ya Matiredi, mwana mwasi ya Mezaabi.
アクボルの子バアル・ハナンが死んで、ハダルがこれに代って王となった。その都の名はパウであった。その妻の名はメヘタベルといって、メザハブの娘マテレデの娘であった。
40 Tala bato oyo bazalaki bakonzi ya mabota ya Ezawu kolanda mabota ya botata, bisika oyo bazalaki kovanda mpe bakombo na bango: Timina, Aliva, Yeteti,
エサウから出た族長の名は、その氏族と住所と名に従って言えば次のとおりである。すなわちテムナの族長、アルワの族長、エテテの族長、
41 Olibama, Ela, Pinoni,
アホリバマの族長、エラの族長、ピノンの族長、
42 Kenazi, Temani, Mibitsari,
ケナズの族長、テマンの族長、ミブザルの族長、
43 Magidieli mpe Irami. Bango nde bazalaki bakonzi ya Edomi kolanda bituka na bango, kati na mokili oyo bazalaki kovanda. Ezawu azalaki koko ya bato ya Edomi.
マグデエルの族長、イラムの族長。これらはエドムの族長たちであって、その領地内の住所に従っていったものである。エドムびとの先祖はエサウである。

< Ebandeli 36 >