< Ezekieli 48 >

1 « Tala bikolo ndenge ekomami kolanda bakombo na yango: Libota ya Dani ekozwa eteni moko ya mabele: mondelo na yango ekolekela na nzela ya Etiloni kino na Lebo-Amati, Atsari-Enani mpe mondelo ya nor ya mokili ya Damasi pembeni ya Amati; boye mondelo na yango ekobanda longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.
모든 지파의 이름대로 이 같을지니라 극북에서부터 헤들론 길로 말미암아 하맛 어귀를 지나서 다메섹 지계에 있는 하살에논까지 곧 북으로 하맛 지계에 미치는 땅 동편에서 서편까지는 단의 분깃이요
2 Libota ya Aseri ekozwa eteni moko ya mabele: ekozala na mondelo ya libota ya Dani, longwa na este kino na weste.
단 지계 다음으로 동편에서 서편까지는 아셀의 분깃이요
3 Libota ya Nefitali ekozwa eteni moko ya mabele: ekozala na mondelo ya libota ya Aseri, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.
아셀 지계 다음으로 동편에서 서편까지는 납달리의 분깃이요
4 Libota ya Manase ekozwa eteni moko ya mabele: ekozala na mondelo ya libota ya Nefitali, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.
납달리 지계 다음으로 동편에서 서편까지는 므낫세의 분깃이요
5 Libota ya Efrayimi ekozwa eteni moko ya mabele: ekozala na mondelo ya libota ya Manase, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.
므낫세 지계 다음으로 동편에서 서편까지는 에브라임의 분깃이요
6 Libota ya Ribeni ekozwa eteni moko ya mabele: ekozala na mondelo ya libota ya Efrayimi, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.
에브라임 지계 다음으로 동편에서 서편까지는 르우벤의 분깃이요
7 Libota ya Yuda ekozwa eteni moko ya mabele: ekozala na mondelo ya libota ya Ribeni, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.
르우벤 지계 다음으로 동편에서 서편까지는 유다의 분깃이요
8 Eteni ya mabele oyo bakopesa Yawe lokola likabo ya motuya ekozala na mondelo ya etuka ya Yuda: longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste; ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na mokuse, mpe molayi na yango ekozala ndenge moko na biteni ya mabele ya mabota mosusu. Boye, Esika ya bule ekozala na kati-kati na yango.
유다 지계 다음으로 동편에서 서편까지는 너희가 예물로 드릴 땅이라 광이 이만 오천척이요 장은 다른 분깃의 동편에서 서편까지와 같고 성소는 그 중앙에 있을지니
9 Eteni ya mabele ya motuya oyo bokopesa Yawe lokola likabo ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse.
곧 너희가 여호와께 드려 예물로 삼을 땅의 장이 이만 오천척이요 광이 일만 척이라
10 Eteni yango ya mabele ekozala bule mpe ekopesama mpo na Banganga-Nzambe: ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi na ngambo ya nor, bametele pene nkoto mitano na mokuse na ngambo ya weste, bametele pene nkoto mitano na mokuse na ngambo ya este mpe bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi na ngambo ya sude. Esika ya bule ya Yawe ekozala na kati-kati na yango.
이 드리는 거룩한 땅은 제사장에게 돌릴지니 북편으로 장이 이만 오천척이요 서편으로 광이 일만척이요 동편으로 광이 일만척이요 남편으로 장이 이만 오천척이라 그 중앙에 여호와의 성소가 있게 하고
11 Eteni yango ya mabele ekozala mpo na Banganga-Nzambe oyo babulisama, oyo bazali bakitani ya Tsadoki, mpo ete basalelaki Ngai na boyengebene mpe bapengwaki te na nzela na Ngai tango bana ya Isalaele bapengwaki ndenge mpe Balevi basalaki.
이 땅으로 사독의 자손 중 거룩히 구별한 제사장에게 돌릴지어다 그들은 직분을 지키고 이스라엘 족속이 그릇할 때에 레위 사람의 그릇한 것처럼 그릇까지 아니하였느니라
12 Ekozala mpo na bango lokola likabo ya motuya oyo ewuti na eteni ya mabele oyo ebulisama kati na mokili, eteni ya mabele oyo eleki na bule na bandelo ya etuka ya Balevi.
이 온 땅 중에서 예물로 드리는 땅 곧 레위 지계와 연접한 땅을 그들이 지극히 거룩한 것으로 여길지니라
13 Na zingazinga ya etuka ya Banganga-Nzambe, Balevi bakozwa eteni moko ya mabele ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse.
제사장의 지계를 따라 레위 사람의 분깃을 주되 장이 이만 오천척이요 광이 일만 척으로 할지니 이 구역의 장이 이만 오천척이요 광이 각기 일만 척이라
14 Bakoki te koteka to kopesa eloko moko kati na eteni ya mabele yango na bato mosusu, pamba te yango ezali mabele oyo eleki kitoko, mpo ete ebulisama mpo na Yawe.
그들이 그 땅을 팔지도 못하며 바꾸지도 못하며 그 땅의 처음 익은 열매를 남에게 주지도 못하리니 이는 나 여호와에게 거룩히 구별한 것임이니라
15 Eteni ya mabele oyo ekotikala, eteni ya bametele pene nkoto mibale na nkama mitano na mokuse mpe bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi, ekozala ebulisama te; ekozala mpo na kosala misala ya engumba lokola kotonga bandako mpe kobokola bibwele; engumba ekozala na kati-kati na yango
이 이만 오천척 다음으로 광 오천척은 속된 땅으로 하여 성읍을 세우며 거하는 곳과 들을 삼되 성이 그 중앙에 있게 할지니
16 mpe ekozala na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, na bangambo nyonso: nor, sude, este mpe weste.
그 척수는 북편도 사천 오백척이요 남편도 사천 오백척이요, 동편도 사천 오백척이요, 서편도 사천 오백척이며
17 Bongo, lopango ya kobokolela bibwele ya engumba ekozala na bametele pene nkama moko na tuku mibale na mitano, na bangambo nyonso: nor, sude, este mpe weste.
그 성의 들은 북으로 이백 오십 척이요 남으로 이백 오십 척이요, 동으로 이백 오십척이요, 서으로 이백 오십척이며
18 Eteni ya mabele oyo ekotikala na etuka, zingazinga ya eteni ya bule, longwa na molayi na yango, ekozala na bametele pene nkoto mitano na ngambo ya este mpe bametele pene nkoto mitano na ngambo ya weste. Bambuma ya mabele na yango ekoleisa bato oyo bakosala mpo na engumba.
예물을 삼아 거룩히 구별할 땅과 연접하여 남아 있는 땅의 장이 동으로 일만 척이요 서으로 일만척이라 곧 예물을 삼아 거룩히 구별할 땅과 연접하였으며 그 땅의 소산은 성읍에서 역사하는 자의 양식을 삼을지라
19 Basali oyo bakobanda kowuta na engumba epai wapi basalaka mpo na kosala mosala ya bilanga bakobimela na mabota nyonso ya Isalaele.
이스라엘 모든 지파 중에 그 성읍에서 역사하는 자는 그 땅을 기경할지니라
20 Eteni nyonso ya mabele oyo bakobulisa mpo na Yawe ekozala na molayi moko, na bangambo nyonso: bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano ndenge likabo ya motuya ezalaka; bokolongola ndambo moko kati na bandambo minei ya eteni ya bule mpe bokosalela yango misala ya engumba.
그런즉 예물로 드리는 땅의 도합은 장도 이만 오천척이요 광도 이만 오천척이라 너희가 거룩히 구별하여 드릴 땅은 성읍의 기지와 합하여 네모 반듯할 것이니라
21 Eteni ya mabele oyo ekotikala na bangambo nyonso mibale ya eteni ya mabele oyo ebulisama mpe ya eteni ya mabele oyo ebongisami mpo na misala ya engumba ekozala ya mokambi. Ekozala longwa na mondelo ya ngambo ya este ya eteni ya mabele oyo ebulisama, oyo ezali na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi kino na mondelo ya ngambo ya weste oyo ezali mpe na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi. Eteni ya mabele oyo ebulisama mpe Esika ya bule ya Tempelo ekozala na kati-kati ya biteni nyonso mabele.
거룩히 구별할 땅과 성읍의 기지 좌우편에 남은 땅은 왕에게 돌릴지니 곧 거룩히 구별할 땅의 동향한 그 지계 앞 이만 오천척이라 다른 분깃들과 연접한 땅이니 이것을 왕에게 돌릴 것이며 거룩히 구별할 땅과 전의 성소가 그 중간에 있으리라
22 Boye, eteni ya mabele ya Balevi mpe eteni ya mabele oyo ebongisama mpo na misala ya engumba ekozala na kati-kati ya eteni ya mabele ya mokambi. Eteni ya mabele ya mokambi ekozala na kati-kati ya bandelo ya libota ya Yuda mpe ya libota ya Benjame.
그런즉 왕에게 돌려 그에게 속할 땅은 레위 사람의 기업 좌우편과 성읍의 기지 좌우편이며 유다 지경과 베냐민 지경 사이에 있 을지니라
23 Mpo na mabota mosusu: Libota ya Benjame ekozwa eteni moko ya mabele: ekobanda longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste;
그 나머지 모든 지파는 동편에서 서편까지는 베냐민의 분깃이요
24 Libota ya Simeoni ekozwa eteni moko ya mabele: ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Benjame na ngambo ya este kino na ngambo ya weste;
베냐민 지계 다음으로 동편에서 서편까지는 시므온의 분깃이요
25 Libota ya Isakari ekozwa eteni moko ya mabele: ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Simeoni na ngambo ya este kino na ngambo ya weste;
시므온 지계 다음으로 동편에서 서편까지는 잇사갈의 분깃이요
26 Libota ya Zabuloni ekozwa eteni moko ya mabele: ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Isakari, na ngambo ya este kino na ngambo ya weste;
잇사갈 지계 다음으로 동편에서 서편까지는 스불론의 분깃이요
27 Libota ya Gadi ekozwa eteni moko ya mabele: ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Zabuloni, na ngambo ya este kino na ngambo ya weste.
스불론 지계 다음으로 동편에서 서편까지는 갓의 분깃이며
28 Bandelo ya mabele ya Gadi ekozala na ngambo ya sude, pene ya Negevi, longwa na Tamari kino na mayi ya Meriba ya Kadeshi; ekolekela na Wadi kino na ebale monene Mediterane.
갓 지계 다음으로 남편 지계는 다말에서부터 므리바가데스 물에 이르고 애굽 시내를 따라 대해에 이르나니
29 Yango nde mokili oyo bokokabola na zeke lokola libula kati na mabota ya Isalaele, libota na libota na eteni na yango ya mabele, » elobi Nkolo Yawe.
이것은 너희가 제비 뽑아 이스라엘 지파에게 나누어 주어 기업이 되게 할 땅이요 또 이것들은 그들의 분깃이니라 나 주 여호와의 말이니라
30 « Tala oyo ekozala bikuke ya engumba: Na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano,
그 성읍의 출입구는 이러하니라 북편의 광이 사천 오백척이라
31 bikuke ya engumba ekobengama na bakombo ya mabota ya Isalaele. Na ngambo ya nor, ekozala na bikuke misato: ekuke ya Ribeni, ekuke ya Yuda, mpe ekuke ya Levi;
그 성읍의 문들은 이스라엘 지파들의 이름을 따를 것인데 북으로 문이 셋이라 하나는 르우벤 문이요, 하나는 유다 문이요, 하나는 레위 문이며
32 Ngambo ya este, na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, ekozala na bikuke misato: ekuke ya Jozefi, ekuke ya Benjame, mpe ekuke ya Dani.
동편의 광이 사천 오백척이니 또한 문이 셋이라 하나는 요셉 문이요, 하나는 베냐민 문이요, 하나는 단 문이며
33 Na ngambo ya sude, na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, ekozala na bikuke misato: ekuke ya Simeoni, ekuke ya Isakari, mpe ya ekuke ya Zabuloni.
남편의 광이 사천 오백척이니 또한 문이 셋이라 하나는 시므온 문이요, 하나는 잇사갈 문이요, 하나는 스불론 문이며
34 Na ngambo ya weste, na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, ekozala na bikuke misato: ekuke ya Gadi, ekuke ya Aseri mpe ya ekuke ya Nefitali.
서편도 사천 오백척이니 또한 문이 셋이라 하나는 갓 문이요, 하나는 아셀 문이요, 하나는 납달리 문이며
35 Molayi nyonso ya mir oyo ezingeli engumba ekozala na bametele pene nkoto libwa. Mpe kobanda na tango wana, kombo ya engumba ekokoma ‹ Yawe azali awa. › »
그 사면의 도합이 일만 팔천척이라 그 날 후로는 그 성읍의 이름을 여호와 삼마라 하리라

< Ezekieli 48 >