< Esidrasi 7 >

1 Sima na makambo oyo, tango Aritakizerisesi azalaki mokonzi ya Persi, Esidrasi, mwana mobali ya Seraya, mwana mobali ya Azaria, mwana mobali ya Ilikia,
Now after these things, in the reign of Artaxerxes king of Persia, Ezra the son of Seraiah, the son of Azariah, the son of Hilkiah,
2 mwana mobali ya Shalumi, mwana mobali ya Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi,
The son of Shallum, the son of Zadok, the son of Ahitub,
3 mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Azaria, mwana mobali ya Merayoti,
The son of Amariah, the son of Azariah, the son of Meraioth,
4 mwana mobali ya Zerakia, mwana mobali ya Uzi, mwana ya Buki,
The son of Zerahiah, the son of Uzzi, the son of Bukki,
5 mwana mobali ya Abishuwa, mwana mobali ya Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, mokonzi ya Banganga-Nzambe,
The son of Abishua, the son of Phinehas, the son of Eleazar, the son of Aaron the chief priest:
6 alongwaki na Babiloni. Esidrasi yango azalaki molakisi malamu ya mibeko mpe ayebaki penza malamu Mobeko ya Moyize oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki na bato na Ye. Bongo lokola loboko ya Yawe, Nzambe na ye, ezalaki likolo na ye, mokonzi apesaki ye biloko nyonso oyo asengaki.
This Ezra went up from Babylon; and he [was] a ready scribe in the law of Moses, which the LORD God of Israel had given: and the king granted him all his request, according to the hand of the LORD his God upon him.
7 Kati na bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi, bayembi, bakengeli bikuke mpe basali ya Tempelo, ndambo bazongaki na Yelusalemi na mobu ya sambo ya mokonzi Aritakizerisesi.
And there went up [some] of the children of Israel, and of the priests, and the Levites, and the singers, and the porters, and the Nethinims, unto Jerusalem, in the seventh year of Artaxerxes the king.
8 Esidrasi mpe akomaki elongo na bango na Yelusalemi na sanza ya mitano ya mobu ya sambo ya mokonzi.
And he came to Jerusalem in the fifth month, which [was] in the seventh year of the king.
9 Alongwaki na Babiloni na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso mpe akomaki na Yelusalemi na mokolo ya liboso ya sanza ya mitano, pamba te loboko ya ngolu ya Nzambe na ye ezalaki likolo na ye,
For upon the first [day] of the first month began he to go up from Babylon, and on the first [day] of the fifth month came he to Jerusalem, according to the good hand of his God upon him.
10 mpo ete Esidrasi amipesaki ye moko penza, na motema na ye mobimba, mpo na koyekola mpe kotia na misala mibeko ya Yawe mpe mpo na kolakisa na bana ya Isalaele bikateli mpe mitindo ya mibeko yango.
For Ezra had prepared his heart to seek the law of the LORD, and to do [it], and to teach in Israel statutes and judgments.
11 Tala mokanda oyo mokonzi Aritakizerisesi apesaki epai ya Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko, oyo ayebaki penza malamu makambo oyo etali mitindo mpe bikateli ya Yawe mpo na Isalaele:
Now this [is] the copy of the letter that the king Artaxerxes gave unto Ezra the priest, the scribe, [even] a scribe of the words of the commandments of the LORD, and of his statutes to Israel.
12 « Aritakizerisesi, mokonzi ya bakonzi; Epai ya Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko ya Nzambe ya Likolo: Mbote na yo!
Artaxerxes, king of kings, unto Ezra the priest, a scribe of the law of the God of heaven, perfect [peace], and at such a time.
13 Napesi mitindo ete, kati na bokonzi na ngai, moto nyonso kati na bato ya Isalaele, kati na Banganga-Nzambe mpe Balevi na bango, oyo alingi kokende na Yelusalemi akende elongo na yo.
I make a decree, that all they of the people of Israel, and [of] his priests and Levites, in my realm, which are minded of their own freewill to go up to Jerusalem, go with thee.
14 Ngai, mokonzi elongo na bapesi toli na ngai sambo, totindi yo koluka koyeba makambo oyo ezali koleka na Yuda mpe na Yelusalemi, kolanda Mobeko ya Nzambe na yo, oyo ezali na maboko na yo,
Forasmuch as thou art sent of the king, and of his seven counsellors, to enquire concerning Judah and Jerusalem, according to the law of thy God which [is] in thine hand;
15 mpe komema palata mpe wolo oyo mokonzi mpe bapesi toli na ye bapesi bango moko wuta na mokano ya mitema na bango, epai ya Nzambe ya Isalaele, oyo Ndako na Ye ezali na Yelusalemi;
And to carry the silver and gold, which the king and his counsellors have freely offered unto the God of Israel, whose habitation [is] in Jerusalem,
16 elongo na palata mpe wolo nyonso oyo okozwa na etuka ya Babiloni, makabo oyo bato mpe Banganga-Nzambe bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango, mpo na Tempelo ya Nzambe na bango kati na Yelusalemi.
And all the silver and gold that thou canst find in all the province of Babylon, with the freewill offering of the people, and of the priests, offering willingly for the house of their God which [is] in Jerusalem:
17 Boye, okosala keba ete osomba bangombe, bameme ya mibali mpe bana meme elongo na nyonso oyo esengeli mpo na makabo na yango ya gato mpe ya masanga, mpe okobonza yango na etumbelo ya Nzambe na bino kati na Yelusalemi.
That thou mayest buy speedily with this money bullocks, rams, lambs, with their meat offerings and their drink offerings, and offer them upon the altar of the house of your God which [is] in Jerusalem.
18 Na palata mpe wolo oyo etikali, yo mpe bandeko na yo, Bayuda, bokoki kosala nyonso oyo bokomona ete ezali malamu kolanda mokano ya Yawe, Nzambe na bino.
And whatsoever shall seem good to thee, and to thy brethren, to do with the rest of the silver and the gold, that do after the will of your God.
19 Okopesa epai ya Nzambe ya Yelusalemi, biloko nyonso oyo bakopesa yo mpo na mosala ya Tempelo ya Nzambe na yo.
The vessels also that are given thee for the service of the house of thy God, [those] deliver thou before the God of Jerusalem.
20 Na nzela ya bomengo ya mokonzi, okoki kozwa biloko nyonso mosusu oyo okozala na yango na bosenga mpo na misala ya Ndako ya Nzambe na yo.
And whatsoever more shall be needful for the house of thy God, which thou shalt have occasion to bestow, bestow [it] out of the king’s treasure house.
21 Sik’oyo, ngai, mokonzi Aritakizerisesi, napesi mitindo epai ya babateli bomengo nyonso ya mokonzi kati na etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, ete bopesa na lombangu eloko nyonso oyo Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko ya Nzambe ya Likolo, akosenga bino
And I, [even] I Artaxerxes the king, do make a decree to all the treasurers which [are] beyond the river, that whatsoever Ezra the priest, the scribe of the law of the God of heaven, shall require of you, it be done speedily,
22 kino na kilo ya palata nkoto misato na nkama mitano, kilo ya ble nkoto tuku minei na mitano, balitele ya vino nkoto minei na nkama mitano, balitele ya mafuta nkoto minei na nkama mitano mpe kilo ya mungwa oyo bakoki kotanga te.
Unto an hundred talents of silver, and to an hundred measures of wheat, and to an hundred baths of wine, and to an hundred baths of oil, and salt without prescribing [how much].
23 Tika ete makambo nyonso oyo Nzambe ya Likolo atindi mpo na Tempelo na Ye esalema ndenge kaka atindi yango, mpo ete kanda na Ye ekitela te mokili ya mokonzi mpe bana na ye ya mibali.
Whatsoever is commanded by the God of heaven, let it be diligently done for the house of the God of heaven: for why should there be wrath against the realm of the king and his sons?
24 Bosengeli lisusu koyeba ete bozali lisusu na ndingisa te ya kosenga na Nganga-Nzambe nyonso, Molevi nyonso, moyembi nyonso, mokengeli nyonso ya ekuke, mosali nyonso ya Tempelo, mpe na mosali nyonso mosusu ya Ndako ya Nzambe ete afuta mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela.
Also we certify you, that touching any of the priests and Levites, singers, porters, Nethinims, or ministers of this house of God, it shall not be lawful to impose toll, tribute, or custom, upon them.
25 Bongo yo, Esidrasi, kolanda bwanya ya Nzambe na yo, oyo ozali na yango, pona bilombe mpe basambisi mpo na mosala ya kokata makambo ya bato nyonso oyo, kati na etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, bayebi mibeko ya Nzambe na yo; mpe lakisa yango na bato oyo bayebi yango te.
And thou, Ezra, after the wisdom of thy God, that [is] in thine hand, set magistrates and judges, which may judge all the people that [are] beyond the river, all such as know the laws of thy God; and teach ye them that know [them] not.
26 Moto nyonso oyo akotosa te Mobeko ya Nzambe na yo mpe mobeko ya mokonzi asengeli bongo kozwa etumbu ya kufa to kokende na bowumbu to kokaba bomengo na ye mpo ete babotola yango to mpe kokota na boloko. »
And whosoever will not do the law of thy God, and the law of the king, let judgment be executed speedily upon him, whether [it be] unto death, or to banishment, or to confiscation of goods, or to imprisonment.
27 Tika ete Yawe, Nzambe ya batata na biso, akumisama, Ye oyo atiaki makanisi ya lolenge oyo na motema ya mokonzi, mpo ete akoka kopesa lokumu na Tempelo ya Yawe kati na Yelusalemi,
Blessed [be] the LORD God of our fathers, which hath put [such a thing] as this in the king’s heart, to beautify the house of the LORD which [is] in Jerusalem:
28 mpe oyo asaleli ngai bolamu na Ye liboso ya mokonzi, ya bapesi toli na ye mpe ya bakalaka na ye nyonso, pamba te loboko ya Yawe, Nzambe na ngai, ezalaki likolo na ngai! Boye, nazwaki makasi mpe nasangisaki bakambi ya Isalaele mpo ete bazonga elongo na ngai.
And hath extended mercy unto me before the king, and his counsellors, and before all the king’s mighty princes. And I was strengthened as the hand of the LORD my God [was] upon me, and I gathered together out of Israel chief men to go up with me.

< Esidrasi 7 >