< Esidrasi 6 >

1 Mokonzi Dariusi apesaki mitindo, mpe balukaki kati na babuku ya kala oyo ezalaki na Babiloni, kati na ebombelo bomengo ya mokonzi.
于是大流士王降旨,要寻察典籍库内,就是在巴比伦藏宝物之处;
2 Mpe bamonaki buku moko kati na Ekibatane, engumba mokonzi ya etuka ya Medi. Tala makomi oyo ezalaki kati na buku yango: « Ekaniseli:
在米底亚省亚马他城的宫内寻得一卷,其中记着说:
3 Na mobu ya liboso ya mokonzi Sirisi, mokonzi Sirisi azwaki mokano na tina na Tempelo ya Nzambe kati na Yelusalemi: Tempelo ya Nzambe esengeli kotongama lisusu mpo ete ezala esika ya kobonza mbeka; boye esengeli kozongisa miboko na yango. Tempelo ekozala na bametele pene tuku misato na bosanda mpe bametele pene tuku misato na mokuse.
“塞鲁士王元年,他降旨论到耶路撒冷 神的殿,要建造这殿为献祭之处,坚立殿的根基。殿高六十肘,宽六十肘,
4 Ekozala na milongo misato ya mabanga bakata mpe molongo moko ya mabaya ya sika mpo na motondo. Mbongo ya kofuta mpo na misala yango ekowuta na bomengo ya mokonzi.
用三层大石头,一层新木头,经费要出于王库;
5 Lisusu, biloko basala na wolo mpe na palata ya Ndako ya Nzambe, oyo Nabukodonozori azwaki na Tempelo kati na Yelusalemi mpe amemaki na Babiloni, esengeli kozonga na bisika na yango kati na Tempelo, na Yelusalemi; basengeli kotia yango kati na Ndako ya Nzambe.
并且 神殿的金银器皿,就是尼布甲尼撒从耶路撒冷的殿中掠到巴比伦的,要归还带到耶路撒冷的殿中,各按原处放在 神的殿里。”
6 Sik’oyo, Tatinayi, moyangeli ya etuka oyo ezali na ngambo ya weste ya ebale Efrate, Shetari-Bozinayi mpe bino baninga na bango ya mosala, bakambi ya etuka, bozala mosika ya likambo oyo.
“现在河西的总督达乃和示他·波斯乃,并你们的同党,就是住河西的亚法萨迦人,你们当远离他们。
7 Botika ete misala ya kotonga lisusu Ndako oyo ya Nzambe ekoba. Tika ete moyangeli mpe bakambi ya Bayuda batonga yango lisusu na esika na yango ya kala.
不要拦阻 神殿的工作,任凭犹大人的省长和犹大人的长老在原处建造 神的这殿。
8 Tala mitindo oyo ngai nazali kopesa bino na tina na oyo bosengeli kosala mpo na kosunga bakambi ya Bayuda mpe mpo na misala ya botongi Ndako oyo ya Nzambe: ‹ Bosengeli tango nyonso kozwaka mbongo ya misala na bomengo ya mokonzi, oyo ewutaka na mpako oyo etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate efutaka mpo na mokonzi, mpo na kofuta bato wana na ndenge ekoki mpe mpo ete misala etelema te.
我又降旨,吩咐你们向犹大人的长老为建造 神的殿当怎样行,就是从河西的款项中,急速拨取贡银作他们的经费,免得耽误工作。
9 Bosengeli mpe kopesaka mikolo nyonso epai ya Banganga-Nzambe ya Yelusalemi biloko nyonso oyo bakozala na yango na bosenga mpo na mbeka ya kotumba ya Nzambe ya Likolo: bana ngombe ya mibali, bameme ya mibali, bana meme, ble, mungwa, masanga ya vino mpe mafuta. Soki bakomi na bosenga ya biloko, bino bosengeli kopesa bango yango mikolo nyonso, mpe esengeli te kozanga,
他们与天上的 神献燔祭所需用的公牛犊、公绵羊、绵羊羔,并所用的麦子、盐、酒、油,都要照耶路撒冷祭司的话,每日供给他们,不得有误;
10 mpo ete bakoka kobonzaka mbeka ya solo kitoko epai ya Nzambe ya Likolo, mpe mpo ete basambelaka mpo na bomoi malamu ya mokonzi elongo na bana na ye ya mibali.
好叫他们献馨香的祭给天上的 神,又为王和王众子的寿命祈祷。
11 Bongo tala mokano oyo nasili kozwa mpo na moto nyonso oyo akobongola to akotosa te mitindo oyo: bakolongola libaya moko kati na ndako na ye, bakotelemisa yango, bakodiembika ye na libaya yango mpe bakokomisa ndako na ye mopiku ya biloko ya mbindo.
我再降旨,无论谁更改这命令,必从他房屋中拆出一根梁来,把他举起,悬在其上,又使他的房屋成为粪堆。
12 Tika ete Nzambe oyo atiaki Kombo na Ye kuna akweyisa mokonzi nyonso to bato nyonso oyo bakomeka kotombola loboko mpo na koboya kotosa to kobongola mitindo na ngai na kobuka Tempelo oyo ya Nzambe kati na Yelusalemi. Ezali ngai, Dariusi, moto napesi mitindo yango. Tika ete botosa yango malamu mpe na lombangu. › »
若有王和民伸手更改这命令,拆毁这殿,愿那使耶路撒冷的殿作为他名居所的 神将他们灭绝。我—大流士降这旨意,当速速遵行。”
13 Boye, Tatinayi, moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpe Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala batosaki mitindo ya mokonzi Dariusi na lombangu mpe na ndenge ezaleli.
于是,河西总督达乃和示他·波斯乃,并他们的同党,因大流士王所发的命令,就急速遵行。
14 Boye bakambi ya Bayuda bakobaki misala ya kotonga, mpe balongaki wana balendisamaki na maloba ya basakoli Aje mpe Zakari, mokitani ya Ido. Basilisaki kotonga kolanda mitindo ya Nzambe ya Isalaele mpe ya Sirisi, Dariusi, mpe Aritakizerisesi, bakonzi ya Persi.
犹大长老因先知哈该和易多的孙子撒迦利亚所说劝勉的话就建造这殿,凡事亨通。他们遵着以色列 神的命令和波斯王塞鲁士、大流士、亚达薛西的旨意,建造完毕。
15 Basilisaki kotonga Ndako mobimba ya Nzambe, na mokolo ya misato ya sanza ya Adari, tango mokonzi Dariusi akokisaki mibu motoba na bokonzi.
大流士王第六年,亚达月初三日,这殿修成了。
16 Bato ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi mpe bato mosusu oyo bawutaki na bowumbu basalaki feti ya libulisi ya Ndako ya Nzambe.
以色列的祭司和利未人,并其余被掳归回的人都欢欢喜喜地行奉献 神殿的礼。
17 Babonzaki bangombe ya mibali nkama moko, bameme ya mibali nkama mibale, bana meme nkama minei mpo na libulisi ya Ndako ya Nzambe; mpe bantaba ya mibali zomi na mibale, moko mpo na ekolo moko na moko ya Isalaele, lokola mbeka mpo na masumu ya Isalaele mobimba.
行奉献 神殿的礼就献公牛一百只,公绵羊二百只,绵羊羔四百只,又照以色列支派的数目献公山羊十二只,为以色列众人作赎罪祭;
18 Bakabolaki mpe Banganga-Nzambe kolanda milongo na bango, mpe Balevi kolanda masanga na bango mpo na mosala ya Nzambe kati na Yelusalemi, ndenge ekomama kati na buku ya Moyize.
且派祭司和利未人按着班次在耶路撒冷事奉 神,是照摩西律法书上所写的。
19 Na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bana ya Isalaele oyo bawutaki na bowumbu basepelaki feti ya Pasika.
正月十四日,被掳归回的人守逾越节。
20 Banganga-Nzambe mpe Balevi bamipetolaki kolanda mibeko mpe bakomaki peto. Boye Balevi bakataki kingo ya mpate lokola mbeka ya Pasika mpo na bato nyonso oyo bawutaki na bowumbu, mpo na bandeko na bango, Banganga-Nzambe, mpe mpo na bango moko.
原来,祭司和利未人一同自洁,无一人不洁净。利未人为被掳归回的众人和他们的弟兄众祭司,并为自己宰逾越节的羊羔。
21 Bana ya Isalaele oyo bawutaki na bowumbu baliaki yango elongo na bato nyonso oyo bakabwanaki na misala ya mbindo ya bikolo ya mokili mpe basanganaki elongo na bango mpo na koluka Yawe, Nzambe ya Isalaele.
从掳到之地归回的以色列人和一切除掉所染外邦人污秽、归附他们、要寻求耶和华—以色列 神的人都吃这羊羔,
22 Na mikolo sambo, basalaki na esengo feti ya Mapa ezanga levire, pamba te Yawe atondisaki bango na esengo ndenge abongolaki makanisi ya mokonzi ya Asiri mpo ete asunga bango na misala ya botongi Ndako ya Nzambe, ya Nzambe ya Isalaele.
欢欢喜喜地守除酵节七日;因为耶和华使他们欢喜,又使亚述王的心转向他们,坚固他们的手,作以色列 神殿的工程。

< Esidrasi 6 >