< Ezekieli 30 >

1 Yawe alobaki na ngai:
耶和華的話又臨到我說:
2 « Mwana na moto, sakola! Loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Bolela mpe boloba: ‘Mawa mpo na mokolo wana!’
「人子啊,你要發預言說,主耶和華如此說: 哀哉這日!你們應當哭號。
3 Pamba te mokolo yango ekomi pene; mokolo ya Yawe ekomi pene, mokolo ya mapata, tango ya molili mpo na bikolo.
因為耶和華的日子臨近, 就是密雲之日, 列國受罰之期。
4 Mopanga ekotelemela Ejipito, mpe somo makasi ekokanga mokili ya Kushi. Tango bato bakokufa na Ejipito, bakomema bomengo na yango mosika mpe miboko na yango ekobukana.
必有刀劍臨到埃及; 在埃及被殺之人仆倒的時候, 古實人就有痛苦, 人民必被擄掠, 基址必被拆毀。
5 Kushi, Puti, Ludi, Arabi mobimba, Libi mpe bato ya mokili ya boyokani bakokufa na mopanga nzela moko na bato ya Ejipito.
古實人、弗人、路德人、雜族的人民,並古巴人,以及同盟之地的人都要與埃及人一同倒在刀下。」
6 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Bikolo oyo esanganaki na Ejipito ekokweya mpe makasi oyo etielaka lolendo ekosila. Kobanda na Migidoli kino na Siene, bakokweya na mopanga elongo na Ejipito, elobi Nkolo Yawe.
耶和華如此說: 扶助埃及的也必傾倒。 埃及因勢力而有的驕傲必降低微; 其中的人民,從色弗尼塔起必倒在刀下。 這是主耶和華說的。
7 Ejipito ekotikala lisusu na bato te kati na mikili oyo etikala na bato te, mpe bingumba na yango ekokoma ebeba kati na bingumba oyo ebeba.
埃及地在荒涼的國中必成為荒涼; 埃及城在荒廢的城中也變為荒廢。
8 Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakokitisa moto kati na Ejipito mpe nakosukisa nguya nyonso ya basungi na yango.
我在埃及中使火着起; 幫助埃及的,都被滅絕。 那時,他們就知道我是耶和華。
9 Na mokolo wana, bato oyo nakotinda bakokende na nzela ya masuwa mpo na kobundisa Kushi oyo ezali na yango na kimia. Somo makasi ekokanga bango na mokolo ya etumbu ya Ejipito; mpe mokolo yango ekomi solo pene.
「到那日,必有使者坐船,從我面前出去,使安逸無慮的古實人驚懼;必有痛苦臨到他們,好像埃及遭災的日子一樣。看哪,這事臨近了!
10 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakosukisa nguya ya mampinga ya Ejipito na nzela ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni.
主耶和華如此說: 我必藉巴比倫王尼布甲尼撒的手, 除滅埃及眾人。
11 Ye elongo na mampinga na ye ya basoda oyo baleki kanza kati na mampinga ya bikolo, bakoya kobebisa mokili. Bakobundisa Ejipito na mipanga na bango mpe bakotondisa mokili na bibembe.
他和隨從他的人, 就是列國中強暴的, 必進來毀滅這地。 他們必拔刀攻擊埃及, 使遍地有被殺的人。
12 Nakokawusa miluka ya Nili mpe nakokaba mokili epai ya bato mabe; nakobebisa mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango na nzela ya maboko ya bapaya. Ezali Ngai Yawe nde nalobi.
我必使江河乾涸, 將地賣在惡人的手中; 我必藉外邦人的手, 使這地和其中所有的變為淒涼。 這是我-耶和華說的。
13 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakobebisa banzambe ya bikeko mpe nakosala ete bato batika kosambela bililingi kati na Mefisi. Moto moko te lisusu akozala mokambi kati na Ejipito, mpe nakoyeisa somo kati na Ejipito mobimba.
主耶和華如此說: 我必毀滅偶像, 從挪弗除滅神像; 必不再有君王出自埃及地。 我要使埃及地的人懼怕。
14 Nakobebisa engumba Patrosi, nakotia moto kati na engumba Tsoani mpe nakopesa etumbu na engumba Tebesi.
我必使巴忒羅荒涼, 在瑣安中使火着起, 向挪施行審判。
15 Nakopelisela engumba Sini, ndako batonga makasi ya Ejipito, kanda na Ngai; mpe nakoboma ebele ya bavandi ya engumba Tebesi.
我必將我的忿怒倒在埃及的保障上, 就是訓上, 並要剪除挪的眾人。
16 Nakotia moto kati na Ejipito; engumba Sini ekotonda na pasi. Tebesi ekokoma na madusu ebele mpe banguna bakokota kati na Mefisi na moyi makasi, mpo na kobebisa yango.
我必在埃及中使火着起; 訓必大大痛苦; 挪必被攻破; 挪弗白日見仇敵。
17 Bilenge mibali ya bingumba Eliopolisi mpe Pi-Beseti bakokufa na mopanga, mpe bingumba yango ekokende na bowumbu.
亞文和比伯實的少年人必倒在刀下; 這些城的人必被擄掠。
18 Na Takipenesi, mokolo ekokoma molili tango nakobuka ekangiseli ya Ejipito; mpe kuna, makasi na yango oyo etielaka lolendo ekosila; mapata ekozipa engumba Takipenesi mpe bamboka na yango ya mike ekokende na bowumbu.
我在答比匿折斷埃及的諸軛, 使她因勢力而有的驕傲在其中止息。 那時,日光必退去; 至於這城,必有密雲遮蔽, 其中的女子必被擄掠。
19 Nakopesa Ejipito etumbu; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »
我必這樣向埃及施行審判, 他們就知道我是耶和華。」
20 Na mokolo ya sambo ya sanza ya liboso, na mobu ya zomi na moko, Yawe alobaki na ngai:
十一年正月初七日,耶和華的話臨到我說:
21 « Mwana na moto, tala; nabukaki loboko ya Faraon, mokonzi ya Ejipito! Moto moko te azali kosalisa yango to mpe kotia yango kisi mpo ete ekoka lisusu kozwa makasi ya kosimba mopanga.
「人子啊,我已打折埃及王法老的膀臂;沒有敷藥,也沒有用布纏好,使他有力持刀。
22 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Natelemeli Faraon, mokonzi ya Ejipito; nakobuka maboko na ye nyonso mibale: ezala loboko oyo ya malamu to loboko oyo ebukana; mpe nakosala ete mopanga ekweya longwa na loboko na ye.
所以主耶和華如此說:看哪,我與埃及王法老為敵,必將他有力的膀臂和已打折的膀臂全行打斷,使刀從他手中墜落。
23 Nakopanza mpe nakopalanganisa bato ya Ejipito kati na bikolo mpe mikili mosusu.
我必將埃及人分散在列國,四散在列邦。
24 Nakolendisa maboko ya mokonzi ya Babiloni mpe nakotia mopanga na Ngai kati na loboko na ye. Kasi nakobuka maboko ya Faraon, mpe akokoma kolela liboso na ye lokola moto oyo azoki pota monene.
我必使巴比倫王的膀臂有力,將我的刀交在他手中;卻要打斷法老的膀臂,他就在巴比倫王面前唉哼,如同受死傷的人一樣。
25 Nakolendisa maboko ya mokonzi ya Babiloni, kasi maboko ya Faraon ekolemba. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakotia mopanga na Ngai kati na loboko ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobundisa na yango Ejipito.
我必扶持巴比倫王的膀臂,法老的膀臂卻要下垂;我將我的刀交在巴比倫王手中,他必舉刀攻擊埃及地,他們就知道我是耶和華。
26 Nakopanza mpe nakopalanganisa bato ya Ejipito kati na bikolo mpe mikili mosusu; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »
我必將埃及人分散在列國,四散在列邦;他們就知道我是耶和華。」

< Ezekieli 30 >