< Ebandeli 3 >

1 Nzokande, kati na banyama nyonso ya zamba oyo Yawe Nzambe akelaki, nyoka nde elekaki na mayele mabe. Alobaki na mwasi: — Nzambe alobaki na bino solo ete bolia mbuma ata moko te ya banzete ya elanga?
And the serpent was more crafty than any animal of the field which Jehovah Elohim had made. And it said to the woman, Is it even so, that God has said, Ye shall not eat of every tree of the garden?
2 Mwasi azongisaki epai ya nyoka: — Toliaka bambuma ya banzete ya elanga.
And the woman said to the serpent, We may eat of the fruit of the trees of the garden;
3 Kasi na oyo etali mbuma ya nzete oyo ezali na kati-kati ya elanga, Nzambe alobaki: « Bosengeli te kolia yango, mpe bosengeli te kosimba yango; noki te bokokufa. »
but of the fruit of the tree that is in the midst of the garden, God has said, Ye shall not eat of it, and ye shall not touch it, lest ye die.
4 Nyoka alobaki na mwasi: — Solo penza, bokokufa te.
And the serpent said to the woman, Ye will not certainly die;
5 Pamba te Nzambe ayebi malamu ete mokolo oyo bokolia yango, miso na bino ekofungwama mpe bokokoma lokola Ye: koyeba malamu na mabe.
but God knows that in the day ye eat of it, your eyes will be opened, and ye will be as God, knowing good and evil.
6 Mwasi amonaki ete mbuma ya nzete ezali elengi mpo na kolia, kitoko mpo na kotala mpe malamu mpo na kofungola mayele. Boye azwaki mbuma mpe aliaki yango. Apesaki yango mpe na mobali na ye, oyo azalaki elongo na ye; bongo ye mpe mobali aliaki yango.
And the woman saw that the tree was good for food, and that it was a pleasure for the eyes, and the tree was to be desired to give intelligence; and she took of its fruit, and ate, and gave also to her husband with her, and he ate.
7 Mbala moko, miso na bango mibale efungwamaki, mpe basosolaki ete bazali bolumbu. Boye, basangisaki makasa ya nzete ya figi mpe bamizipaki.
And the eyes of them both were opened, and they knew that they were naked. And they sewed fig-leaves together, and made themselves aprons.
8 Na pokwa, bayokaki makelele ya matambe ya Yawe Nzambe kotambola kati na elanga. Boye, mobali mpe mwasi babombamaki kati na banzete ya elanga mpo na kokima Yawe.
And they heard the voice of Jehovah Elohim, walking in the garden in the cool of the day. And Man and his wife hid themselves from the presence of Jehovah Elohim, in the midst of the trees of the garden.
9 Kasi Yawe Nzambe abengaki mobali mpe atunaki ye: — Ozali wapi?
And Jehovah Elohim called to Man, and said to him, Where art thou?
10 Azongisaki: — Nayoki makelele ya matambe na Yo kotambola kati na elanga mpe nabangi mpo ete nazali bolumbu; yango wana nabombami.
And he said, I heard thy voice in the garden, and I feared, because I am naked; and I hid myself.
11 Nzambe alobaki: — Ndenge nini oyebi ete ozali bolumbu? Boni, oliaki mbuma ya nzete oyo napekisaki yo kolia?
And he said, Who told thee that thou art naked? Hast thou eaten of the tree of which I commanded thee not to eat?
12 Adamu azongisaki: — Ezali mwasi oyo opesaki ngai lokola mosungi nde apesaki ngai mbuma ya nzete yango, mpe nalie yango.
And Man said, The woman, whom thou hast given [to be] with me, she gave me of the tree, and I ate.
13 Yawe Nzambe alobaki na mwasi: — Mpo nini osali bongo? Mwasi azongisaki: — Ezali nyoka nde akosaki ngai, mpe naliaki yango.
And Jehovah Elohim said to the woman, What is this thou hast done? And the woman said, The serpent deceived me, and I ate.
14 Boye Yawe Nzambe alobaki na nyoka: « Lokola osali bongo, olakelami mabe kati na bibwele mpe banyama nyonso ya zamba. Okotambola na libumu mpe okobanda kolia putulu bomoi na yo mobimba.
And Jehovah Elohim said to the serpent, Because thou hast done this, be thou cursed above all cattle, and above every beast of the field. On thy belly shalt thou go, and eat dust all the days of thy life.
15 Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. »
And I will put enmity between thee and the woman, and between thy seed and her seed; he shall crush thy head, and thou shalt crush his heel.
16 Nzambe alobaki na mwasi: « Nakobakisa pasi na zemi na yo; okobota na pasi. Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo, kasi ye akozala mokonzi na yo. »
To the woman he said, I will greatly increase thy travail and thy pregnancy; with pain thou shalt bear children; and to thy husband shall be thy desire, and he shall rule over thee.
17 Yawe Nzambe alobaki na Adamu: « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo: ‹ Kolia yango te, › mabele elakelami mabe likolo na yo. Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo.
And to Adam he said, Because thou hast hearkened to the voice of thy wife, and eaten of the tree of which I commanded thee saying, Thou shalt not eat of it: cursed be the ground on thy account; with toil shalt thou eat [of] it all the days of thy life;
18 Mabele ekobotela yo nzube mpe nzete ya sende. Okolia matiti ya bilanga.
and thorns and thistles shall it yield thee; and thou shalt eat the herb of the field.
19 Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo kino okozonga na mabele epai wapi owutaki, pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. »
In the sweat of thy face shalt thou eat bread, until thou return to the ground: for out of it wast thou taken. For dust thou art; and unto dust shalt thou return.
20 Mobali apesaki mwasi na ye kombo « Eva, » pamba te azali mama ya bato nyonso na mokili.
And Man called his wife's name Eve; because she is the mother of all living.
21 Yawe Nzambe asalelaki Adamu mpe mwasi na ye bilamba ya poso ya nyama mpe alatisaki bango yango.
And Jehovah Elohim made Adam and his wife coats of skin, and clothed them.
22 Yawe Nzambe alobaki: « Tala, moto akomi lokola moko kati na biso mpo na koyeba malamu mpe mabe. Sik’oyo, esengeli te kopesa ye nzela ya kotia loboko na ye mpo na kozwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi mpe kolia yango, noki te awumela libela na bomoi. »
And Jehovah Elohim said, Behold, Man is become as one of us, to know good and evil. And now, lest he stretch out his hand, and take also of the tree of life, and eat, and live for ever...!
23 Boye, Yawe Nzambe abenganaki ye na elanga ya Edeni mpo ete asala mosala ya mabele epai wapi awutaki.
Therefore Jehovah Elohim sent him forth from the garden of Eden, to till the ground from which he was taken.
24 Sima na kobengana moto, atiaki basheribe, na ngambo ya este ya elanga ya Edeni, na mopanga ya moto oyo ezalaki kobaluka bipai na bipai mpo na kobatela nzela ya nzete ya bomoi.
And he drove out Man; and he set the Cherubim, and the flame of the flashing sword, toward the east of the garden of Eden, to guard the way to the tree of life.

< Ebandeli 3 >