< Ebandeli 35 >

1 Nzambe alobaki na Jakobi: « Kende na Beteli, vanda kuna mpe tonga kuna etumbelo mpo na Nzambe oyo abimelaki yo tango ozalaki kokima ndeko na yo Ezawu. »
ויאמר אלהים אל יעקב קום עלה בית אל ושב שם ועשה שם מזבח לאל הנראה אליך בברחך מפני עשו אחיך׃
2 Jakobi alobaki na bato ya libota na ye mpe na bato nyonso oyo bazalaki na ye elongo: « Bolongola banzambe ya bapaya oyo ezali kati na bino, bomipetola mpe bolata bilamba mosusu.
ויאמר יעקב אל ביתו ואל כל אשר עמו הסרו את אלהי הנכר אשר בתככם והטהרו והחליפו שמלתיכם׃
3 Tokomata na Beteli epai wapi nakotonga etumbelo mpo na Nzambe oyo ayanolaki ngai na mokolo oyo nazalaki na pasi mpe azalaki elongo na ngai bisika nyonso oyo nazalaki kokende. »
ונקומה ונעלה בית אל ואעשה שם מזבח לאל הענה אתי ביום צרתי ויהי עמדי בדרך אשר הלכתי׃
4 Bapesaki Jakobi banzambe nyonso ya bapaya, oyo bazalaki na yango mpe biloko na bango ya matoyi. Boye Jakobi akundaki yango na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki pene ya Sishemi.
ויתנו אל יעקב את כל אלהי הנכר אשר בידם ואת הנזמים אשר באזניהם ויטמן אתם יעקב תחת האלה אשר עם שכם׃
5 Sima, bakendeki. Kanda na Nzambe ekweyelaki bingumba nyonso ya zingazinga na bango, mpe moko te alandaki bana mibali ya Jakobi.
ויסעו ויהי חתת אלהים על הערים אשר סביבתיהם ולא רדפו אחרי בני יעקב׃
6 Jakobi mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bakomaki na Luze, oyo ezali Beteli, kati na mokili ya Kanana.
ויבא יעקב לוזה אשר בארץ כנען הוא בית אל הוא וכל העם אשר עמו׃
7 Kuna nde atongaki etumbelo mpe abengaki esika yango « Eli Beteli, » pamba te ezalaki kuna nde Nzambe amimonisaki epai na ye tango azalaki kokima ndeko na ye.
ויבן שם מזבח ויקרא למקום אל בית אל כי שם נגלו אליו האלהים בברחו מפני אחיו׃
8 Ezalaki wana nde Debora, mama mobokoli ya Rebeka, akufaki. Bakundaki ye pembeni ya Beteli, na se ya nzete oyo, wuta na tango wana, bakomaki kobenga « Aloni-Bakuti. »
ותמת דברה מינקת רבקה ותקבר מתחת לבית אל תחת האלון ויקרא שמו אלון בכות׃
9 Nzambe abimelaki lisusu Jakobi tango azongaki wuta na Padani-Arami mpe apambolaki ye.
וירא אלהים אל יעקב עוד בבאו מפדן ארם ויברך אתו׃
10 Nzambe alobaki na ye: « Kombo na yo ezali Jakobi; kasi okobengama lisusu Jakobi te, kombo na yo ekomi Isalaele. » Yango wana Nzambe apesaki ye kombo « Isalaele. »
ויאמר לו אלהים שמך יעקב לא יקרא שמך עוד יעקב כי אם ישראל יהיה שמך ויקרא את שמו ישראל׃
11 Nzambe alobaki na ye lisusu: « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Bota bana mpe bokoma ebele; bokoma ekolo moko mpe bikolo ebele ekobima na nzela na yo, bakonzi bakobima kati na yo.
ויאמר לו אלהים אני אל שדי פרה ורבה גוי וקהל גוים יהיה ממך ומלכים מחלציך יצאו׃
12 Mokili oyo napesaki na Abrayami mpe na Izaki, napesi yango mpe na yo. Nakopesa yango lisusu na bakitani na yo. »
ואת הארץ אשר נתתי לאברהם וליצחק לך אתננה ולזרעך אחריך אתן את הארץ׃
13 Sima, Nzambe atikaki ye na esika oyo asololaki na ye.
ויעל מעליו אלהים במקום אשר דבר אתו׃
14 Jakobi atelemisaki libanga ya elembo na esika oyo Nzambe asololaki na ye; asopaki likolo ya libanga yango likabo ya masanga mpe mafuta.
ויצב יעקב מצבה במקום אשר דבר אתו מצבת אבן ויסך עליה נסך ויצק עליה שמן׃
15 Jakobi apesaki esika oyo Nzambe asololaki na ye kombo « Beteli. »
ויקרא יעקב את שם המקום אשר דבר אתו שם אלהים בית אל׃
16 Jakobi mpe libota na ye balongwaki na Beteli. Wana bazalaki nanu mwa mosika na Efrata, Rasheli abotaki, kasi na pasi makasi.
ויסעו מבית אל ויהי עוד כברת הארץ לבוא אפרתה ותלד רחל ותקש בלדתה׃
17 Lokola azalaki na pasi makasi ya kobota, mwasi mobotisi ayebisaki ye: « Kobanga te! Pamba te ozali na mwana mobali mosusu. »
ויהי בהקשתה בלדתה ותאמר לה המילדת אל תיראי כי גם זה לך בן׃
18 Lokola azalaki kobundana mpo na kokufa, liboso ya kokata motema, apesaki mwana na ye ya mobali kombo Beni-Oni. Kasi tata na ye apesaki ye kombo Benjame.
ויהי בצאת נפשה כי מתה ותקרא שמו בן אוני ואביו קרא לו בנימין׃
19 Rasheli akufaki mpe bakundaki ye na nzela ya Efrata, elingi koloba Beteleemi.
ותמת רחל ותקבר בדרך אפרתה הוא בית לחם׃
20 Jakobi atelemisaki libanga ya elembo likolo ya kunda ya Rasheli; mpe kino lelo oyo, libanga wana ya elembo elakisaka kunda ya Rasheli.
ויצב יעקב מצבה על קברתה הוא מצבת קברת רחל עד היום׃
21 Sima, Isalaele alongwaki mpe akendeki kotonga ndako na ye ya kapo mosika ya Migidali-Ederi.
ויסע ישראל ויט אהלה מהלאה למגדל עדר׃
22 Wana Isalaele azalaki kowumela na mokili wana, Ribeni ayaki kuna mpe asangisaki nzoto na Bila, makangu ya tata na ye; mpe Isalaele ayokaki yango. Jakobi azalaki na bana mibali zomi na mibale:
ויהי בשכן ישראל בארץ ההוא וילך ראובן וישכב את בלהה פילגש אביו וישמע ישראל ויהיו בני יעקב שנים עשר׃
23 Bana mibali ya Lea: Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Jakobi; Simeoni, Levi, Yuda, Isakari mpe Zabuloni.
בני לאה בכור יעקב ראובן ושמעון ולוי ויהודה ויששכר וזבלון׃
24 Bana mibali ya Rasheli: Jozefi mpe Benjame.
בני רחל יוסף ובנימן׃
25 Bana mibali ya Bila, mwasi mosali ya Rasheli: Dani mpe Nefitali.
ובני בלהה שפחת רחל דן ונפתלי׃
26 Bana mibali ya Zilipa, mwasi mosali ya Lea: Gadi mpe Aseri. Bango nde bana mibali ya Jakobi oyo babotelaki ye na Padani-Arami.
ובני זלפה שפחת לאה גד ואשר אלה בני יעקב אשר ילד לו בפדן ארם׃
27 Jakobi azongaki epai ya Izaki, tata na ye, na Mamire, pene ya Kiriati-Ariba oyo ebengami Ebron, epai wapi Abrayami mpe Izaki bazalaki kovanda.
ויבא יעקב אל יצחק אביו ממרא קרית הארבע הוא חברון אשר גר שם אברהם ויצחק׃
28 Izaki awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku mwambe.
ויהיו ימי יצחק מאת שנה ושמנים שנה׃
29 Sima, Izaki akataki motema mpe akufaki; awumelaki na bomoi mibu ebele, akomaki mobange mpe alandaki bakoko na ye. Bana na ye ya mibali, Ezawu mpe Jakobi, bakundaki ye.
ויגוע יצחק וימת ויאסף אל עמיו זקן ושבע ימים ויקברו אתו עשו ויעקב בניו׃

< Ebandeli 35 >