< Ezekieli 41 >

1 Moto yango amemaki ngai kati na eteni ya Tempelo, oyo eleki monene mpe amekaki molayi ya makonzi na yango: likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene misato na monene na bangambo nyonso.
他帶我到殿那裏量牆柱:這面厚六肘,那面厚六肘,寬窄與會幕相同。
2 Ekotelo na yango ezalaki na bametele pene mitano na mokuse, mpe bamir na yango ya mipanzi ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano, ngambo na ngambo, na mokuse. Amekaki lisusu molayi ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene: ezalaki na bametele pene tuku mibale na molayi mpe bametele pene zomi na mokuse.
門口寬十肘。門兩旁,這邊五肘,那邊五肘。他量殿長四十肘,寬二十肘。
3 Bongo akotaki kati na eteni ya Tempelo, oyo eleki bule; amekaki molayi ya makonzi ya ekotelo: moko na moko ezalaki na metele pene moko na mokuse; ekotelo ezalaki na bametele pene misato na mokuse mpe bamir ya mipanzi ya ekotelo ezalaki na bametele pene misato na basantimetele tuku mitano na mokuse.
他到內殿量牆柱,各厚二肘。門口寬六肘,門兩旁各寬七肘。
4 Amekaki molayi ya eteni oyo ezalaki sima ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene: ezalaki na bametele pene zomi na molayi, mpe bametele pene zomi na mokuse; mpe alobaki na ngai: « Oyo ezali Esika-Oyo-Eleki-Bule. »
他量內殿,長二十肘,寬二十肘。他對我說:「這是至聖所。」
5 Amekaki lisusu monene ya mir ya Tempelo: ezalaki na bametele pene misato; mpe ngambo nyonso ya bashambre zingazinga ya Tempelo ezalaki na bametele pene mibale na mokuse.
他又量殿牆,厚六肘;圍着殿有旁屋,各寬四肘。
6 Ezalaki na ba-etaje misato oyo moko na moko, kati na yango, ezalaki na bashambre tuku misato oyo esimbamaki na mir batonga zingazinga ya Tempelo. Bamir yango ezalaki ekangana yango na yango, kasi ezalaki ya kokangana na mir ya Tempelo te.
旁屋有三層,層疊而上,每層排列三十間。旁屋的梁木擱在殿牆坎上,免得插入殿牆。
7 Longwa na etaje moko mpo na komata na etaje mosusu, bashambre ezalaki kokoma minene, pamba te bazalaki komata na etaje mosusu na ematelo oyo ezalaki zingazinga ya mir; boye, likolo ya ndako ezalaki monene makasi. Bongo, mpo na kolongwa na etaje oyo ya se mpe kokoma na etaje oyo ya likolo, esengelaki koleka na etaje ya kati-kati.
這圍殿的旁屋越高越寬;因旁屋圍殿懸疊而上,所以越上越寬,從下一層,由中一層,到上一層。
8 Namonaki zingazinga ya Tempelo eloko moko batonga na likolo: ezalaki moboko ya bashambre; molayi na yango ezalaki na bametele pene misato.
我又見圍着殿有高月臺。旁屋的根基,高足一竿,就是六大肘。
9 Monene ya mir ya libanda ya bashambre ya mipanzi ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano. Nzela oyo ezalaki na kati-kati ya ngambo ya bashambre ya Tempelo
旁屋的外牆厚五肘。旁屋之外還有餘地。
10 mpe bashambre ya Banganga-Nzambe ezalaki na bametele pene zomi na mokuse na zingazinga ya Tempelo.
在旁屋與對面的房屋中間有空地,寬二十肘。
11 Bikuke ya bashambre ya Tempelo etalaki na nzela oyo ezalaki na bikotelo mibale: moko na ngambo ya nor mpe mosusu na ngambo ya sude. Mokuse ya nzela yango ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano.
旁屋的門都向餘地:一門向北,一門向南。周圍的餘地寬五肘。
12 Na ngambo ya weste, ezalaki na ndako moko etalana na lopango ya Tempelo: ezalaki na bametele pene tuku misato na mitano na mokuse; mir ya ndako yango ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano na monene, mpe bametele pene tuku minei na mitano na molayi.
在西面空地之後有房子,寬七十肘,長九十肘,牆四圍厚五肘。
13 Moto yango amekaki lisusu molayi ya Tempelo: ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi; bongo lopango ya Tempelo mpe bamir na yango ezalaki na bametele pene tuku mitano.
這樣,他量殿,長一百肘,又量空地和那房子並牆,共長一百肘。
14 Mokuse ya Tempelo mpe ya esika ya polele oyo ezalaki na ngambo ya este ezalaki mpe na bametele pene tuku mitano.
殿的前面和兩旁的空地,寬一百肘。
15 Amekaki lisusu molayi ya ndako oyo etalana na lopango, na sima ya Tempelo elongo na nzela na yango ngambo na ngambo: ezalaki na bametele pene tuku mitano. Kati na Tempelo, eteni oyo eleki monene, Esika ya bule ya kati mpe ndako moke ya kokotela oyo etalana na lopango,
他量空地後面的那房子,並兩旁的樓廊,共長一百肘。
16 bikotelo, maninisa ya milayi oyo batalelaka libanda mpe nzela oyo ezali kati na ba-etaje wana misato, bazipaki yango nyonso na mabaya, longwa na se kino na maninisa ya etaje ya liboso, mpe bazipaki lisusu maninisa yango nyonso.
內殿、院廊、門檻、嚴緊的窗櫺,並對着門檻的三層樓廊,從地到窗櫺(窗櫺都有蔽子),
17 Na esika oyo ezali likolo ya ekotelo ya libanda kino na eteni ya Tempelo, oyo eleki bule mpe na bamir ya zingazinga ya eteni ya Tempelo, oyo eleki bule mpe na libanda ya eteni ya bule ya Tempelo,
直到門以上,就是到內殿和外殿內外四圍牆壁,都按尺寸用木板遮蔽。
18 batiaki bililingi ya basheribe mpe ya banzete ya mbila. Bililingi ya banzete ya mbila ezalaki elandana na bililingi ya basheribe. Boye, Sheribe moko na moko azalaki na bilongi mibale:
牆上雕刻基路伯和棕樹。每二基路伯中間有一棵棕樹,每基路伯有二臉。
19 elongi ya moto, na ngambo ya nzete ya mbila moko mpe elongi ya nkosi, na ngambo ya nzete ya mbila mosusu; batiaki bililingi yango zingazinga ya Tempelo mobimba.
這邊有人臉向着棕樹,那邊有獅子臉向着棕樹,殿內周圍都是如此。
20 Batiaki bililingi ya basheribe mpe ya banzete ya mbila na mir ya libanda ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene, longwa na se kino na likolo ya ekotelo.
從地至門以上,都有基路伯和棕樹。殿牆就是這樣。
21 Mabaya oyo esimbaka ekuke ya Tempelo, na bangambo na yango nyonso, ezalaki ndenge moko na molayi; mpe mabaya oyo ezalaki liboso ya eteni ya Tempelo, oyo eleki bule ezalaki mpe kaka ndenge moko.
殿的門柱是方的。至聖所的前面,形狀和殿的形狀一樣。
22 Ezalaki na etumbelo moko ya mabaya, oyo ezalaki na metele pene moko na basantimetele tuku mitano na bosanda mpe metele moko na molayi. Basonge na yango, se na yango mpe mipanzi na yango ezalaki ya mabaya. Moto yango alobaki na ngai: « Oyo nde mesa oyo ezali liboso ya Yawe. »
壇是木頭做的,高三肘,長二肘。壇角和壇面,並四旁,都是木頭做的。他對我說:「這是耶和華面前的桌子。」
23 Ezala eteni ya Tempelo, oyo eleki monene to eteni ya Tempelo, oyo eleki bule, moko na moko ezalaki na bikuke mibale:
殿和至聖所的門各有兩扇。
24 ekuke moko na moko ezalaki na bizipelo mibale oyo ebalukaka.
每扇分兩扇,這兩扇是摺疊的。這邊門分兩扇,那邊門也分兩扇。
25 Batiaki bililingi ya basheribe mpe ya banzete ya mbila na bikuke ya libanda ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene; basalaki mwanza moke ya mabaya na liboso ya ndako moke ya kokotela.
殿的門扇上雕刻基路伯和棕樹,與刻在牆上的一般。在外頭廊前有木檻。
26 Batiaki bililingi ya banzete ya mbila na bangambo nyonso ya bamir ya mipanzi ya ndako moke ya kokotela, oyo ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda. Mpe mipanzi ya bashambre ya Tempelo ezalaki na bamwanza mike.
廊這邊那邊都有嚴緊的窗櫺和棕樹;殿的旁屋和檻就是這樣。

< Ezekieli 41 >