< Ezekieli 7 >

1 Yawe alobaki na ngai: 2 « Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na mokili ya Isalaele: ‹ Esili! Tango ya suka ebelemi mpo na mokili mobimba! 3 Tango ya suka ekoki sik’oyo mpo na yo, nakopelisela yo kanda na Ngai, nakosambisa yo kolanda etamboli na yo mpe nakofuta yo kolanda misala na yo nyonso ya mbindo. 4 Nakotala yo na liso ya mawa te mpe nakobikisa yo te; nakofuta yo solo kolanda etamboli na yo mpe kolanda misala ya mbindo oyo ezali kati na yo. Boye okoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. › 5 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: ‹ Mawa! Pasi ya somo ezali koya! 6 Tango ya suka ebelemi! Ya solo, tango ya suka ebelemi penza! Etelemeli yo. Tala, tango yango esili kobelema! 7 Kobebisama ekokomela yo, yo movandi ya mokili! Tango yango ekoki, mokolo yango ebelemi, somo makasi ekoti, mpe esengo ezali lisusu te na likolo ya bangomba. 8 Nakomi pene ya kopelisela yo kanda na Ngai mpe ya kotombokela yo! Nakosambisa yo kolanda etamboli mpe misala na yo nyonso ya mbindo. 9 Nakotala yo na liso ya mawa te mpe nakobikisa yo te, nakofuta yo solo kolanda etamboli na yo mpe misala ya mbindo oyo ezali kati na yo. Boye okoyeba solo ete Ngai Yawe nde nabetaka. 10 Tala, mokolo yango nde yango oyo! Esili kobelema! Kobebisama eboti mbuma, lingenda ebimisi bafololo, lolendo ekoli! 11 Makambo mabe ekoli makasi mpe ekomi lokola fimbu mpo na kopesa etumbu na misala mabe; moto moko te kati na bato to kati na bato ebele akotikala; eloko moko te ekotikala, ezala bomengo to biloko ya motuya. 12 Tango ebelemi, mokolo yango ekoki. Tika ete mosombi moko te azala na esengo to moteki moko te azala na mawa, pamba te kanda makasi ezali kozela bato nyonso. 13 Moteki akozwa lisusu te motuya ya biloko oyo atekaki, ata soki azali nanu na bomoi; pamba te emoniseli oyo ezali kotalisa ete kobebisama ya bomengo ya mokili ekokokisama solo. Likolo ya masumu na bango, moto moko te kati na bango akobikisa bomoi na ye. 14 Ata soki babeti kelelo to bamibongisi ndenge nini, moto moko te akokende na bitumba; pamba te kanda na Ngai ezali likolo ya bato nyonso. 15 Mopanga ekoboma na libanda ya engumba, bokono oyo ebomaka mpe nzala makasi ekoboma kati na engumba; bato oyo bazali kati na mokili bakokufa na mopanga, mpe bato oyo bazali kati na engumba bakokufa na bokono oyo ebomaka mpe na nzala makasi. 16 Batikali bakokima na likolo ya bangomba; mpe kuna, bakokoma kolelalela lokola bibenga, moto na moto mpo na masumu na ye. 17 Maboko na bango nyonso ekolemba, mpe mabolongo na bango nyonso ekolemba lokola mayi. 18 Bakolata bilamba ya basaki mpe somo ekokanga bango; bilongi na bango ekotonda na soni, bakokokola suki ya mito na bango. 19 Bakobwaka palata na bango na babalabala, mpe wolo na bango ekomonana lokola eloko ya mbindo. Palata mpe wolo na bango ekozala na makoki te ya kobikisa bango na mokolo ya kanda ya Yawe. Palata mpe wolo yango ekosilisa baposa mpe nzala na bango te, pamba te yango nde ekweyisaki bango na masumu. 20 Basalaki lolendo mpo na kitoko mpe motuya ya biloko na bango ya monzele oyo basalaki na yango banzambe na bango ya bikeko mpe bililingi ya somo. Yango wana, nakokomisa biloko yango mbindo na miso na bango. 21 Nakokaba yango lokola bomengo ya bitumba na maboko ya bapaya mpe ya bato mabe ya mokili mpo ete babotola yango na makasi mpe basakanela yango. 22 Elongi na Ngai ekotala bango lisusu te, mpe bato mabe bakobebisa Esika na Ngai ya bule. Bongo, miyibi bakokota kuna mpe bakosambwisa yango. 23 Bomisalela minyololo mpo ete mokili etondi na babomi mpe engumba etondi na makambo mabe. 24 Nakotinda ekolo oyo eleki mabe kati na bikolo mpo ete eya kobotola bandako na bango; nakosilisa lolendo ya bato ya nguya mpe nakosambwisa bisika na bango ya bule. 25 Tango makambo oyo ya somo ekoya, bakoluka kimia kasi bakozwa yango te. 26 Pasi likolo ya pasi nde ekokomela bango, basango ya mabe na ya mabe nde ekolandana. Bakoluka bimoniseli na pamba epai ya basakoli; Banganga-Nzambe bakokoka lisusu te koteya malakisi ya Mobeko, mpe bakambi bakozanga toli ya kopesa. 27 Mokonzi akozala na matanga, mokambi akolata pili, mpe maboko ya bato ya mokili ekokoma kolenga. Nakofuta bango kolanda etamboli na bango mpe nakosambisa bango kolanda misala na bango. Boye, bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. › »

< Ezekieli 7 >