< Ezekieli 46 >

1 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Ekuke ya lopango ya kati oyo etala na ngambo ya este ekozala ya kokangama mikolo motoba; kasi na mokolo ya Saba mpe na mokolo ya feti ya ebandeli ya sanza, ekozala ya kofungwama.
The Lord Yahweh says this: The gate of the inner courtyard, facing east, will be shut for the six days of work, but on the Sabbath it will be opened, and on the day of the new moon it will be opened.
2 Mokambi akokota na kati, wuta na libanda; akolekela na ndako moke ya kokotela mpe akotelema na mabaya oyo esimbaka ekuke. Banganga-Nzambe bakobonza mbeka na ye ya kotumba mpe mbeka na ye ya kozongisa boyokani. Akogumbama na ekotelo ya ekuke mpe akobima na libanda, kasi ekuke ekozala ya kofungwama kino na pokwa.
The prince will enter the outer courtyard by the way of the gate and its portico from outside, and he will stand before the doorposts of the inner gate while the priests perform his burnt offering and peace offering. Then he will worship at the threshold of the inner gate and go out, but the gate will not be shut until evening.
3 Na mikolo ya bafeti ya Saba mpe ya ebandeli ya sanza, bato ya mokili bakobanda kogumbama liboso ya Yawe, na ekotelo yango.
The people of the land will also worship before Yahweh at the entrance to this gate on the Sabbaths and new moons.
4 Na mokolo ya Saba, mokambi akomema epai na Yawe lokola mbeka ya kotumba bana meme motoba ya mibali mpe meme moko ya mobali: nyonso esengeli ezala ezanga mbeba.
The burnt offering that the prince offers to Yahweh on the Sabbath day will be six unblemished lambs and an unblemished ram.
5 Akopesa lokola mbeka ya bambuma bakilo zomi na mitano ya bambuma mpo na meme moko ya mobali; bongo, akopesa likabo oyo loboko na ye ekokoka mpo na bana meme; likabo ya mafuta ekozala balitele misato na ndambo mpo na bakilo zomi na mitano ya bambuma.
The grain offering with the ram will be an ephah, and the grain offering with the lambs will be what he wishes to give, and a hin of oil with each ephah of grain.
6 Na mokolo na feti ya ebandeli ya sanza, akobonza mwana ngombe moko ya mobali, bana meme motoba ya mibali mpe meme moko ya mobali: nyonso esengeli ezala ezanga mbeba.
On the day of the new moon he must offer an unblemished bull from a herd, six lambs, and an unblemished ram.
7 Akobakisa lokola makabo ya bambuma bakilo zomi na mitano mpo na ngombe ya mobali mpe mpo na meme ya mobali; mpe mpo na bana meme, akopesa nyonso oyo loboko na ye ekokoka, bakisa balitele misato na ndambo ya mafuta mpo na bakilo zomi na mitano ya bambuma.
He must make a grain offering of an ephah for the bull and an ephah for the ram, and what he wishes to give for the lambs, and a hin of oil for every ephah of grain.
8 Tango mokambi akokota na kati, akolekela na ndako moke ya kokotela mpe akobimela kaka na nzela wana.
When the prince enters by the way of the gate and its portico, he must leave by the same way.
9 Mpe tango bato ya mokili bakoya liboso ya Yawe na bafeti oyo ekatama, moto nyonso oyo akokotela na ekuke ya ngambo ya nor mpo na kogumbamela Yawe akobimela na ekuke ya ngambo ya sude, mpe oyo akokotela na ekuke ya ngambo ya sude akobimela na ekuke ya ngambo ya nor. Moto moko te akobimela na ekuke oyo akotelaki, kasi akobimela na ekuke ya ngambo mosusu oyo etalana na yango.
But when the people of the land come before Yahweh at the appointed festivals, anyone entering through the north gate to worship must leave through the south gate; and anyone entering through the south gate must leave through the north gate. No one may turn back to the gate through which he entered, for he must go out straight ahead.
10 Mokambi akozala kati na bato na ye, akokota mpe akobima elongo na bango.
The prince must be in their midst; when they go in, he must go in, and when they leave, he must leave.
11 Na tango ya bafeti mpe ya bafeti oyo ekatama, makabo ya bambuma ekozala bakilo zomi na mitano mpo na ngombe moko ya mobali, bakilo zomi na mitano mpo na meme moko ya mobali mpe nyonso oyo akolinga kopesa mpo na bana meme ya mibali; akobakisa balitele misato na ndambo mpo na bakilo nyonso zomi na mitano ya bambuma.
At the festivals, the grain offering must be an ephah of grain for the bull and an ephah for the ram, and whatever he wishes to give with the lambs, and a hin of oil for every ephah.
12 Tango mokambi akobonzela Yawe mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kozongisa boyokani lokola likabo oyo akati na motema na ye moko, bakofungolela ye ekuke oyo etala na ngambo ya este; mpe akobonza mbeka na ye ya kotumba mpe mbeka na ye ya kozongisa boyokani ndenge kaka asalaka na mokolo ya Saba. Sima na yango nde akobima, mpe bakokanga ekuke sima na ye.
When the prince gives a freewill offering, either a burnt offering or a peace offering to Yahweh, the gate facing east will be opened for him. He will offer his burnt offering offering or his peace offering as he does it on the Sabbath day. Then he must go out, and after he has gone out the gate will be shut.
13 Mokolo na mokolo, okobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba. Okobanda kobonza yango tongo nyonso.
In addition, you will give an unblemished lamb one year old as a burnt offering to Yahweh daily; you will do this morning after morning.
14 Tongo nyonso, okobanda kobakisa na likolo na yango lokola likabo ya bambuma bakilo mibale na bagrame nkama mitano ya farine oyo bakosangisa na litele moko ya mafuta ya kitoko. Ezali likabo mpo na Yawe; mpe ezali mibeko ya libela na libela mpo na bambeka ya tango nyonso.
You will give a grain offering with it morning after morning, a sixth of an ephah and a third of a hin of oil to moisten the flour of the grain offering for Yahweh, according to a permanent statute.
15 Tongo nyonso, okobanda kobonza mwana meme, makabo ya bambuma mpe mafuta lokola mbeka ya kotumba ya tango nyonso.
They will prepare the lamb, the grain offering, and the oil morning after morning, a permanent burnt offering.
16 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Soki mokambi apesi eloko lokola kado epai ya moko kati na bana na ye ya mibali, eloko yango ekozala ya mwana yango mpe ekotikala lokola libula ya bokitani mpo na bana na ye.
The Lord Yahweh says this: If the prince gives a gift to any of his sons, it is his inheritance. It will be the property of his sons, it is an inheritance.
17 Kasi soki apesi epai ya moko kati na basali na ye kado ya eloko oyo ewuti na libula na ye, kado yango ekozala ya mosali yango kino na mobu ya kokangolama na ye; sima nde ekozonga na moboko ya mokambi, mpe libula na ye ekotikala ya bana na ye kaka.
But if he gives a gift from his inheritance to one of his servants, then it will be that servant's until the year of liberty, and then it will return to the prince. His inheritance will certainly be for his sons.
18 Mokambi akoki kolongola eloko moko te kati na libula ya bato na ye mpo na kokomisa yango ya ye moko to kobengana bango na mabele na bango; soki alingi kokabela bana na ye libula, asengeli nde kozwa yango na libula na ye moko mpo ete bato na Ngai bapanzana te mosika ya libula na bango. › »
The prince will not take the people's inheritance away from their own property; he must provide for his sons from his own property so that my people will not be scattered, each man from his own property.'”
19 Moto yango akotisaki ngai, na nzela ya ekotelo oyo ezali pembeni ya ekuke ya ngambo ya nor, kati na bashambre ya bule ya Banganga-Nzambe, oyo etala na ngambo ya nor; alakisaki ngai esika moko oyo ezalaki na suka, na ngambo ya weste.
Next the man brought me through the entrance at the gate to the holy rooms for the priests, which faced north and behold! There was a place toward the west.
20 Alobaki na ngai: « Awa nde esika oyo Banganga-Nzambe bakozala kolambela mbeka mpo na kozongisa boyokani, mbeka ya masumu mpe kotumbela makabo ya bambuma mpo ete ebima te na lopango ya libanda, noki te bato bakosimba biloko ya bule. »
He said to me, “This is the place where the priests must boil the guilt offering and the sin offering and where they must bake the grain offering. They must not bring the offerings into the outer courtyard, for then the people would be consecrated.”
21 Abimisaki ngai na lopango ya libanda mpe atambolisaki ngai na basonge nyonso minei ya lopango. Na songe moko na moko ya lopango, namonaki lopango mosusu.
Then he brought me to the outer courtyard and he led me past the four corners of that courtyard, and I saw that in at every corner of the courtyard there was a another court.
22 Na basonge nyonso minei ya lopango ya libanda, ezalaki na mapango ya mike; mpe mapango nyonso minei ezalaki ndenge moko: bametele pene tuku mibale na molayi mpe bametele pene zomi na mitano na mokuse.
In the four corners of the outer courtyard there were four small courtyards, forty cubits in length and thirty in width. There the same dimensions for all four of the courtyards.
23 Zingazinga ya moko na moko ya mapango nyonso minei, ezalaki na mir moko ya mokuse; mpe na se na yango, batandaki mabanga mpo na kopelisa moto na zingazinga ya mir yango ya mokuse.
There was a row made of stone all around the four of them, and cooking hearths were under the stone row.
24 Moto yango alobaki na ngai: « Oyo nde bakikuku epai wapi basali ya Tempelo bakobanda kolambela misuni ya bambeka oyo bato bakobanda kobonza. »
The man said to me, “These are the places where the temple servants will boil the people's sacrifices.”

< Ezekieli 46 >