< Ezekieli 37 >

1 Loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai; bongo Yawe abimisaki ngai na nzela ya Molimo na Ye mpe amemaki ngai kino na kati-kati ya lubwaku moko etonda na mikuwa.
היתה עלי יד יהוה ויוצאני ברוח יהוה ויניחני בתוך הבקעה והיא מלאה עצמות
2 Atambolisaki ngai na bangambo nyonso kati na mikuwa yango: namonaki ete ezali ebele penza mpe ekawuka, kati na lubwaku yango.
והעבירני עליהם סביב סביב והנה רבות מאד על פני הבקעה והנה יבשות מאד
3 Atunaki ngai: — Mwana na moto, mikuwa oyo ekoki lisusu kozala na bomoi? Nazongisaki: — Oh Nkolo Yawe, Yo kaka nde oyebi!
ויאמר אלי--בן אדם התחיינה העצמות האלה ואמר אדני יהוה אתה ידעת
4 Bongo alobaki na ngai: — Sakola epai ya mikuwa oyo mpe yebisa yango: « Eh bino mikuwa ekawuka, boyoka Liloba na Yawe!
ויאמר אלי הנבא על העצמות האלה ואמרת אליהם--העצמות היבשות שמעו דבר יהוה
5 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakotia pema kati na bino mpe bokozwa lisusu bomoi.
כה אמר אדני יהוה לעצמות האלה הנה אני מביא בכם רוח--וחייתם
6 Nakotia bino misisa mpe misuni, nakolatisa bino poso ya nzoto mpe nakotia pema kati na bino. Boye bokozwa lisusu bomoi, bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »
ונתתי עליכם גידים והעלתי עליכם בשר וקרמתי עליכם עור ונתתי בכם רוח וחייתם וידעתם כי אני יהוה
7 Boye, nasakolaki ndenge kaka atindaki ngai. Bongo wana nazalaki nanu kosakola, makelele moko ya makasi eyokanaki; mpe, mbala moko, mikuwa yango ekomaki koningana mpe kosangana moko na moko na mosusu.
ונבאתי כאשר צויתי ויהי קול כהנבאי והנה רעש ותקרבו עצמות עצם אל עצמו
8 Wana nazalaki kotala, namonaki misisa mpe misuni kobima na mikuwa yango mpe poso ya nzoto kozipa yango, kasi ezalaki na pema te.
וראיתי והנה עליהם גדים ובשר עלה ויקרם עליהם עור מלמעלה ורוח אין בהם
9 Yawe alobaki na ngai: — Mwana na moto, sakola epai ya pema, sakola mpe loba na pema: « Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh pema, yaka wuta na bisika nyonso mopepe ebimelaka mpe kota kati na banzoto oyo mpo ete ezwa lisusu bomoi! »
ויאמר אלי הנבא אל הרוח הנבא בן אדם ואמרת אל הרוח כה אמר אדני יהוה מארבע רוחות באי הרוח ופחי בהרוגים האלה ויחיו
10 Nasakolaki ndenge kaka atindaki ngai; bongo pema ekotaki kati na yango mpe ezwaki lisusu bomoi. Batelemaki mpe bazalaki mampinga moko ya monene.
והנבאתי כאשר צוני ותבוא בהם הרוח ויחיו ויעמדו על רגליהם--חיל גדול מאד מאד
11 Alobaki na ngai: — Mwana na moto, mikuwa oyo ezali libota mobimba ya Isalaele! Bazali koloba: « Mikuwa na biso ekawuki, elikya na biso esili, bomoi na biso ebebi! »
ויאמר אלי בן אדם העצמות האלה כל בית ישראל המה הנה אמרים יבשו עצמותינו ואבדה תקותנו--נגזרנו לנו
12 Yango wana, sakola mpe loba na bango: « Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh bato na Ngai, nakofungola bakunda na bino mpe nakobimisa bino kuna, bongo nakozongisa bino na mabele ya Isalaele.
לכן הנבא ואמרת אליהם כה אמר אדני יהוה הנה אני פתח את קברותיכם והעליתי אתכם מקברותיכם עמי והבאתי אתכם אל אדמת ישראל
13 Mpe bino, bato na Ngai, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakofungola bakunda na bino mpe nakobimisa bino kuna!
וידעתם כי אני יהוה בפתחי את קברותיכם ובהעלותי אתכם מקברותיכם--עמי
14 Nakotia Molimo na Ngai kati na bino, mpe bokozwa lisusu bomoi; bongo nakovandisa bino na mabele na bino. Boye, bokoyeba solo ete Ngai Yawe nde nalobaki mpe nakokisaki yango, elobi Yawe. »
ונתתי רוחי בכם וחייתם והנחתי אתכם על אדמתכם וידעתם כי אני יהוה דברתי ועשיתי--נאם יהוה
15 Yawe alobaki na ngai:
ויהי דבר יהוה אלי לאמר
16 « Mwana na moto, kamata eteni ya libaya mpe koma na likolo na yango: ‹ Mpo na Yuda mpe mpo na bana ya Isalaele oyo basangani na ye. › Kamata eteni mosusu ya libaya mpe koma na likolo na yango: ‹ Mpo na Jozefi, nzete ya Efrayimi, mpe mpo na libota mobimba ya Isalaele oyo esangani na ye. ›
ואתה בן אדם קח לך עץ אחד וכתב עליו ליהודה ולבני ישראל חברו ולקח עץ אחד וכתוב עליו ליוסף עץ אפרים וכל בית ישראל חברו
17 Kangisa yango mpe komisa yango libaya moko mpo ete ezala eloko moko kati na loboko na yo.
וקרב אתם אחד אל אחד לך--לעץ אחד והיו לאחדים בידך
18 Soki bandeko na yo batuni yo: ‹ Olingi koloba na biso nini? Makambo oyo elingi kolakisa nini? ›
וכאשר יאמרו אליך בני עמך לאמר הלוא תגיד לנו מה אלה לך
19 Okozongisela bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakozwa libaya ya Jozefi, oyo ezali kati na loboko ya Efrayimi, mpe bato ya mabota ya Isalaele oyo basangani na ye; nakokangisa yango na libaya ya Yuda. Nakokomisa yango nzete moko mpe ekokoma eloko moko kati na loboko na Ngai. ›
דבר אלהם כה אמר אדני יהוה הנה אני לקח את עץ יוסף אשר ביד אפרים ושבטי ישראל חברו ונתתי אותם עליו את עץ יהודה ועשיתם לעץ אחד והיו אחד בידי
20 Okosimba kati na loboko na yo, na miso na bango, mabaya oyo okomaki;
והיו העצים אשר תכתב עליהם בידך--לעיניהם
21 mpe okoloba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakobimisa bana ya Isalaele wuta na bikolo ya zingazinga epai wapi bakendeki mpe nakozongisa bango na mabele na bango.
ודבר אליהם כה אמר אדני יהוה הנה אני לקח את בני ישראל מבין הגוים אשר הלכו שם וקבצתי אתם מסביב והבאתי אותם אל אדמתם
22 Nakokomisa bango ekolo kaka moko kati na mokili, na likolo ya bangomba ya Isalaele. Ekozala kaka na mokonzi moko oyo akokonza bango; mpe bakozala lisusu bikolo mibale te to bakokabwana lisusu na bokonzi mibale te.
ועשיתי אתם לגוי אחד בארץ בהרי ישראל ומלך אחד יהיה לכלם למלך ולא יהיה (יהיו) עוד לשני גוים ולא יחצו עוד לשתי ממלכות עוד
23 Bakomikomisa lisusu mbindo te na nzela ya banzambe na bango ya bikeko mpe ya bililingi na bango ya mabe to na nzela ya misala na bango ya mabe; pamba te nakobikisa bango wuta na bisika oyo bazalaki kovanda epai wapi basalaki masumu mpe nakopetola bango; bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango.
ולא יטמאו עוד בגלוליהם ובשקוציהם ובכל פשעיהם והושעתי אתם מכל מושבתיהם אשר חטאו בהם וטהרתי אותם והיו לי לעם ואני אהיה להם לאלהים
24 Mosali na Ngai, Davidi, akozala mokonzi na bango, mpe bango nyonso bakozala na mobateli bibwele kaka moko, bakotosa mibeko na Ngai mpe bakobatela na bokebi mitindo na Ngai.
ועבדי דוד מלך עליהם ורועה אחד יהיה לכלם ובמשפטי ילכו וחקותי ישמרו ועשו אותם
25 Bakovanda lisusu na mokili oyo napesaki na Jakobi, mosali na Ngai, mokili oyo batata na bino bavandaki: bango, bana na bango ya mibali mpe bakitani na bango ya mibali bakovanda kuna mpo na libela; mpe mosali na Ngai, Davidi, akozala mokambi na bango mpo na libela.
וישבו על הארץ אשר נתתי לעבדי ליעקב אשר ישבו בה אבותיכם וישבו עליה המה ובניהם ובני בניהם עד עולם ודוד עבדי נשיא להם לעולם
26 Nakosala boyokani ya kimia elongo na bango: ekozala boyokani ya libela na libela. Nakolendisa bango, nakokomisa bango ebele koleka mpe nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela.
וכרתי להם ברית שלום ברית עולם יהיה אותם ונתתים והרביתי אותם ונתתי את מקדשי בתוכם לעולם
27 Nakotia ndako na Ngai kati na bango; nakozala Nzambe na bango, mpe bango, bakozala bato na Ngai.
והיה משכני עליהם והייתי להם לאלהים והמה יהיו לי לעם
28 Bongo bato ya bikolo mosusu bakoyeba solo ete Ngai Yawe nde nakomisi Isalaele bule tango nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela. › »
וידעו הגוים כי אני יהוה מקדש את ישראל--בהיות מקדשי בתוכם לעולם

< Ezekieli 37 >